< 2 Samuele 16 >
1 Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino.
When David had gone a little beyond the summit, Ziba the servant of Mephibosheth was there to meet him. He had a pair of saddled donkeys loaded with two hundred loaves of bread, a hundred clusters of raisins, a hundred summer fruits, and a skin of wine.
2 Mokonzi atunaki Tsiba: — Mpo na nini omemi biloko oyo? Tsiba azongisaki: — Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe.
“Why do you have these?” asked the king. Ziba replied, “The donkeys are for the king’s household to ride, the bread and summer fruit are for the young men to eat, and the wine is to refresh those who become exhausted in the wilderness.”
3 Bongo mokonzi atunaki lisusu: — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo? Tsiba azongisaki: — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki: « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »
“Where is your master’s grandson?” asked the king. And Ziba answered, “Indeed, he is staying in Jerusalem, for he has said, ‘Today, the house of Israel will restore to me the kingdom of my grandfather.’”
4 Mokonzi alobaki na Tsiba: — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki: — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo!
So the king said to Ziba, “All that belongs to Mephibosheth is now yours!” “I humbly bow before you,” said Ziba. “May I find favor in your eyes, my lord the king!”
5 Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.
As King David approached Bahurim, a man from the family of the house of Saul was just coming out. His name was Shimei son of Gera, and as he approached, he kept yelling out curses.
6 Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi.
He threw stones at David and at all the servants of the king, though the troops and all the mighty men were on David’s right and left.
7 Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe: « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba.
And as he yelled curses, Shimei said, “Get out, get out, you worthless man of bloodshed!
8 Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »
The LORD has paid you back for all the blood of the house of Saul, in whose place you have reigned, and the LORD has delivered the kingdom into the hand of your son Absalom. See, you have come to ruin because you are a man of bloodshed!”
9 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi: — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.
Then Abishai son of Zeruiah said to the king, “Why should this dead dog curse my lord the king? Let me go over and cut off his head!”
10 Kasi mokonzi alobaki: — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye: « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna: « Mpo na nini ozali kosala bongo? »
But the king replied, “What have I to do with you, O sons of Zeruiah? If he curses me because the LORD told him, ‘Curse David,’ who can ask, ‘Why did you do this?’”
11 Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso: « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.
Then David said to Abishai and to all his servants, “Behold, my own son, my own flesh and blood, seeks my life. How much more, then, this Benjamite! Leave him alone and let him curse me, for the LORD has told him so.
12 Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »
Perhaps the LORD will see my affliction and repay me with good for the cursing I receive today.”
13 Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu.
So David and his men proceeded along the road as Shimei went along the ridge of the hill opposite him. As Shimei went, he yelled curses, threw stones, and flung dust at David.
14 Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna.
Finally, the king and all the people with him arrived, exhausted. And there he refreshed himself.
15 Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye.
Then Absalom and all the men of Israel came to Jerusalem, and Ahithophel was with him.
16 Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye: — Tika ete mokonzi owumela na bomoi! Tika ete mokonzi owumela na bomoi!
And David’s friend Hushai the Archite went to Absalom and said to him, “Long live the king! Long live the king!”
17 Abisalomi atunaki Ushayi: — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo?
“Is this the loyalty you show your friend?” Absalom replied. “Why did you not go with your friend?”
18 Ushayi alobaki na Abisalomi: — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi.
“Not at all,” Hushai answered. “For the one chosen by the LORD, by the people, and by all the men of Israel—his I will be, and with him I will remain.
19 Mpe ngai nakosalela nani? Ezali te mwana na ye ya mobali? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo.
Furthermore, whom should I serve if not the son? As I served in your father’s presence, so also I will serve in yours.”
20 Abisalomi alobaki na Ayitofeli: — Pesa biso toli na yo: tosengeli kosala nini?
Then Absalom said to Ahithophel, “Give me counsel. What should we do?”
21 Ayitofeli azongiselaki Abisalomi: — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama.
Ahithophel replied, “Sleep with your father’s concubines, whom he has left to keep the palace. When all Israel hears that you have become a stench to your father, then the hands of all who are with you will be strengthened.”
22 Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba.
So they pitched a tent for Absalom on the roof, and he slept with his father’s concubines in the sight of all Israel.
23 Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.
Now in those days the advice of Ahithophel was like the consultation of the word of God. Such was the regard that both David and Absalom had for Ahithophel’s advice.