< 2 Samuele 14 >

1 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asosolaki ete motema ya mokonzi ekomi na posa ya Abisalomi.
洗鲁雅的儿子约押,知道王心里想念押沙龙,
2 Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye: « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te: sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe;
就打发人往提哥亚去,从那里叫了一个聪明的妇人来,对她说:“请你假装居丧的,穿上孝衣,不要用膏抹身,要装作为死者许久悲哀的妇人;
3 mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.
进去见王,对王如此如此说。”于是约押将当说的话教导了妇人。
4 Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki: — Oh mokonzi, sunga ngai!
提哥亚妇人到王面前,伏地叩拜,说:“王啊,求你拯救!”
5 Mokonzi atunaki ye: — Eloko nini ezali kotungisa yo? Azongisaki: — Nazali mwasi akufisa mobali; mobali na ngai akufaki.
王问她说:“你有什么事呢?”回答说:“婢女实在是寡妇,我丈夫死了。
6 Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.
我有两个儿子,一日在田间争斗,没有人解劝,这个就打死那个。
7 Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba: « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.
现在全家的人都起来攻击婢女,说:‘你将那打死兄弟的交出来,我们好治死他,偿他打死兄弟的命,灭绝那承受家业的。’这样,他们要将我剩下的炭火灭尽,不与我丈夫留名留后在世上。”
8 Mokonzi alobaki na mwasi: — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo.
王对妇人说:“你回家去吧!我必为你下令。”
9 Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi: — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.
提哥亚妇人又对王说:“我主我王,愿这罪归我和我父家,与王和王的位无干。”
10 Mokonzi alobaki na ye: — Soki moto moko ameki kotombokela yo, yaka na ye epai na ngai, mpe akozongela lisusu te kotungisa yo.
王说:“凡难为你的,你就带他到我这里来,他必不再搅扰你。”
11 Mwasi alobaki: — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki: — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
妇人说:“愿王记念耶和华—你的 神,不许报血仇的人施行灭绝,恐怕他们灭绝我的儿子。”王说:“我指着永生的耶和华起誓:你的儿子连一根头发也不致落在地上。”
12 Mwasi yango alobaki: — Tika ete mwasi mosali na yo aloba likambo moko epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi azongisaki: — Loba!
妇人说:“求我主我王容婢女再说一句话。”王说:“你说吧!”
13 Mwasi alobaki: — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya?
妇人说:“王为何也起意要害 神的民呢?王不使那逃亡的人回来,王的这话就是自证己错了!
14 Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.
我们都是必死的,如同水泼在地上,不能收回。 神并不夺取人的性命,乃设法使逃亡的人不致成为赶出、回不来的。
15 Mpe sik’oyo, soki nayei kobimisa maloba oyo epai ya mokonzi, nkolo na ngai, ezali mpo ete bato babangisaki ngai. Yango wana mwasi mosali na yo amilobelaki: « Tika ete naloba na mokonzi, nkolo na ngai. Tango mosusu, akosala kolanda makambo oyo mwasi mosali na ye akosenga.
我来将这话告诉我主我王,是因百姓使我惧怕。婢女想,不如将这话告诉王,或者王成就婢女所求的。
16 Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »
人要将我和我儿子从 神的地业上一同除灭,王必应允救我脱离他的手。
17 Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba: « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo! »
婢女又想,我主我王的话必安慰我;因为我主我王能辨别是非,如同 神的使者一样。惟愿耶和华—你的 神与你同在!”
18 Mokonzi alobaki na mwasi: — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. Mwasi azongisaki: — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba!
王对妇人说:“我要问你一句话,你一点不要瞒我。”妇人说:“愿我主我王说。”
19 Mokonzi atunaki: — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso? Mwasi azongisaki: — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.
王说:“你这些话莫非是约押的主意吗?”妇人说:“我敢在我主我王面前起誓:王的话正对,不偏左右,是王的仆人约押吩咐我的,这些话是他教导我的。
20 Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.
王的仆人约押如此行,为要挽回这事。我主的智慧却如 神使者的智慧,能知世上一切事。”
21 Mokonzi alobaki na Joabi: — Malamu! Nakosala yango. Kende, zongisa elenge mobali Abisalomi.
王对约押说:“我应允你这事。你可以去,把那少年人押沙龙带回来。”
22 Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. Joabi alobaki: — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi.
约押就面伏于地叩拜,祝谢于王,又说:“王既应允仆人所求的,仆人今日知道在我主我王眼前蒙恩了。”
23 Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.
于是约押起身往基述去,将押沙龙带回耶路撒冷。
24 Kasi mokonzi alobaki: — Asengeli kokende na ndako na ye; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.
王说:“使他回自己家里去,不要见我的面。”押沙龙就回自己家里去,没有见王的面。
25 Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.
以色列全地之中,无人像押沙龙那样俊美,得人的称赞,从脚底到头顶毫无瑕疵。
26 Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi.
他的头发甚重,每到年底剪发一次;所剪下来的,按王的平称一称,重二百舍客勒。
27 Abisalomi azalaki na bana mibali misato mpe mwana moko ya mwasi. Kombo ya mwana na ye ya mwasi ezalaki Tamari, mpe azalaki mwasi moko ya kitoko makasi.
押沙龙生了三个儿子,一个女儿。女儿名叫她玛,是个容貌俊美的女子。
28 Abisalomi avandaki na Yelusalemi mibu mibale mpe atikalaki komona te elongi ya mokonzi.
押沙龙住在耶路撒冷足有二年,没有见王的面。
29 Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende.
押沙龙打发人去叫约押来,要托他去见王,约押却不肯来。第二次打发人去叫他,他仍不肯来。
30 Abisalomi alobaki na basali na ye: « Botala! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.
所以押沙龙对仆人说:“你们看,约押有一块田,与我的田相近,其中有大麦,你们去放火烧了。”押沙龙的仆人就去放火烧了那田。
31 Joabi akendeki na ndako ya Abisalomi mpe alobaki na ye: — Mpo na nini otie moto na elanga na ngai?
于是约押起来,到了押沙龙家里,问他说:“你的仆人为何放火烧了我的田呢?”
32 Abisalomi azongiselaki Joabi: — Tala, natindelaki yo maloba; nalobaki: « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye: ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai! › »
押沙龙回答约押说:“我打发人去请你来,好托你去见王,替我说:‘我为何从基述回来呢?不如仍在那里。’现在要许我见王的面;我若有罪,任凭王杀我就是了。”
33 Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.
于是约押去见王,将这话奏告王,王便叫押沙龙来。押沙龙来见王,在王面前俯伏于地,王就与押沙龙亲嘴。

< 2 Samuele 14 >