< 2 Samuele 10 >

1 Sima na mwa tango, mokonzi ya bato ya Amoni akufaki, mpe mwana na ye ya mobali, Anuni, akitanaki na ye na bokonzi.
Después de esto aconteció que murió el rey de los hijos de Ammón, y le sucedió en el reino su hijo Hanún.
2 Davidi amilobelaki: « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni,
Dijo entonces David: “Mostraré benevolencia a Hanún, hijo de Nahás, como su padre usó de benevolencia conmigo.” Envió, pues, David a sus siervos para consolarle (de la muerte) de su padre. Pero llegados que hubieron los siervos de David al país de los hijos de Ammón,
3 bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango: « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo? »
dijeron los príncipes de los hijos de Ammón a Hanún, su señor: “¿Crees tú que para honrar a tu padre, David te ha enviado consoladores? ¿No te habrá mandado David sus siervos para examinar y explorar la ciudad, a fin de destruirla?”
4 Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango kati-kati ya mandefu, akataki bango bilamba kino na loketo mpe abenganaki bango.
Entonces tomó Hanún a los siervos de David, les rapó la mitad de la barba y les cortó la mitad inferior de los vestidos, hasta la cintura, y los despachó.
5 Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo: « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. »
Cuando David tuvo conocimiento de esto, envió mensajeros a su encuentro, porque esos hombres estaban sumamente avergonzados. Les mandó, pues, el rey: “Quedaos en Jericó hasta que os crezca la barba, y luego volveréis.”
6 Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo: epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
Viendo los hijos de Ammón que se habían hecho odiosos a David, enviaron mensajeros y tomaron a sueldo veinte mil soldados de los sirios de Bet-Rehob y de los sirios de Soba, mil del rey de Maacá y doce mil de los hombres de Tob.
7 Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
Cuando lo supo David, envió a Joab y todo el ejército, todas las tropas valientes.
8 Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
Salieron los hijos de Ammón y se formaron en orden de batalla a la entrada de la puerta, mientras los sirios de Soba y de Rehob, así como los hombres de Tob y de Maacá, estaban aparte en el campo.
9 Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
Al ver Joab los (dos) frentes de batalla, uno por delante, y otro por las espaldas, escogió de entre todos los escogidos de Israel (un cuerpo) que puso en orden de batalla contra los sirios,
10 Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
entregando el resto del pueblo en manos de Abisai, su hermano, el cual los formó en orden de batalla contra los hijos de Ammón.
11 Joabi alobaki: « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo.
Y dijo (Joab): “Si los sirios prevalecieren contra mí, tú me ayudarás; y si los hijos de Ammón prevalecieren contra ti, iré yo a ayudarte.
12 Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
¡Ten buen ánimo, y esforcémonos por nuestro pueblo y por las ciudades de nuestro Dios; y que haga Yahvé lo que sea de su mayor agrado!”
13 Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
Efectivamente, cuando Joab y la gente que con él estaba avanzaron para atacar a los sirios, estos huyeron delante de él.
14 Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi.
Y al ver los hijos de Ammón que huían los sirios huyeron ellos también delante de Abisai, retirándose a la ciudad. Entonces Joab volvió de la guerra contra los hijos de Ammón y vino a Jerusalén.
15 Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basanganaki.
Viendo los sirios que habían sido vencidos por los hijos de Israel, concentraron todas sus fuerzas,
16 Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
y Hadadéser hizo venir a los sirios que habitaban al otro lado del río, los cuales vinieron a Helam, capitaneados por Sobac, general de las tropas de Hadadéser.
17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye.
De lo cual informado David, reunió a todo Israel, pasó el Jordán y llegó a Helam. Los sirios se pusieron en orden de batalla contra David y trabaron con él combate.
18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana.
Pero huyeron delante de Israel; y David les mató los caballos de setecientos carros de guerra y cuarenta mil hombres de a caballo; hirió también a Sobac, general del ejército, que murió allí mismo.
19 Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni.
Y todos los reyes vasallos de Hadadéser, viéndose vencidos por Israel, hicieron paces con Israel y se sometieron; y los sirios no se atrevieron más a ayudar a los hijos de Ammón.

< 2 Samuele 10 >