< 2 Samuele 1 >

1 Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale.
Après la mort de Saül, David revenait de la tuerie des Amalécites, et il était resté deux jours à Tsiklag.
2 Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
Le troisième jour, voici qu'un homme sortit du camp de la part de Saül, les vêtements déchirés et de la terre sur la tête. Lorsqu'il arriva à David, il se jeta à terre et lui témoigna du respect.
3 Davidi atunaki ye: — Owuti wapi? Azongisaki: — Nakimi wuta na molako ya Isalaele.
David lui dit: « D'où viens-tu? » Il lui dit: « Je me suis échappé du camp d'Israël. »
4 Davidi atunaki lisusu: — Yebisa ngai makambo nini eleki kuna? Moto yango alobaki: — Mampinga ya Isalaele ekimi bitumba; ebele kati na bango bakweyi na bitumba mpe bakufi, ata Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi.
David lui dit: « Comment cela s'est-il passé? Dis-le-moi. » Il répondit: « Le peuple a fui la bataille, et beaucoup de gens sont tombés et sont morts. Saül et son fils Jonathan sont morts eux aussi. »
5 Bongo Davidi alobaki na elenge mobali oyo azalaki kopesa ye sango: — Oyebi ndenge nini ete Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi?
David dit au jeune homme qui lui avait raconté: « Comment sais-tu que Saül et Jonathan, son fils, sont morts? »
6 Elenge mobali azongisaki: — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.
Le jeune homme qui le raconta dit: « Comme je me trouvais par hasard sur la montagne de Gilboa, voici que Saül s'appuyait sur sa lance; et voici que les chars et les cavaliers suivaient de près derrière lui.
7 Tango kaka abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai; mpe ngai nazongisaki: « Ngai oyo. »
Quand il regarda derrière lui, il me vit et m'appela. Je répondis: Me voici!
8 Atunaki ngai: — Ozali nani? Nazongiselaki ye: — Nazali moto ya Amaleki.
Il me dit: « Qui es-tu? Je lui répondis: Je suis un Amalécite.
9 Alobaki na ngai: — Pusana pene na ngai mpe boma ngai, pamba te nazali koyoka lisusu nzoto malamu te, atako nazali nanu na bomoi.
Il me dit: « Mets-toi à côté de moi, je t'en prie, et tue-moi, car l'angoisse s'est emparée de moi, parce que ma vie est encore en moi.
10 Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai.
Je me suis donc tenu à côté de lui et je l'ai tué, car j'étais sûr qu'il ne pourrait pas vivre après sa chute. J'ai pris la couronne qui était sur sa tête et le bracelet qui était à son bras, et je les ai apportés ici à mon seigneur. »
11 Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.
Alors David saisit ses vêtements et les déchira, et tous les hommes qui étaient avec lui firent de même.
12 Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
Ils se lamentèrent, pleurèrent et jeûnèrent jusqu'au soir sur Saül et sur Jonathan, son fils, sur le peuple de l'Éternel et sur la maison d'Israël, parce qu'ils étaient tombés par l'épée.
13 Davidi atunaki elenge mobali oyo amemelaki ye sango: — Ozali moto ya mboka nini? Azongisaki: — Nazali mwana mobali ya mopaya moko, moto ya Amaleki.
David dit au jeune homme qui lui a parlé: « D'où viens-tu? » Il répondit: « Je suis le fils d'un étranger, un Amalécite. »
14 Davidi atunaki ye: — Mpo na nini obangaki te kosembola loboko na yo mpo na koboma mopakolami na Yawe?
David lui dit: « Pourquoi n'as-tu pas eu peur d'étendre ta main pour faire périr l'oint de Yahvé? ».
15 Bongo Davidi abengaki moko kati na basoda na ye mpe alobaki: « Yaka, boma ye! » Mpe soda yango abomaki ye.
David appela l'un des jeunes hommes et dit: « Approche, et coupe-le! ». Il le frappa de telle sorte qu'il mourut.
16 Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango: « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi: ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »
David lui dit: « Que ton sang retombe sur ta tête, car ta bouche a rendu témoignage contre toi, en disant: J'ai tué l'oint de l'Éternel. »
17 Davidi asalaki nzembo oyo ya mawa mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali.
David se lamenta ainsi sur Saül et sur Jonathan, son fils
18 Apesaki mitindo ete balakisa yango epai ya bato ya Yuda. Nzembo yango ya mawa ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo.
(et il leur ordonna d'enseigner aux fils de Juda le chant de l'arc; voici, cela est écrit dans le livre de Jashar):
19 Oh Isalaele, lokumu na yo ekweyi na likolo ya bangomba na yo. Ndenge nini bilombe bakweyi!
« Ta gloire, Israël, a été tuée sur tes hauts lieux! Comme les puissants sont tombés!
20 Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.
Ne le dis pas à Gath. Ne le publiez pas dans les rues d'Ashkelon, de peur que les filles des Philistins ne se réjouissent, de peur que les filles des incirconcis ne triomphent.
21 Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.
Vous les montagnes de Gilboa, qu'il n'y ait ni rosée ni pluie sur vous, et pas de champs d'offrandes; car c'est là que le bouclier des puissants a été souillé et jeté, le bouclier de Saul n'a pas été oint d'huile.
22 Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.
Du sang des victimes, de la graisse des puissants, L'arc de Jonathan ne s'est pas retourné. L'épée de Saul n'est pas revenue vide.
23 Na mikolo ya bomoi na bango, Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi mpe bapesanaki lokumu; mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. Bazalaki mbangu koleka bampongo, makasi koleka bankosi.
Saül et Jonathan étaient charmants et agréables dans leur vie. Dans leur mort, ils n'ont pas été divisés. Ils étaient plus rapides que les aigles. Ils étaient plus forts que des lions.
24 Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino.
Filles d'Israël, pleurez sur Saül, qui t'a délicatement vêtu d'écarlate, qui ont mis des ornements d'or sur vos vêtements.
25 Ndenge nini bilombe bakweyi na bitumba! Ndenge nini babomaki Jonatan na bangomba na yo!
Comme les puissants sont tombés au milieu de la bataille! Jonathan a été tué sur vos hauts lieux.
26 Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi!
Je suis dans l'angoisse pour toi, mon frère Jonathan. Vous avez été très agréable avec moi. Ton amour pour moi était merveilleux, surpassant l'amour des femmes.
27 Ndenge nini bilombe bakweyi! Ah! bibundeli ya bitumba ekomi pamba!
Comme les puissants sont tombés, et les armes de guerre ont péri! »

< 2 Samuele 1 >