< 2 Petelo 3 >

1 Balingami na ngai, tala mokanda ya mibale oyo nakomeli bino. Kati na mikanda nyonso mibale, nazali koluka kolamusa, kati na makanisi na bino, malakisi oyo bozwaki, mpo ete bokoma kokanisa na lolenge ya peto,
This second letter I now write to you, beloved; in both of these I arouse your pure mind to remembrance,
2 mpo ete bokanisa lisusu maloba oyo basakoli ya bule balobaki na tango ya kala mpe Mibeko oyo Nkolo mpe Mobikisi apesaki na nzela ya bantoma na bino.
that you may be mindful of the words formerly spoken by the holy prophets, and of the commandment of us the apostles of the Lord and Savior:
3 Liboso na nyonso, boyeba ete, na mikolo ya suka, batioli bakobima, bakotambola kolanda baposa na bango moko
knowing this first, that there will come in the last days scoffers, walking after their own lusts,
4 mpe bakoloba: « Boni, alakaki te ete akoya? Wapi ye sik’oyo? Pamba te, banda bakoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali na yango kaka ndenge ezalaka wuta na ebandeli ya mokili. »
and saying: Where is the promise of his coming? for since the fathers fell asleep, all things continue as they were from the beginning of the creation.
5 Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.
For they are willingly ignorant of this, that by the word of God, the heavens of old had their being as also the earth consisting of water and subsisting by water,
6 Babosanaka mpe ete ezali lisusu na nzela ya mayi yango nde mokili ya tango wana ebebisamaki wana ezindaki kati na mayi.
by which things the world that then was, having been overflowed with water, perished.
7 Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.
But the heavens and the earth that now are, by the same word are kept in store, reserved for fire against the day of judgment, and perdition of ungodly men.
8 Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana: mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko.
But, beloved, be not ignorant of this one thing, that one day with the Lord is as a thousand years, and a thousand years as one day.
9 Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.
The Lord does not delay concerning his promise, as some men count delay, but he is long-suffering toward us, not wishing that any should perish, but that all should come to repentance.
10 Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.
But the day of the Lord will come as a thief, in which the heavens shall pass away with a great noise, and the elements shall melt with fervent heat, and the earth, and the works that are on it, shall be burned up.
11 Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe
Seeing, then, that all these things shall be dissolved, what sort of persons ought you to be in all holy behavior, and godliness,
12 wana bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kosala ete mokolo yango eya noki. Na mokolo yango, Likolo elongo na biloko nyonso ekozika mpe ekonyangwama na moto.
looking for and earnestly desiring the coming of the day of God, because of which coming the heavens shall dis solve in fire, and the elements shall melt with fervent heat.
13 Nzokande, biso, kolanda elaka na Ye, tozali kozela Likolo ya sika mpe mabele ya sika epai wapi bosembo ekozala.
But we, according to his promise, look for new heavens and a new earth, in which dwells righteousness.
14 Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.
Wherefore, beloved, seeing that you expect such things, earnestly strive, by being spotless and blameless, to be found by him in peace:
15 Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye.
and count the long-suffering of our Lord, salvation, even as our beloved brother Paul, according to the wisdom given him, has written to you;
16 Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko.
as also in all his letters, speaking in them of these things, in which are some things hard to be understood, which the unlearned and unstable wrest, as they do also the other scriptures, to their own destruction.
17 Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino;
Do you, therefore, beloved, since you know these things beforehand, beware, lest, being led away with the error of the wicked, you fall from your own steadfastness.
18 kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen! (aiōn g165)
But grow in grace, and in the knowledge of our Lord and Savior Jesus Christ. To him be glory both now and to the day of eternity. Amen. (aiōn g165)

< 2 Petelo 3 >

The Great Flood
The Great Flood