< 2 Bakonzi 8 >
1 Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki: « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo; ekowumela mibu sambo. »
以利沙曾对所救活之子的那妇人说:“你和你的全家要起身往你可住的地方去住,因为耶和华命饥荒降在这地七年。”
2 Mwasi asalaki ndenge moto na Nzambe alobaki. Ye elongo na libota na ye bakendeki mpe bavandaki mibu sambo na mokili ya Filisitia.
妇人就起身,照神人的话带着全家往非利士地去,住了七年。
3 Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.
七年完了,那妇人从非利士地回来,就出去为自己的房屋田地哀告王。
4 Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki: « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. »
那时王正与神人的仆人基哈西说:“请你将以利沙所行的一切大事告诉我。”
5 Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki: « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. »
基哈西告诉王以利沙如何使死人复活,恰巧以利沙所救活、她儿子的那妇人为自己的房屋田地来哀告王。基哈西说:“我主我王,这就是那妇人,这是她的儿子,就是以利沙所救活的。”
6 Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo: « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. »
王问那妇人,她就把那事告诉王。于是王为她派一个太监,说:“凡属这妇人的都还给她,自从她离开本地直到今日,她田地的出产也都还给她。”
7 Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,
以利沙来到大马士革,亚兰王便·哈达正患病。有人告诉王说:“神人来到这里了。”
8 mokonzi alobaki na Azaeli: « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe: ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo? › »
王就吩咐哈薛说:“你带着礼物去见神人,托他求问耶和华,我这病能好不能好?”
9 Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki: — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai; atuni: « Boni, nakobika solo na bokono oyo? »
于是哈薛用四十个骆驼,驮着大马士革的各样美物为礼物,去见以利沙。到了他那里,站在他面前,说:“你儿子亚兰王便·哈达打发我来见你,他问说:‘我这病能好不能好?’”
10 Elize azongisaki: — Loba na ye: « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa.
以利沙对哈薛说:“你回去告诉他说,这病必能好;但耶和华指示我,他必要死。”
11 Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki.
神人定睛看着哈薛,甚至他惭愧。神人就哭了;
12 Azaeli atunaki: — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela? Elize azongisaki: — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
哈薛说:“我主为什么哭?”回答说:“因为我知道你必苦害以色列人,用火焚烧他们的保障,用刀杀死他们的壮丁,摔死他们的婴孩,剖开他们的孕妇。”
13 Azaeli akamwaki mpe azongisaki: — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina! Elize alobaki lisusu: — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri.
哈薛说:“你仆人算什么,不过是一条狗,焉能行这大事呢?”以利沙回答说:“耶和华指示我,你必作亚兰王。”
14 Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye: — Elize alobi na yo nini? Azongisaki: — Alobi na ngai: « Solo, okobika na bokono oyo. »
哈薛离开以利沙,回去见他的主人。主人问他说:“以利沙对你说什么?”回答说:“他告诉我你必能好。”
15 Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi.
次日,哈薛拿被窝浸在水中,蒙住王的脸,王就死了。于是哈薛篡了他的位。
16 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
以色列王亚哈的儿子约兰第五年,犹大王约沙法还在位的时候,约沙法的儿子约兰登基作了犹大王。
17 Azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
约兰登基的时候年三十二岁,在耶路撒冷作王八年。
18 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana na ye ya mwasi.
他行以色列诸王所行的,与亚哈家一样;因为他娶了亚哈的女儿为妻,行耶和华眼中看为恶的事。
19 Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela.
耶和华却因他仆人大卫的缘故,仍不肯灭绝犹大,照他所应许大卫的话,永远赐灯光与他的子孙。
20 Na tango ya Yorami, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
约兰年间,以东人背叛犹大,脱离他的权下,自己立王。
21 Boye Yorami akendeki na Tsayiri elongo na bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar; kasi basoda ya Yuda bakimaki na bandako na bango ya kapo.
约兰率领所有的战车往撒益去,夜间起来,攻打围困他的以东人和车兵长;犹大兵就逃跑,各回各家去了。
22 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokaki.
这样,以东人背叛犹大,脱离他的权下,直到今日。那时立拿人也背叛了。
23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
约兰其余的事,凡他所行的,都写在犹大列王记上。
24 Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
约兰与他列祖同睡,葬在大卫城他列祖的坟地里。他儿子亚哈谢接续他作王。
25 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Yorami, akomaki mokonzi ya Yuda.
以色列王亚哈的儿子约兰十二年,犹大王约兰的儿子亚哈谢登基。
26 Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele.
他登基的时候年二十二岁,在耶路撒冷作王一年。他母亲名叫亚她利雅,是以色列王暗利的孙女。
27 Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi.
亚哈谢效法亚哈家行耶和华眼中看为恶的事,与亚哈家一样,因为他是亚哈家的女婿。
28 Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.
他与亚哈的儿子约兰同往基列的拉末去,与亚兰王哈薛争战。亚兰人打伤了约兰,
29 Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
约兰王回到耶斯列,医治在拉末与亚兰王哈薛打仗的时候所受的伤。犹大王约兰的儿子亚哈谢因为亚哈的儿子约兰病了,就下到耶斯列看望他。