< 2 Bakonzi 7 >

1 Elize alobaki: — Boyoka Liloba na Yawe! Tala makambo oyo Yawe alobi: « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
Elisha replied, “Listen to the message from the Lord. This is what the Lord says: Around this time tomorrow a seah of the best flour will sell for a shekel, and two seahs of barley will sell for a shekel at the gate of Samaria.”
2 Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe: — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema? Elize azongisaki: — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.
The officer who was the king's assistant said to the man of God, “Look, even if the Lord opened windows in heaven what you say couldn't happen!” Elisha replied, “You'll see it with your own eyes, but you won't get to eat any of it.”
3 Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango: « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa?
There happened to be four men with leprosy at the entrance of the city gate. They said to each other, “Why are we sitting around here until we die?
4 Soki tolobi: ‹ Tokota na engumba, › nzala makasi ezali kuna, tokokufa. Soki mpe totikali awa, tokokufa kaka. Boye, tika ete tokende na molako ya bato ya Siri mpe tomipesa epai na bango. Soki bayambi biso, tobiki; kasi soki babomi biso, tokufi kaka. »
If we say, ‘Let's go into the city,’ we'll die because of the famine there; but if we go on sitting here, we'll die too. So come on, let's go to the camp of the Arameans and surrender to them. If they let us live, we'll live; if they kill us, we'll die.”
5 Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,
So they set off when it was getting dark and went to the camp of the Arameans. But when they arrived at the edge of the camp, nobody was there!
6 pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango: « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »
For the Lord had made the Arameans hear the sound of chariots, horses, and a large army approaching, so they said to each other, “The king of Israel has hired the kings of the Hittites and Egyptians to come and attack us.”
7 Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango.
So they jumped up and ran away into the night, leaving behind their tents, their horses, and their donkeys. In fact the camp was left just as it was when they ran for their lives.
8 Bato na maba bakomaki na mondelo ya molako, bakotaki na ndako moko ya kapo, baliaki mpe bamelaki. Bongo bamemaki palata, wolo, bilamba, mpe bakendeki kobomba yango. Sima, bazongaki, bakotaki na ndako mosusu ya kapo, bazwaki kuna biloko mpe bakendeki lisusu kobomba yango.
When the lepers got to the edge of the camp, they went into a tent and ate and drank. Then they took the silver, gold, and clothes, and hid them. After that they went back to another tent, took some things from there, and hid them.
9 Bongo balobanaki bango na bango: « Tozali kosala malamu te: Mokolo ya lelo ezali mokolo ya sango malamu, mpe tozali kobomba sango yango mpo na biso moko! Soki tozeli kino lobi na tongo, tokozwa etumbu. Tokende sik’oyo kopesa sango na ndako ya mokonzi. »
Then they said to each other, “It's not right what we're doing. This is a day of good news, and if we keep quiet about it and wait until it gets light, we're sure to be punished. So let's go right away and let them know at the king's palace.”
10 Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango: « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »
They went and called to the gatekeepers of the city, “We went over to the Aramean camp and no one was there, not a sound of anybody! There were just horses and donkeys tied up, and the tents just as they were.”
11 Bakengeli ekuke ya engumba babengaki moto moko kati na engumba mpo na kokomisa sango na ndako ya mokonzi.
The gatekeepers shouted out the news, and reports reached the royal palace.
12 Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye: — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango: « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »
The king got up in the night and said to his officers, “Let me tell you the trick the Arameans are trying to play on us. They know we're starving, so they have left the camp and hidden in the field, thinking, ‘When they leave the city, we'll take them alive and be able to enter the city.’”
13 Moko kati na bakalaka na ye azongisaki: — Bongisa ndambo ya mibali mpo ete bazwa bampunda mitano kati na oyo etikali kati na engumba. Tokobungisa ata eloko moko te, pamba te suka na bango ekozala ndenge moko na oyo ya bana nyonso ya Isalaele oyo batikali na engumba. Boye totinda bango kaka mpo toyeba makambo oyo ewuti kosalema.
One of his officers suggested, “Have some men take five of the remaining horses in the city. What happens to them will be the same as that of all the Israelites left here, All the Israelites here are doomed. Let's send them to find out what's going on.”
14 Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango: « Bokende mpe botala! »
So they got two chariots ready with their horses, and the king sent them out to the Aramean camp, telling them “Go and take a look.”
15 Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.
They went after them as far as the Jordan, and the whole way was full of clothing and equipment the Arameans had thrown aside as they ran away. The messengers returned and reported to the king.
16 Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.
Then the people went out and looted the camp of the Arameans. So a seah of the best flour sold for a shekel, and two seahs of barley sold for a shekel, just as the Lord had predicted.
17 Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye.
The king had put the officer who was his assistant in charge of the gate. In their rush the people trampled him in the gateway and he died, just as the man of God had said when the king visited him.
18 Makambo oyo esalemaki ndenge moto na Nzambe alobaki na mokonzi: « Lobi, na tango oyo, bakoteka na ekuke ya Samari bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
What the man of God had told the king also came true when he said, “Around this time tomorrow a seah of the best flour will sell for a shekel, and two seahs of barley will sell for a shekel at the gate of Samaria.”
19 Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, alobaki na moto na Nzambe: — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema? Mpe Elize, moto na Nzambe, azongisaki: — Okomona yango na miso, kasi okolia yango te.
Also the officer who was the king's assistant had said to the man of God, “Look, even if the Lord opened windows in heaven what you say couldn't happen!” Elisha had replied, “You'll see it with your own eyes, but you won't get to eat any of it.”
20 Makambo yango esalemaki ndenge kaka elobamaki na tina na ye: bato banyataki ye na ekuke ya engumba, mpe akufaki.
This is what happened to him. The people trampled him in the gateway and he died.

< 2 Bakonzi 7 >