< 2 Bakonzi 5 >
1 Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
Now, Naaman, general of the army of the king of Syria, was a great man in presence of his lord, and held in honour, because, by him, had Yahweh given deliverance to Syria, —and, the man, was a hero of valour—[but], a leper.
2 Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani.
Now, the Syrians, had gone out in companies, and had brought back out of the land of Israel, a little maiden, —who became an attendant on the wife of Naaman.
3 Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi: — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.
And she said unto her mistress, Ah! would that my lord were before the prophet, who is in Samaria! then, would he set him free from his leprosy.
4 Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki.
And he went in and told his lord, saying, —Thus and thus, hath spoken the maiden who is of the land of Israel!
5 Mokonzi ya Siri alobaki na ye: — Malamu! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.
And the king of Syria said—Go, get in, that I may send a letter unto the king of Israel. So he went, and took in his hand ten talents of silver, and six thousand pieces of gold, and ten changes of raiment.
6 Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki: « Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. »
And he brought in the letter unto the king of Israel, saying, Now, therefore, when this letter cometh in unto thee, lo! I have sent unto thee, Naaman my servant, and thou shalt set him free from his leprosy.
7 Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: « Boni, ngai nazali Nzambe? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo! »
And it came to pass, when the king of Israel had read the letter, that he rent his clothes, and said, Am, I, God, to kill and to make alive, that, this, man is sending unto me, to set one free from his leprosy, —but, of a truth, just mark, I pray you, and see, that he, is seeking an occasion, against me.
8 Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo: « Mpo na nini opasoli bilamba na yo? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele! »
And it was so, when Elisha the man of God heard that the king of Israel had rent his clothes, that he sent unto the king, saying—Wherefore hast thou rent thy clothes? let him come, I pray thee, unto me, that he may get to know that there is a prophet in Israel.
9 Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize.
So Naaman came, with his horses and with his chariot, and stood at the entrance of the house of Elisha;
10 Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani: — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.
and Elisha sent a messenger unto him, saying, —Go and bathe seven times in the Jordan, so shall thy flesh come back to thee, and be thou clean.
11 Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki: — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba!
But Naaman was wroth, and went away, —and said—Lo! I thought, Unto me, will he, come right out, and take his stand, and call on the name of Yahweh his God, and wave his hand towards the spot, and so set free the leper.
12 Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto? Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda.
Are not, Abanah and Pharpar, rivers of Damascus, better than all the waters of Israel? may I not bathe, in them, and be clean? So he turned, and went away in a rage.
13 Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye: — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo: « Sukola, mpe okokoma peto! »
Then drew near his servants, and spake unto him, and said—My father! if, some great thing, the prophet had commanded thee, wouldst thou not have done it? then, how much rather, when he hath said unto thee, Bathe and be clean?
14 Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.
Then went he down, and dipped himself in the Jordan, seven times, according to the word of the man of God: and his flesh came back, as the flesh of a little child, and he was clean.
15 Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki: — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.
And he returned unto the man of God, he and all his company; and came, and took his stand before him, and said—Lo! I pray thee—I know that there is no God in all the earth, save in Israel, —now, therefore, I pray thee, accept a blessing from thy servant.
16 Mosakoli Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.
But he said—By the life of Yahweh, before whom I stand, I will not accept one. And, though he urged him to accept it, yet did he refuse.
17 Namani alobaki: — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe.
Then said Naaman, Shall there not, then, I pray thee, be given to thy servant, two mules’ burden of earth? For thy servant will henceforth offer neither ascending-offering nor sacrifice to other gods, save only to Yahweh.
18 Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo: tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango.
In this thing, Yahweh grant forgiveness to thy servant, —When my lord entereth the house of Rimmon, to bow down therein, he leaning upon my hand, and so I bow down in the house of Rimmon, when he boweth down in the house of Rimmon, Yahweh, I pray, grant forgiveness to thy servant, in this thing.
19 Elize alobaki na ye: — Kende na kimia! Tango Namani akomaki mwa mosika,
And he said unto him—Go and prosper! But, when he had gone from him some distance,
20 Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki: « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »
Gehazi, the servant of Elisha the man of God, said—Lo! my lord, hath restrained, this Naaman the Syrian, by not taking at his hand that which he brought! By the life of Yahweh, verily, I will runs after him, and accept of him, something.
21 Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye: — Boni, nyonso ezali malamu?
So Gehazi hastened after Naaman. And, when Naaman saw one running after him, he alighted from his chariot to meet him, and said, —Is all well?
22 Geazi azongisaki: — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo: « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »
And he said, All is well. My lord, hath sent me to say, Lo! just now, have come unto me, two young men out of the hill country of Ephraim, of the sons of the prophets, —give for them, I pray thee, a talent, of silver, and two changes of raiment.
23 Namani alobaki: — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.
And Naaman said, Be content, accept two talents. So he urged him, and bound up two talents of silver in two bags, and two changes of raiment, and laid them upon two of his young men, and they bare them before him.
24 Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki.
And, when he came to the hill-tower, he took them from their hand, and put them in charge within, —and let the men go, and they departed.
25 Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye: — Geazi, okendeki wapi? Geazi azongisaki: — Mosali na yo akendeki epai moko te.
Now, when, he, came in and stood before his lord, Elisha said unto him, Whence comest thou, Gehazi? And he said, —Thy servant hath been neither hither nor thither.
26 Kasi Elize alobaki na ye: — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi?
Then he said unto him—My heart, had not gone with thee, when someone turned again from off his chariot, to meet thee! Is it a time to accept silver, or to accept raiment, or oliveyards, or vineyards, or flocks or herds, or men-servants, or maid-servants?
27 Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.
The leprosy of Naaman, therefore, shall cleave unto thee, and unto thy seed, to times age-abiding. And he went forth from before him—a leper—like snow.