< 2 Bakonzi 4 >

1 Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize: — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.
有一個先知弟子的妻子,前來哀求厄里叟說:「你的僕人,我的丈夫死了,你知道你的僕人是一個敬畏上主的人;現在債主前來,要帶走我的兩個孩子,作他的奴隸。」
2 Elize azongiselaki ye: — Ndenge nini nakoki kosunga yo? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. Azongisaki: — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.
厄里叟對她說:「我能為你做什麼﹖你告訴我:你家裏還有什麼﹖」她答說:「你的婢女家裏除一瓶油外,什麼也沒有。」
3 Elize alobaki: — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te.
厄里叟說:「你去,到外面向你所有的鄰居借些空器皿,不要少借;
4 Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
然後回家,關上門,你和你的兒子在家裏,將油倒在所有的那些器皿內,把裝滿了的,放在一邊。」
5 Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta.
她於是辭別厄里叟,回去照辦。她和她的兒子關上門,兒子給她遞器皿,她只顧倒油,
6 Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali: — Pesa ngai lisusu mbeki moko. Kasi mwana yango azongiselaki ye: — Bambeki nyonso esili. Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima.
器皿都裝滿了,她對兒子說:「再遞給我器皿! 」兒子答說:「沒有了。」同時油也止住了。
7 Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye: — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
婦人就去告訴天主的人。厄里叟對她說:「你去把油賣了,還了你的債;剩下的,你和你的兒子可用來過活。」
8 Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
有一天,厄里叟路過叔能,那裏有一個富貴的婦人,曾挽留他吃飯;因此,厄里叟每次路過那裏,總到她家裡吃飯。
9 Mwasi yango alobaki na mobali na ye: « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe.
婦人對丈夫說:「現在我看出:這個時常路過我們這裏的天主的人,是位聖者。
10 Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
我們可以在房頂上,給他蓋一間小房,裏面放一張床,一張桌子,一把椅子和一盞燈;這樣,他幾時來到我們這裏,可在那裏休息。」
11 Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna.
一天,厄里叟又到了那裏,就進入那間小房休息。
12 Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi: « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.
厄里叟吩咐自己的僕人革哈齊說:「你叫這位叔能婦人來。」僕人叫了婦人來,婦人站在先知面前,
13 Elize alobaki na Geazi: — Loba na ye: « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda? » Mwasi ya Sunami azongisaki: — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
厄里叟吩咐僕人說:「現在你對她說:看,你照顧我們既然這樣周到,我們可為你作什麼呢﹖要不要我們在君王或軍長前為你說句話﹖」那婦人答說:「我住在我本國人民中很平安。」
14 Elize atunaki mosali na ye, Geazi: — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye? Geazi azongisaki: — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
厄里叟就問革哈齊:「我們究竟能為她作什麼﹖」革哈齊說:「可憐她沒有兒子,丈夫又老了。」
15 Elize alobaki: — Benga ye! Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
厄里叟說:「快再叫她來! 」僕人又將婦人叫來,這次她卻站在門口,
16 Elize alobaki: — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki: — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te!
厄里叟對她說:「明年這時,你必懷抱著一個兒子。」婦人答說:「我主,天主的人哪! 不會! 你別哄騙你的婢女! 」
17 Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
這婦人果然懷了孕;過了一年,在厄里叟對她所說的時候,生了一個兒子。
18 Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma.
孩子漸漸長大,一天,他出去到收割的人那裏找他父親,
19 Alobaki na tata na ye: — Moto pasi! Moto pasi! Tata na ye alobaki na mosali moko: — Zongisa ye epai ya mama na ye!
孩子忽然對他父親喊說:「我的頭! 我的頭啊!」他父親吩咐僕人說:「把孩子送到他母親那裏去! 」
20 Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki.
僕人將他抱起,送給他母親,孩子坐在母親膝上,到了中午,就死了。
21 Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki.
他母親遂上了樓,將孩子放在天主的人的床上,關上門,出來,
22 Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye: — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
叫自己的丈夫來說:「請你給我派一個僕人,牽一匹驢來,我要快去見見天主的人,就回來。」
23 Mobali na ye atunaki: — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo? Lelo ezali ebandeli ya sanza te! Ezali mpe mokolo ya Saba te! Azongisaki: — Komitungisa te! Nyonso ezali malamu.
她丈夫說:「為什麼今天要去見他,既不是朔日,又不是安息日﹖」婦人答說:「你放心好了! 」
24 Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye: « Tokeyi! Tambolisa ane; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
於是,她把驢備好,對僕人說:「你快趕著走,我若不吩咐,在路上不要停下來。」
25 Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi: — Tala! Ezali mwasi ya Sunami!
婦人於是來到加爾默耳山見天主的人。天主的人自遠處看見她,就對自己的僕人革哈齊說:「看,那是叔能婦人!
26 Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye: « Boni, kimia ezali? Ozali malamu? Mobali na yo azali malamu? Mwana na yo azali malamu? » Azongisaki: — Nyonso ezali malamu.
現在你跑去迎接她,向她問安說:你好嗎﹖你的丈夫好嗎﹖你的孩子好嗎﹖」她回答說:好。」
27 Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki: — Tika ye bongo! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
婦人上到山上,來到天主的人跟前,就抱住他的腳;革哈齊前來想推開她,可是天主的人說:「由她罷! 因為她心中很痛苦;上主隱瞞了我,什麼也沒有告訴我。」
28 Mwasi ya Sunami alobaki: — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai? Te! Kutu, nalobaki na yo: « Kopesa ngai elikya ya lokuta te! »
那婦人說:「我何嘗向我主求過一個兒子﹖我豈不是說過:你不要哄騙我嗎﹖」
29 Elize alobaki na Geazi: — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
厄里叟對革哈齊說:「你束上腰,手裏拿著我的棍杖前去;不論遇見誰,不要向他請安;不論誰向你請安,你也不要回答。你去把我的棍杖放在孩子的臉上。」
30 Kasi mama ya mwana alobaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.
孩子的母親說:「我指著永生的上主及你的性命起誓:你不去,我決不離開。」厄里叟就起身跟她去了。
31 Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye: — Mwana alamuki te.
革哈齊在他們以前去了。將棍杖放在孩子的臉上,但是沒有聲音,沒有反應;他便回來見厄里叟,告訴他說:「孩子沒有醒來。」
32 Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye.
厄里叟一來到她家,看見孩子死了,躺在自己的床上,
33 Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.
就進去,關上門,房內只有他和孩子;先知哀求了上主,
34 Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto.
然後上床,伏在孩子身上,自己的口對住孩子的口,自己的眼對住孩子的眼,自己的手按住孩子的手,屈身伏在孩子身上,孩子的肉身便漸漸溫暖了。
35 Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.
然後他下來,在屋內來回走了一趟;又上去,屈身伏在孩子身上,對著孩子呵了七口氣,孩子就睜開了眼睛。
36 Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye: — Benga mwasi ya Sunami! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki: — Zwa mwana na yo!
厄里叟叫革哈齊來,對他說:「你叫叔能婦人來。」他便去叫那婦人,婦人就來了。厄里叟說:「抱起你的孩子來! 」
37 Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.
婦人一進來,就俯伏在他腳前,叩首至地;然後起來,抱起自己的孩子出去了。
38 Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye: « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »
厄里叟又來到基貝加耳,那地方正遭受肌荒;眾先知的弟子坐在他面前,他吩咐自己的僕人說:「你在火上放一個火鍋,給眾先知的弟子煮些菜湯。」
39 Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu; moto moko te ayebaki soki ezali nini.
有一個弟子出去到田間採菜,看見一棵葡萄樹,從上面採了一滿兜野果子回來,切碎放在菜鍋裏,並不知道是什麼東西。
40 Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki: — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo! Mpe bakokaki lisusu te kolia yango.
以後,他們把菜湯倒出來給眾人吃。眾人一嘗菜湯,都喊叫說:「天主的人,鍋裏有致死的毒物啊! 」眾人都不能吃。
41 Elize alobaki: — Bomemela ngai farine! Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki: — Bokabolela yango bato mpo ete balia. Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe.
那時厄里叟說:「拿點麵來! 」他把麵撒在鍋裏說:「倒出來給眾人吃罷! 」鍋裏就再沒有什麼毒了。
42 Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye: — Pesa yango na bato mpo ete balia!
有一個人從巴耳沙里來,在自己的行囊裏,給天主的人帶來了初熟大麥作的二十個餅和一些新麥穗。厄里叟說:「分給眾人吃罷! 」
43 Mosali na ye atunaki: — Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko? Elize alobaki lisusu: — Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi: « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. »
僕人說:「我怎能將這一點東西擺在一百人面前呢﹖」厄里叟說:「你儘管分給中人吃,因此上主這樣說:眾人吃了,還有剩餘。」
44 Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe.
於是僕人將食物擺在眾人面前,他們都吃了,並且還有剩餘,全應驗了上主的話。

< 2 Bakonzi 4 >