< 2 Bakonzi 3 >

1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi.
Ahab babarima Yoram na odii hene wɔ Israel bere a na Yudahene Yehosafat adi ade mfe dunwɔtwe wɔ Yuda no. Odii ade wɔ Samaria mfe dumien.
2 Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki,
Ɔyɛɛ Awurade ani so bɔne. Nanso na nʼamumɔyɛ no nte sɛ nʼagya ne ne na de no. Ɔsɛee Baal adum kronkron a nʼagya sii no.
3 kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu; atikalaki kobongwana na yango te.
Nanso ɔtoaa ahonisom so, sɛnea Nebat babarima Yeroboam dii Israelfo anim ma wɔyɛe no.
4 Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.
Na Moabhene Mesa ne ne nkurɔfo yɛn nguan. Na wotua sonkahiri a ɛyɛ nguamma mpem ɔha ne adwennini mpem ɔha ho nwi ma Israelhene afe biara.
5 Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele.
Nanso Ahab wu akyi no, Moabhene sɔre tiaa Israelhene.
6 Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba.
Enti ɔhene Yoram fii Samaria boaboaa Israel asraafo ano.
7 Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda: — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi? Mokonzi Jozafati azongisaki: — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.
Ɔde nkra kɔmaa Yudahene Yehosafat se, “Moabhene asɔre atia me. Wobɛboa me na me ne no ako ana?” Na Yehosafat buae se, “Me ne wo bɛkɔ. Wo ne me yɛ anuanom, me nkurɔfo yɛ wo nkurɔfo, mʼapɔnkɔ yɛ wʼapɔnkɔ.”
8 Jozafati atunaki: — Tokokende na nzela nini? Yorami azongisaki: — Na nzela ya esobe ya Edomi.
Na Yehosafat bisae se, “Ɔkwan bɛn na yɛbɛfa so akɔ?” Yoram buae se, “Yɛbɛtoa wɔn afi Edom sare so.”
9 Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.
Edomhene ne nʼakofo kɔkaa wɔn ho. Na asraafo dɔm abiɛsa no bɔɔ nsra twaa wɔn ho besii wɔn anan mu saa nnanson no, na wɔne wɔn mmoa nnya nsu nnom.
10 Mokonzi ya Isalaele akamwaki: — Ndenge nini boye! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi?
Israelhene teɛɛ mu bisae se, “Yɛnyɛ yɛn ho dɛn? Awurade de yɛn baasa aba ha sɛ Moabhene nni yɛn so ana?”
11 Kasi Jozafati atunaki: — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.
Nanso Yudahene Yehosafat bisae se, “Enti Awurade diyifo biara nka yɛn ho wɔ ha ana? Sɛ wɔn mu bi wɔ ha a, yebetumi abisa Awurade nea yɛnyɛ.” Ɔhene Yoram mpanyimfo no mu baako kae se, “Safat babarima Elisa wɔ ha. Na ɔyɛ Elia boafo.”
12 Jozafati alobaki: — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.
Enti Yehosafat kae se, “Ɛno de, Awurade betumi akasa afa no so.” Na Israelhene, Yudahene ne Edomhene kɔɔ Elisa nkyɛn abisa.
13 Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Ngai na yo likambo nini? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Te! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi!
Elisa ka kyerɛɛ Israelhene se, “Wo ho nhia me. Kɔ wʼagya ne wo na adiyifo abosonsomfo no nkyɛn.” Nanso ɔhene Yoram kae se, “Dabi! Efisɛ ɛyɛ Awurade na ɔfrɛɛ yɛn ahemfo baasa yi baa ha sɛ ɔrebeyi yɛn ahyɛ Moabhene nsa!”
14 Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo ngai nasalelaka; soki ezalaki te mpo na kotosa Jozafati, mokonzi ya Yuda, nalingaki kutu ata moke te kotala yo to kolanda yo na bokebi.
Na Elisa buae se, “Mmere dodow a Awurade Tumfo a mesom no no te ase yi, sɛ ɛnyɛ Yudahene Yehosafat a mibu no a, anka merenhaw me ho wɔ wo ho.
15 Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda! Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize,
Afei, ma obi a obetumi abɔ sanku mmra.” Bere a wɔrebɔ sanku no, Awurade tumi baa Elisa so,
16 mpe Elize alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Botimola mabulu ebele na lubwaku oyo!
ma ɔkae se, “Sɛnea Awurade se ni: Saa obon a emu nsu ayow yi, wɔde nsu bɛhyɛ no ma.
17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: Bokotikala te komona mopepe to mvula, kasi lubwaku oyo ekotonda na mayi, mpe bino elongo na bibwele na bino bokomela yango.
Worenhu mframa anaa osu sɛnea Awurade ka no, nanso saa obon yi, wɔbɛhyɛ no nsu ma. Mubenya bi ama mo ho, mo anantwi ne mo mmoa a aka no.
18 Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino.
Na eyi yɛ ade a ɛyɛ mmerɛw ma Awurade. Ɔbɛma moadi Moab asraafo so nkonim.
19 Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. »
Mubedi wɔn nkuropɔn papa so nkonim, mpo, nkuropɔn a wɔabɔ ho ban no. Mubetwitwa wɔn nnua nyinaa agu. Mubesisiw wɔn asu aniwa, na mode abo asɛe wɔn nsase pa.”
20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi.
Na ade kyee a eduu bere a wɔbɔ anɔpa afɔre no, nsu puee prɛko pɛ. Na ɛsen fii Edom, na ankyɛ biara na nsu abu so wɔ baabiara.
21 Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka.
Bere a Moabfo tee sɛ asraafo dɔm abiɛsa reba wɔn so no, wɔn nso boaboaa mmarima a wobetumi ako, mmofra ne mpanyin ano, de wɔn sisii wɔn ahye so.
22 Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila.
Na ade kyee a wɔsɔree no, na owia no abɔ wɔ asu no so, ama ani abere sɛ mogya.
23 Bagangaki: « Ezali makila! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango! »
Moabfo no teɛɛ mu se, “Ɛyɛ mogya. Sesɛɛ asraafo dɔm abiɛsa no atwa wɔn ho ako, akunkum wɔn ho wɔn ho! Momma yɛnkɔfow asade no!”
24 Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango.
Bere a woduu Israelfo nsraban mu no, Israel asraafo gyee bum, kɔtoaa Moabfo, ma woguanee. Israel asraafo no taa wɔn koduu Moab asase so. Wɔretaa Moabfo no nyinaa no, na wɔresɛe wɔn nneɛma.
25 Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.
Wɔsɛee wɔn nkurow akɛse, de abo kataa wɔn nsase pa so, sisiw asuti nyinaa, twitwaa nnua pa nyinaa. Kir-Haraset nko ara na ɛkae, na ɛno mpo, wɔtow hyɛɛ so.
26 Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.
Bere a Moabhene huu sɛ ɔredi nkogu no, odii nʼakofo ahanson anim, yeree wɔn ho, pɛɛ sɛ wɔpem fa atamfo no nsraban a ɛbɛn Edomhene no mu, nanso wɔantumi.
27 Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.
Enti ɔfaa ne babarima panyin a anka ɛsɛ sɛ odi nʼade sɛ ɔhene no, de no bɔɔ ɔhyew afɔre wɔ afasu no ho. Abufuw kɛse baa Israel so, na wɔsan wɔn akyi kɔɔ wɔn ankasa asase so.

< 2 Bakonzi 3 >