< 2 Bakonzi 25 >
1 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
Then it happened that, in the ninth year of his reign, in the tenth month, on the tenth day of the month, Nebuchadnezzar, the king of Babylon, he and his entire army, arrived against Jerusalem. And they encircled it, and they constructed fortifications all around it.
2 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
And the city was enclosed and besieged, even until the eleventh year of king Zedekiah,
3 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,
on the ninth day of the month. And a famine prevailed in the city; neither was there bread for the people of the land.
4 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
And the city was breached. And all the men of war fled in the night along the way of the gate which is between the double wall at the garden of the king. Now the Chaldeans were besieging the city on all sides. And so Zedekiah fled along the way which leads to the plains of the wilderness.
5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki ye mpe bapanzanaki.
And the army of the Chaldeans pursued the king, and they overtook him in the plains of Jericho. And all the warriors who were with him were dispersed, and they abandoned him.
6 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu.
Therefore, having apprehended him, they led the king to the king of Babylon at Riblah. And he was speaking with him in judgment.
7 Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.
Then he killed the sons of Zedekiah before him, and he dug out his eyes, and he bound him with chains, and he led him away to Babylon.
8 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano.
In the fifth month, on the seventh day of the month, the same is the nineteenth year of the king of Babylon, Nebuzaradan, the leader of the army, a servant of the king of Babylon, went into Jerusalem.
9 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.
And he set fire to the house of the Lord, and to the house of the king. And the houses of Jerusalem, and every great house, he burned with fire.
10 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
And the entire army of the Chaldeans, which was with the leader of the military, tore down the walls of Jerusalem all around.
11 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki.
Then Nebuzaradan, the leader of the military, carried away the rest of the people, who had remained in the city, and the fugitives, who had fled over to the king of Babylon, and the remnant of the common people.
12 Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
But he left behind some vinedressers and farmers from the poor of the land.
13 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.
Now the pillars of brass which were in the temple of the Lord, and the bases, and the sea of brass, which was in the house of the Lord, the Chaldeans broke apart. And they took all the brass to Babylon.
14 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo, basani ya putulu, bapawu, bambeli, bakopo.
Also, they took away the cooking pots of brass, and the scoops, and the forks, and the cups, and the little mortars, and all the articles of brass with which they were ministering.
15 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata: bambabola mpe basani ya kobwakela mayi.
And the leader of the military even took away the censers and the bowls, whatever was of gold for the gold, and whatever was of silver for the silver,
16 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe: makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario.
and also the two pillars, the one sea, and the bases which Solomon had made for the temple of the Lord. The brass of all these items was beyond measure.
17 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko.
One pillar had eighteen cubits in height. And the head of brass upon it was three cubits in height. And the network and pomegranates upon the head of the pillar were all of brass. And the second pillar had a similar adornment.
18 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
Also, the leader of the military took away Seraiah, the chief priest, and Zephaniah, the second priest, and three doorkeepers,
19 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba, bapesi toli mitano, mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.
and from the city, one eunuch, who was in charge of the men of war, and five men out of those who had stood before the king, whom he found in the city, and Sopher, the leader of the army who trained the young soldiers from the people of the land, and sixty men from the common people, who had been found in the city.
20 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.
Taking them, Nebuzaradan, the leader of the military, led them to the king of Babylon at Riblah.
21 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.
And the king of Babylon struck them and killed them at Riblah, in the land of Hamath. And Judah was taken away from his land.
22 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda.
But over the people who had remained in the land of Judah, whom Nebuchadnezzar, the king of Babylon, had permitted, he appointed as ruler Gedaliah, the son of Ahikam, the son of Shaphan.
23 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango: Isimaeli, mwana mobali ya Netania; Yoanani, mwana mobali ya Karea; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
And when all the commanders of the military had heard this, they and the men who were with them, specifically, that the king of Babylon had appointed Gedaliah, they went to Gedaliah at Mizpah: Ishmael, the son of Nethaniah, and Johanan, the son of Kareah, and Seraiah, the son of Tanhumeth, the Netophathite, and Jaazaniah, the son of a Maacathite, they and their companions.
24 Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo: « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. »
And Gedaliah swore to them and to their companions, saying: “Do not be afraid to serve the Chaldeans. Remain in the land, and serve the king of Babylon, and it shall be well with you.”
25 Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa.
But it happened that, in the seventh month, Ishmael, the son of Nethaniah, the son of Elishama, of royal offspring, and ten men with him, went and struck Gedaliah, who then died, along with the Jews and the Chaldeans who were with him at Mizpah.
26 Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni.
And all the people, from small to great, and the leaders of the military, rising up, went away to Egypt, fearing the Chaldeans.
27 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.
Truly, it happened that, in the thirty-seventh year of the transmigration of Jehoiachin, the king of Judah, in the twelfth month, on the twenty-seventh day of the month, Evilmerodach, the king of Babylon, in the year when he had begun to reign, lifted up the head of Jehoiachin, the king of Judah, from prison.
28 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni;
And he spoke kindly to him. And he set his throne above the throne of the kings who were with him at Babylon.
29 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
And he changed his garments that he had worn in prison. And he ate bread before him always, during all the days of his life.
30 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.
Also, he appointed to him an allowance without ceasing, which also was given to him by the king, for each day, during all the days of his life.