< 2 Bakonzi 20 >
1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
那时,希西家病得要死。亚摩斯的儿子先知以赛亚去见他,对他说:“耶和华如此说:‘你当留遗命与你的家,因为你必死,不能活了。’”
2 Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe:
希西家就转脸朝墙,祷告耶和华说:
3 — Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
“耶和华啊,求你记念我在你面前怎样存完全的心,按诚实行事,又做你眼中所看为善的。”希西家就痛哭了。
4 Liboso ete Ezayi akoma na lopango ya monene, Yawe alobaki na ye:
以赛亚出来,还没有到中院,耶和华的话就临到他,说:
5 — Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi: ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.
“你回去告诉我民的君希西家说:耶和华—你祖大卫的 神如此说:‘我听见了你的祷告,看见了你的眼泪,我必医治你;到第三日,你必上到耶和华的殿。
6 Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › »
我必加增你十五年的寿数,并且我要救你和这城脱离亚述王的手。我为自己和我仆人大卫的缘故,必保护这城。’”
7 Ezayi alobaki: — Bozwa liboke ya figi. Bazwaki yango, batiaki yango na pota oyo ezalaki kokawuka te, mpe mokonzi abikaki.
以赛亚说:“当取一块无花果饼来。”人就取了来,贴在疮上,王便痊愈了。
8 Ezekiasi atunaki Ezayi: — Elembo nini ekolakisa ngai ete Yawe akobikisa ngai, mpe ete nakokende na Tempelo ya Yawe sima na lobi?
希西家问以赛亚说:“耶和华必医治我,到第三日,我能上耶和华的殿,有什么兆头呢?”
9 Ezayi azongisaki: — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo: Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi?
以赛亚说:“耶和华必成就他所说的。这是他给你的兆头:你要日影向前进十度呢?是要往后退十度呢?”
10 Ezekiasi azongisaki: — Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi.
希西家回答说:“日影向前进十度容易,我要日影往后退十度。”
11 Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.
先知以赛亚求告耶和华,耶和华就使亚哈斯的日晷向前进的日影,往后退了十度。
12 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki.
那时,巴比伦王巴拉但的儿子米罗达·巴拉但听见希西家病而痊愈,就送书信和礼物给他。
13 Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
希西家听从使者的话,就把他宝库的金子、银子、香料、贵重的膏油,和他武库的一切军器,并他所有的财宝,都给他们看。他家中和他全国之内,希西家没有一样不给他们看的。
14 Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye: — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi? Ezekiasi azongisaki: — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni.
于是先知以赛亚来见希西家王,问他说:“这些人说什么?他们从哪里来见你?”希西家说:“他们从远方的巴比伦来。”
15 Ezayi atunaki: — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi? Ezekiasi azongisaki: — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
以赛亚说:“他们在你家里看见了什么?”希西家说:“凡我家中所有的,他们都看见了;我财宝中没有一样不给他们看的。”
16 Ezayi alobaki na Ezekiasi: — Yoka liloba oyo Yawe alobi:
以赛亚对希西家说:“你要听耶和华的话,
17 « Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.
日子必到,凡你家里所有的,并你列祖积蓄到如今的,都要被掳到巴比伦去,不留下一样。这是耶和华说的。
18 Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
并且从你本身所生的众子,其中必有被掳去在巴比伦王宫里当太监的。”
19 Ezekiasi azongiselaki Ezayi: — Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela: « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai? »
希西家对以赛亚说:“你所说耶和华的话甚好!若在我的年日中有太平和稳固的景况,岂不是好吗?”
20 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
希西家其余的事和他的勇力,他怎样挖池、挖沟、引水入城,都写在犹大列王记上。
21 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
希西家与他列祖同睡。他儿子玛拿西接续他作王。