< 2 Bakonzi 19 >

1 Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.
And when king Ezechias heard these words, he rent his garments, and covered himself with sackcloth, and went into the house of the Lord.
2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo; bango nyonso balata bilamba ya basaki.
And he sent Eliacim, who was over the house, and Sobna the scribe, and the ancients of the priests covered with sackcloths, to Isaias the prophet the son of Amos,
3 Balobaki na ye: — Tala makambo oyo Ezekiasi alobi: « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
And they said to him: Thus saith Ezechias: This day is a day of tribulation, and of rebuke, and of blasphemy: the children are come to the birth, and the woman in travail hath not strength.
4 Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »
It may be the Lord thy God will hear all the words of Rabsaces, whom the king of the Assyrians his master hath sent to reproach the living God, and to reprove with words, which the Lord thy God hath heard: and do thou offer prayer for the remnants that are found.
5 Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,
So the servants of king Ezechias came to Isaias.
6 Ezayi alobaki na bango: — Boloba na nkolo na bino: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.
And Isaias said to them: Thus shall you say to your master: Thus saith the Lord: Be not afraid for the words which thou hast heard, with which the servants of the king of the Assyrians have blasphemed me.
7 Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
Behold I will send a spirit upon him, and he shall hear a message, and shall return into his own country, and I will make him fall by the sword in his own country.
8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
And Rabsaces returned, and found the king of the Assyrians besieging Lobna: for he had heard that he was departed from Lachis.
9 Sima na Senakeribe koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo:
And when he heard of Theraca king of Ethiopia: Behold, he is come out to fight with thee: and was going against him, he sent messengers to Ezechias, saying:
10 « Boloba na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda: Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo: ‹ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri! ›
Thus shall you say to Ezechias king of Juda: Let not thy God deceive thee, in whom thou trustest: and do not say: Jerusalem shall not be delivered into the hands of the king of the Assyrians.
11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye; okanisi ete yo nde okobika?
Behold thou hast heard what the kings of the Assyrians have done to all countries, how they have laid them waste: and canst thou alone be delivered?
12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango?
Have the gods of the nations delivered any of them, whom my fathers have destroyed, to wit, Gozan, and Haran, and Reseph, and the children of Eden that were in Thelassar?
13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva? »
Where is the king of Emath, and the king of Arphad, and the king of the city of Sepharvaim, of Ana and of Ava?
14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.
And when Ezechias had received the letter of the hand of the messengers, and had read it, he went up to the house of the Lord, and spread it before the Lord,
15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe: « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele.
And he prayed in his sight, saying: O Lord God of Israel, who sitteth upon the cherubims, thou alone art the God of all the kings of the earth: thou madest heaven and earth:
16 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka! Yawe, fungola miso mpe mona! Yoka maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
Incline thy ear, and hear: open, O Lord, thy eyes, and see: and hear all the words of Sennacherib, who hath sent to upbraid unto us the living God.
17 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo oyo mpe mikili na bango,
Of a truth, O Lord, the kings of the Assyrians have destroyed nations, and the lands of them all.
18 bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te kasi banzete to mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.
And they have cast their gods into the fire: for they were not Rods, but the works of men’s hands of wood and stone, and they destroyed them.
19 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe! »
Now therefore, O Lord our God, save us from his hand, that all the kingdoms of the earth may know, that thou art the Lord the only God.
20 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nayoki losambo na yo na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri.
And Isaias the son of Amos sent to Ezechias, saying: Thus saith the Lord the God of Israel: I have heard the prayer thou hast made to me concerning Sennacherib king of the Assyrians.
21 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye: ‹ Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo; Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
This is the word, that the Lord hath spoken of him: The virgin the daughter of Sion hath despised thee, and laughed thee to scorn: the daughter of Jerusalem hath wagged her head behind thy back.
22 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo? Ngai, Mosantu ya Isalaele!
Whom hast thou reproached, and whom hast thou blasphemed? against whom hast thou exalted thy voice, and lifted up thy eyes on high? against the holy one of Israel.
23 Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki: ‘Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, na basonge oyo eleki likolo kati na Libani, nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko,
By the hand of thy servants thou hast reproached the Lord, and hast said: With the multitude of my chariots I have gone up to the height of the mountains, to the top of Libanus, and have cut down its tall cedars, and its choice fir trees. And I have entered into the furthest parts thereof, and the forest of its Carmel.
24 natimolaki mabulu ya mayi kati na mikili ya bapaya mpe namelaki mayi kuna. Na matambe ya makolo na ngai, nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito.’
I have cut down, and I have drunk strange waters, and have dried up with the soles of my feet all the shut up waters.
25 Oyoka nanu yango te? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala; sik’oyo nde nakokisi yango; esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.
Hast thou not heard what I have done from the beginning? from the days of old I have formed it, and now I have brought it to effect: that fenced cities of fighting men should be turned to heaps of ruin:
26 Bato na yango bazangi makasi, balengi na somo mpe bakomi na soni, bakomi lokola matiti ya bilanga, lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, ekawuka liboso ete ekola.
And the inhabitants of them, were weak of hand, they trembled and were confounded, they became like the grass of the field, and the green herb on the tops of houses, which withered before it came to maturity.
27 Nayebi esika nini ozalaka, tango nini obimaka, tango nini ozongaka, mpe tango nini otombokelaka Ngai.
Thy dwelling and thy going out, and thy coming in, and thy way I knew before, and thy rage against me.
28 Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki. ›
Thou hast been mad against me, and thy pride hath come up to my ears: therefore I will put a ring in thy nose, and a bit between thy lips, and I will turn thee back by the way, by which thou camest.
29 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo: Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango.
And to thee, O Ezechias, this shall be a sign: Eat this year what thou shalt find: and in the second year, such things as spring of themselves: but in the third year sow and reap: plant vineyards, and eat the fruit of them.
30 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, bakozala lisusu lokola nzete oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele mpe eboti bambuma.
And whatsoever shall be left of the house of Juda, shall take root downward, and bear fruit upward.
31 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.
For out of Jerusalem shall go forth a remnant, and that which shall be saved out of mount Sion: the zeal of the Lord of hosts shall do this.
32 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri: ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba;
Wherefore thus saith the Lord concerning the king of the Assyrians: He shall not come into this city, nor shoot an arrow into it, nor come before it with shield, nor cast a trench about it.
33 akozongela na nzela oyo ayelaki mpe akokota na engumba oyo te, elobi Yawe.
By the way that he came, he shall return: and into this city he shall not come, saith the Lord.
34 Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango, mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »
And I will protect this city, and will save it for my own sake, and for David my servant’s sake.
35 Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
And it came to pass that night, that an angel of the Lord came, and slew in the camp of the Assyrians a hundred and eighty-five thousand. And when he arose early in the morning, he saw all the bodies of the dead.
36 Boye Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.
And Sennacherib king of the Assyrians departing went away, and he returned and abode in Ninive.
37 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri, babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.
And as he was worshipping in the temple of Nesroch his god, Adramelech and Sarasar his sons slew him with the sword, and they fled into the land of the Armenians, and Asarhaddon his son reigned in his stead.

< 2 Bakonzi 19 >