< 2 Bakonzi 18 >

1 Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
Now it happened in the third year of Hoshea son of Elah king of Israel, that Hezekiah the son of Ahaz king of Judah began to reign.
2 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abi. » Abi azalaki mwana mwasi ya Zakari.
He was twenty-five years old when he began to reign; and he reigned twenty-nine years in Jerusalem: and his mother's name was Abi the daughter of Zechariah.
3 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
He did that which was right in the eyes of the LORD, according to all that David his father had done.
4 Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »
He removed the high places, and broke the pillars, and cut down the Asherah: and he broke in pieces the bronze serpent that Moses had made; for in those days the children of Israel burned incense to it; and he called it Nehushtan.
5 Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye.
He trusted in the LORD, the God of Israel; so that after him was none like him among all the kings of Judah, nor among them that were before him.
6 Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
For he joined with the LORD; he did not depart from following him, but kept his commandments, which the LORD commanded Moses.
7 Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye.
The LORD was with him; wherever he went forth he prospered: and he rebelled against the king of Assyria, and did not serve him.
8 Alongaki bato ya Filisitia mpe alandaki bango kino na Gaza, abebisaki engumba mpe etuka na yango, mpe abotolaki bingumba batonga makasi mpe bandako milayi ya bakengeli.
He struck the Philistines to Gaza and its borders, from the tower of the watchmen to the fortified city.
9 Tango Ezekiasi akokisaki mibu minei na bokonzi, oyo ezalaki mobu ya sambo ya bokonzi ya Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, Salimanasari, mokonzi ya Asiri, abundisaki Samari mpe azingelaki yango.
It happened in the fourth year of king Hezekiah, which was the seventh year of Hoshea son of Elah king of Israel, that Shalmaneser king of Assyria came up against Samaria, and besieged it.
10 Bato ya Asiri babotolaki Samari sima na mibu misato ya bitumba, na mobu ya motoba ya bokonzi ya Ezekiasi, oyo ezalaki mobu ya libwa ya bokonzi ya Oze, mokonzi ya Isalaele.
At the end of three years they took it: in the sixth year of Hezekiah, which was the ninth year of Hoshea king of Israel, Samaria was taken.
11 Mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Isalaele na bowumbu na Asiri mpe atiaki bango na Ala, na ngambo ya ebale Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
The king of Assyria carried Israel away to Assyria, and put them in Halah, and on the Habor, the river of Gozan, and in the cities of the Medes,
12 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango.
because they did not obey the voice of the LORD their God, but transgressed his covenant, even all that Moses the servant of the LORD commanded, and would not hear it, nor do it.
13 Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango.
Now in the fourteenth year of king Hezekiah, Sennacherib king of Assyria came up against all the fortified cities of Judah, and took them.
14 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi: « Nasali mabe, bima na mboka na ngai; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. » Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo.
Hezekiah king of Judah sent to the king of Assyria to Lachish, saying, "I have offended; return from me. That which you put on me, I will bear." The king of Assyria appointed to Hezekiah king of Judah three hundred talents of silver and thirty talents of gold.
15 Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi.
Hezekiah gave him all the silver that was found in the house of the LORD, and in the treasures of the king's house.
16 Na tango wana, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alongolaki wolo oyo asalelaki mpo na kolatisa bikuke mpe mabaya oyo esimbaka bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri.
At that time, Hezekiah cut off the gold from the doors of the LORD's temple, and from the pillars which Hezekiah king of Judah had overlaid, and gave it to the king of Assyria.
17 Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,
The king of Assyria sent Tartan and Rabsaris and Rabshakeh from Lachish to king Hezekiah with a great army to Jerusalem. They went up and came to Jerusalem and stood by the conduit of the upper pool, which is on the highway of the Launderers' Field.
18 babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango.
When they had called to the king, there came out to them Eliakim the son of Hilkiah, who was over the household, and Shebnah the scribe, and Joah the son of Asaph the recorder.
19 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango: « Boloba na Ezekiasi: ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: ‘Otie elikya na yo na nini?
Rabshakeh said to them, "Say now to Hezekiah, 'Thus says the great king, the king of Assyria, "What confidence is this in which you trust?
20 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai?
Do you think that empty words are strategy and power for war? Now on whom do you trust, that you have rebelled against me?
21 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema!’
Now, look, you trust in the staff of this bruised reed, even in Egypt. If a man leans on it, it will go into his hand, and pierce it. So is Pharaoh king of Egypt to all who trust on him.
22 Tango mosusu bokoloba na ngai: ‘Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso.’ Boni! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi: ‘Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo?’
But if you tell me, 'We trust in the LORD our God;' isn't that he whose high places and whose altars Hezekiah has taken away, and has said to Judah and to Jerusalem, 'You shall worship before this altar in Jerusalem?'
23 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri: ‘Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango!
Now therefore, please give pledges to my master the king of Assyria, and I will give you two thousand horses, if you are able on your part to set riders on them.
24 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo kati na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango?
How then can you turn away the face of one captain of the least of my master's servants, and put your trust on Egypt for chariots and for horsemen?
25 Boni, okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa esika oyo na ndingisa ya Yawe te? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango.’ › »
Have I now come up without the LORD against this place to destroy it? The LORD said to me, 'Go up against this land, and destroy it.'"'"
26 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi: — Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka.
Then Eliakim the son of Hilkiah, and Shebnah, and Joah, said to Rabshakeh, "Please speak to your servants in the Aramaic language; for we understand it. Do not speak with us in the Jews' language, in the hearing of the people who are on the wall."
27 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki: — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino? Te! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino?
But Rabshakeh said to them, "Has my master sent me to your master, and to you, to speak these words? Hasn't he sent me to the men who sit on the wall, to eat their own dung, and to drink their own water with you?"
28 Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre: — Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri!
Then Rabshakeh stood, and cried with a loud voice in the Jews' language, and spoke, saying, "Hear the word of the great king, the king of Assyria.
29 Tala makambo oyo mokonzi alobi: « Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino na loboko na ngai!
Thus says the king, 'Do not let Hezekiah deceive you; for he will not be able to deliver you out of my hand.
30 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba: ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›
Neither let Hezekiah make you trust in the LORD, saying, "The LORD will surely deliver us, and this city shall not be given into the hand of the king of Assyria."
31 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi: Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye
Do not listen to Hezekiah.' For thus says the king of Assyria, 'Make your peace with me, and come out to me; and everyone of you eat of his vine, and everyone of his fig tree, and everyone drink the waters of his own cistern;
32 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba: ‹ Yawe akokangola biso. ›
until I come and take you away to a land like your own land, a land of grain and new wine, a land of bread and vineyards, a land of olive trees and of honey, that you may live, and not die. Do not listen to Hezekiah, when he persuades you, saying, "The LORD will deliver us."
33 Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri?
Has any of the gods of the nations ever delivered his land out of the hand of the king of Assyria?
34 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi? Wapi banzambe ya Sefarivayimi, ya Ena, ya Iva? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai?
Where are the gods of Hamath, and of Arpad? Where are the gods of Sepharvaim, of Hena, and Ivvah? Have they delivered Samaria out of my hand?
35 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai? »
Who are they among all the gods of the countries, that have delivered their country out of my hand, that the LORD should deliver Jerusalem out of my hand?'"
36 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo: — Bopesa ye eyano te!
But the people held their peace, and answered him not a word; for the king's commandment was, "Do not answer him."
37 Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.
Then Eliakim the son of Hilkiah, who was over the household, came with Shebna the scribe, and Joah the son of Asaph the recorder, to Hezekiah with their clothes torn, and told him the words of Rabshakeh.

< 2 Bakonzi 18 >