< 2 Bakonzi 16 >
1 Na mobu ya zomi na sambo ya bokonzi ya Peka, mwana mobali ya Remalia, Akazi, mwana mobali ya Yotami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
In the seventeenth year of Phacee the son of Romelia reigned Achaz the son of Joatham king of Juda.
2 Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.
Achaz was twenty years old when he began to reign, and he reigned sixteen years in Jerusalem: he did not that which was pleasing in the sight of the Lord his God, as David his father.
3 Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.
But he walked in the way of the kings of Israel: moreover he consecrated also his son, making him pass through the fire according to the idols of the nations: which the Lord destroyed before the children of Israel.
4 Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu.
He sacrificed also and burnt incense in the high places and on the hills, and under every green tree.
5 Bongo Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bamataki mpo na kobundisa Yelusalemi mpe bazingelaki Akazi, kasi bakokaki kolonga ye te.
Then Basin king of Syria, and Phacee son of Romelia king of Israel came up to Jerusalem to fight: and they besieged Achaz, but were not able to overcome him.
6 Na tango wana, Retsini, mokonzi ya Siri, azongisaki Eyilati na se ya bokonzi ya Siri. Abenganaki bato ya Yuda oyo bazalaki na Efrate, mpe bato ya Edomi bayaki kovanda kuna kino lelo.
At that time Rasin king of Syria restored Aila to Syria, and drove the men of Juda out of Aila: and the Edomites came into Aila, and dwelt there unto this day.
7 Akazi atindaki bantoma epai ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na koloba na ye: « Nazali mosali na yo mpe mwana na yo; yaka kokangola ngai na maboko ya mokonzi ya Siri mpe mokonzi ya Isalaele oyo bayei kobundisa ngai. »
And Achaz sent messengers to Theglathphalasar king of the Assyrians, saying: I am thy servant, and thy son: come up, and save me out of the hand of the king of Syria, and out of the hand of the king of Israel, who are risen up together against me.
8 Akazi azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; bongo atindaki yango lokola kado epai ya mokonzi ya Asiri.
And when he had gathered together the silver and gold that could be found in the house of the Lord, and in the king’s treasures, he sent it for a present to the king of the Assyrians.
9 Mokonzi ya Asiri ayokaki ye, akendeki kobundisa Damasi mpe abotolaki yango. Amemaki bato ya Damasi na bowumbu na Kiri mpe abomaki Retsini.
And he agreed to his desire: for the king of the Assyrians went up against Damascus, and laid it waste: and he carried away the inhabitants thereof to Cyrene, but Basin he slew.
10 Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango.
And king Achaz went to Damascus to meet Theglathphalasar king of the Assyrians, and when he had seen the altar of Damascus, king Achaz sent to Urias the priest a pattern of it, and its likeness according to all the work thereof.
11 Boye Nganga-Nzambe Uri atongaki etumbelo kolanda elilingi oyo mokonzi Akazi atindaki wuta na Damasi, mpe asilisaki kotonga yango liboso ete mokonzi Akazi azonga wuta na Damasi.
And Urias the priest built an altar according to all that king Achaz had commanded from Damascus, so did Urias the priest, until king Achaz came from Damascus.
12 Tango mokonzi Akazi azongaki wuta na Damasi, amonaki etumbelo, apusanaki pene na yango mpe abonzaki bambeka na likolo na yango.
And when the king was come from Damascus, he saw the altar and worshipped it: and went up and offered holocausts, and his own sacrifice.
13 Atumbaki mbeka na ye mpe likabo ya gato, asopaki likabo ya masanga mpe abwakaki makila ya bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo.
And offered libations and poured the blood of the peace offerings, which he had offered upon the altar.
14 Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor.
But the altar of brass that was before the Lord, he removed from the face of the temple, and from the place of the altar, and from the place of the temple of the Lord: and he set it at the side of the altar toward the north.
15 Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri: « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. »
And king Achaz commanded Urias the priest saying: Upon the great altar offer the morning holocaust, and the evening sacrifice, and the king’s holocaust, and his sacrifice, and the holocaust of the whole people of the land, and their sacrifices, and their libations: and all the blood of the holocaust, and all the blood of the victim thou shalt pour out upon it: but the altar of brass shall be ready at my pleasure.
16 Nganga-Nzambe Uri asalaki ndenge kaka mokonzi Akazi atindaki.
So Urias the priest did according to all that king Achaz had commanded him.
17 Mokonzi Akazi alongolaki mabaya oyo esimbaka bamesa, mpe alongolaki basani ya minene na likolo na yango; akitisaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na likolo ya bikeko ya bangombe mpe atiaki yango na likolo ya mabanga babongisa malamu.
And king Achaz took away the graven bases, and the laver that was upon them: and he took down the sea from the brazen oxen that held it up, and put it upon a pavement of stone.
18 Abongolaki shambre ya Saba ya kokotela oyo batongaki na kati ya Ndako ya Nzambe; abongolaki lisusu ekuke ya mokonzi oyo batongaki na libanda ya Tempelo ya Yawe mpo na kosepelisa mokonzi ya Asiri.
The Musach also for the sabbath, which he had built in the temple: and the king’s entry from without he turned into the temple of the Lord, because of the king of the Assyrians.
19 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Achaz, which he did, are they not written in the book of the words of the days of the kings of Juda?
20 Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
And Achaz slept with his fathers, and was buried with them in the city of David, and Ezechias his son reigned in his stead.