< 2 Bakonzi 15 >

1 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi, Azaria, mwana mobali ya Amatsia, akomaki mokonzi ya Yuda.
در بیست و هفتمین سال سلطنت یربعام دوم پادشاه اسرائیل، عُزیا (پسر اَمَصیا) پادشاه یهودا شد.
2 Azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi.
او شانزده ساله بود که بر تخت سلطنت نشست و پنجاه و دو سال در اورشلیم سلطنت کرد. (مادرش یکلیا نام داشت و از اهالی اورشلیم بود.)
3 Azaria asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki.
او مانند پدرش اَمَصیا آنچه در نظر خداوند پسندیده بود، انجام می‌داد.
4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
ولی باز بتخانه‌های روی تپه‌ها که مردم در آنجا قربانی می‌کردند و بخور می‌سوزانیدند، باقی ماند.
5 Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
خداوند او را به مرض جذام مبتلا کرد و تا روز وفاتش جذامی باقی ماند. او تنها، در یک خانه به سر می‌برد و پسرش یوتام امور مملکت را اداره می‌کرد.
6 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت عزیا و کارهای او در کتاب «تاریخ پادشاهان یهودا» نوشته شده است.
7 Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
وقتی عزیا مرد او را در آرامگاه سلطنتی در شهر داوود دفن کردند و پسرش یوتام به جایش پادشاه شد.
8 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari; mpe akonzaki basanza motoba.
در سی و هشتمین سال سلطنت عزیا پادشاه یهودا، زکریا (پسر یربعام دوم) پادشاه اسرائیل شد و شش ماه در سامره سلطنت نمود.
9 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
او نیز مانند اجدادش نسبت به خداوند گناه ورزید و از گناهان یربعام اول (پسر نباط) که اسرائیل را به گناه کشاند، دست برنداشت.
10 Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.
شلوم (پسر یابیش) بر ضد او توطئه کرد و او را در حضور مردم کشت و خود به سلطنت رسید.
11 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zakari, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت زکریا در کتاب «تاریخ پادشاهان اسرائیل» آمده است.
12 Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki: « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
به این ترتیب، آنچه که خداوند دربارهٔ ییهو فرموده بود، به وقوع پیوست که خاندان او تا نسل چهارم بر تخت سلطنت اسرائیل خواهند نشست.
13 Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko.
در سی و نهمین سال سلطنت عزیا پادشاه یهودا، شلوم (پسر یابیش) پادشاه اسرائیل شد و یک ماه در سامره سلطنت کرد.
14 Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.
منحیم (پسر جادی) از ترصه به سامره آمده، او را کشت و خود به جای وی بر تخت سلطنت نشست.
15 Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
شرح بقیهٔ رویدادهای سلطنت شلوم و توطئهٔ او در کتاب «تاریخ پادشاهان اسرائیل» نوشته شده است.
16 Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi.
منحیم شهر تفصح و حومهٔ آن را ویران نموده، اهالی آنجا را کشت و شکم زنان حامله را پاره کرد، چون مردم آنجا حاضر نبودند تسلیم او شوند.
17 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi.
در سی و نهمین سال سلطنت عزیا پادشاه یهودا، منحیم (پسر جادی) پادشاه اسرائیل شد و ده سال در سامره سلطنت کرد.
18 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
او نیز مانند یربعام (پسر نباط) نسبت به خداوند گناه ورزید و اسرائیل را به گناه کشاند.
19 Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye.
در زمان او تغلت فلاسر، پادشاه آشور به سرزمین اسرائیل هجوم آورد، ولی منحیم پادشاه سی و چهار تن نقره به او باج داد و به کمک وی سلطنت خود را بر اسرائیل تثبیت نمود.
20 Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.
منحیم این پول را به شکل مالیات به زور از ثروتمندان وصول نمود. هر یک از آنها پنجاه مثقال نقره پرداختند. پس پادشاه آشور به سرزمین خود بازگشت.
21 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Menayeme mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت منحیم و کارهای او در کتاب تاریخ پادشاهان اسرائیل نوشته شده است.
22 Menayeme akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Pekakia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
بعد از مرگ او پسرش فقحیا پادشاه شد.
23 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale.
در پنجاهمین سال سلطنت عزیا پادشاه یهودا، فقحیا (پسر منحیم) پادشاه اسرائیل شد و دو سال در سامره سلطنت نمود،
24 Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
او نیز مانند یربعام (پسر نباط) نسبت به خداوند گناه ورزید و اسرائیل را به گناه کشاند.
25 Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi.
فقح (پسر رملیا)، یکی از فرماندهان سپاه او، همراه پنجاه نفر دیگر از مردان جلعاد بر ضد او شورش کرد و او را در کاخ سلطنتی سامره کشت. (ارجوب و اریه نیز در این شورش کشته شدند.) سپس فقح به جای او پادشاه شد.
26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت فقحیا و کارهای او در کتاب «تاریخ پادشاهان اسرائیل» نوشته شده است.
27 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari; mpe akonzaki mibu tuku mibale.
در پنجاه و دومین سال سلطنت عزیا پادشاه یهودا، فقح (پسر رملیا) پادشاه اسرائیل شد و بیست سال در سامره سلطنت کرد.
28 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
او نیز مانند یربعام (پسر نباط) نسبت به خداوند گناه ورزید و اسرائیل را به گناه کشاند.
29 Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.
در دورهٔ سلطنت فقح بود که تغلت فلاسر، پادشاه آشور به اسرائیل حمله کرد و شهرهای عیون، آبل بیت‌معکه، یانوح، قادش، حاصور، جلعاد، جلیل و تمام سرزمین نفتالی را به تصرف خود درآورد و مردم را اسیر نموده، به آشور برد.
30 Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi.
آنگاه هوشع (پسر ایله) بر ضد فقح شورش کرد و او را کشت و خود بر تخت سلطنت نشست. هوشع در سال بیستم سلطنت یوتام (پسر عزیا) پادشاه یهودا، سلطنت خود را آغاز نمود.
31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Peka mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت فقح و کارهای او در کتاب «تاریخ پادشاهان اسرائیل» نوشته شده است.
32 Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
در دومین سال سلطنت فقح پادشاه اسرائیل، یوتام (پسر عزیا) پادشاه یهودا شد.
33 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.
یوتام در سن بیست و پنج سالگی بر تخت سلطنت نشست و شانزده سال در اورشلیم سلطنت نمود. (مادرش یروشا نام داشت و دختر صادوق بود).
34 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki.
او مانند پدرش عزیا آنچه در نظر خداوند پسندیده بود، انجام می‌داد،
35 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe.
ولی بتخانه‌های روی تپه‌ها را که مردم در آنجا قربانی می‌کردند و بخور می‌سوزانیدند، خراب نکرد. یوتام دروازهٔ بالایی خانهٔ خداوند را بازسازی کرد.
36 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
شرح بقیهٔ رویدادهای دوران سلطنت یوتام و کارهای او در کتاب «تاریخ پادشاهان یهودا» نوشته شده است.
37 Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda.
(در آن روزها خداوند، رصین پادشاه سوریه و فقح پادشاه اسرائیل را بر ضد یهودا برانگیخت.)
38 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
یوتام مرد و او را در کنار اجدادش در شهر داوود دفن کردند و پسرش آحاز به جای او پادشاه شد.

< 2 Bakonzi 15 >