< 2 Bakonzi 14 >

1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
La seconde année de Joas fils de Joachaz Roi d'Israël, Amatsia, fils de Joas Roi de Juda commença à régner.
2 Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi.
Il était âgé de vingt-cinq ans quand il commença à régner, et il régna vingt-neuf ans à Jérusalem; sa mère avait nom Jéhohaddan, [et était] de Jérusalem.
3 Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye.
Et il fit ce qui est droit devant l'Eternel, non pas toutefois comme David son père; il fit comme Joas son père avait fait.
4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
De sorte qu'il n'y eut que les hauts lieux qui ne furent point ôtés; le peuple sacrifiait encore et faisait des encensements dans les hauts lieux.
5 Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye.
Et il arriva que dès que le Royaume fut affermi entre ses mains, il fit mourir ses serviteurs qui avaient tué le Roi son père.
6 Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo: « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Mais il ne fit point mourir les enfants de ceux qui l'avaient tué; suivant ce qui est écrit au Livre de la Loi de Moïse, dans lequel l'Eternel a commandé, en disant: On ne fera point mourir les pères pour les enfants, on ne fera pas non plus mourir les enfants pour les pères; mais on fera mourir chacun pour son péché.
7 Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
Il frappa dix mille hommes d'Edom en la vallée du sel, et prit Sélah par guerre, et la nomma Jokthéel, [qui est le nom qu'elle a eu] jusqu'à ce jour.
8 Bongo Amatsia atindaki bantoma epai ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele, mpo na koyebisa ye: — Yaka tobunda!
Alors Amatsia envoya des messagers vers Joas le fils de Joachaz, fils de Jéhu, Roi d'Israël, pour lui dire: Viens, [et] que nous nous voyions l'un l'autre.
9 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda: — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani: « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende.
Et Joas Roi d'Israël envoya dire à Amatsia Roi de Juda: L'épine qui est au Liban a envoyé dire au cèdre qui est au Liban: Donne ta fille pour femme à mon fils, mais les bêtes sauvages qui sont au Liban, ont passé, et ont foulé l'épine.
10 Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda?
[Parce que] tu as rudement frappé Edom, ton cœur s'est élevé. Contente-toi de ta gloire, et tiens-toi dans ta maison; pourquoi exciterais-tu le mal par lequel tu tomberas, toi et Juda avec toi?
11 Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.
Mais Amatsia ne voulut point y acquiescer; et Joas Roi d'Israël monta, et ils se virent l'un l'autre, lui et Amatsia Roi de Juda, en Bethsémes, qui est de Juda.
12 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye.
Et Juda fut défait par Israël, et ils s'enfuirent chacun dans leurs tentes.
13 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.
Et Joas Roi d'Israël prit Amatsia Roi de Juda, fils de Joas, fils d'Achazia, en Bethsémes, puis il vint à Jérusalem et fit une brèche de quatre cents coudées à la muraille de Jérusalem, depuis la porte d'Ephraïm, jusqu'à la porte du coin.
14 Akamataki wolo nyonso, palata nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
Et ayant pris tout l'or et tout l'argent, et tous les vaisseaux qui furent trouvés dans la maison de l'Eternel, et dans les trésors de la maison Royale, et des gens pour otages, il s'en retourna à Samarie.
15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des faits de Joas, et sa valeur, et comment il combattit contre Amatsia, tout cela n'est-il pas écrit au Livre des Chroniques des Rois d'Israël?
16 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Et Joas s'endormit avec ses pères, et fut enseveli à Samarie avec les Rois d'Israël; et Jéroboam son fils régna en sa place.
17 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.
Et Amatsia fils de Joas Roi de Juda vécut quinze ans après la mort de Joas fils de Joachaz Roi d'Israël.
18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Le reste des faits d'Amatsia n'est-il pas écrit au Livre des Chroniques des Rois de Juda?
19 Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.
r on fit une conspiration contre lui à Jérusalem, et il s'enfuit à Lakis; mais on envoya après lui à Lakis, et on le tua là.
20 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi.
Et on l'apporta sur des chevaux, et il fut enseveli à Jérusalem avec ses pères, dans la Cité de David.
21 Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia.
Alors tout le peuple de Juda prit Hazaria âgé de seize ans, et ils l'établirent Roi en la place d'Amatsia son père.
22 Ezalaki ye nde moto atongaki lisusu engumba ya Eyilati mpe azongisaki yango na Yuda sima na kufa ya tata na ye, mokonzi Amatsia.
Il bâtit Elath, l'ayant remise en la puissance de Juda, après que le Roi fut endormi avec ses pères.
23 Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko.
La quinzième année d'Amatsia fils de Joas Roi de Juda, Jéroboam, fils de Joas, commença à régner sur Israël à Samarie, [et il régna] l'espace de quarante et un ans.
24 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele.
Et il fit ce qui déplaît à l'Eternel, [et] ne se détourna point d'aucun des péchés de Jéroboam fils de Nébat, par lesquels il avait fait pécher Israël.
25 Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.
Il rétablit les bornes d'Israël depuis l'entrée de Hamath, jusqu'à la mer de la campagne, selon la parole de l'Eternel le Dieu d'Israël, qu'il avait proférée par le moyen de son serviteur Jonas fils d'Amittaï, Prophète, qui était de Gathhépher.
26 Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango.
Parce que l'Eternel vit que l'affliction d'Israël était fort amère, et qu'il n'y avait ni de ce qui est serré, ni de ce qui est délaissé, et qu'il n'y avait personne qui aidât Israël;
27 Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi.
Et que l'Eternel n'avait point parlé d'effacer le nom d'Israël de dessous les cieux, à cause de cela il les délivra par les mains de Jéroboam fils de Joas.
28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des faits de Jéroboam, tout ce, dis-je, qu'il a fait, et la valeur avec laquelle il combattit, et comment il reconquit Damas et Hamath de Juda en Israël, n'est-il pas écrit au Livre des Chroniques des Rois d'Israël?
29 Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Puis Jéroboam s'endormit avec ses pères, les Rois d'Israël, et Zacharie son fils régna en sa place.

< 2 Bakonzi 14 >