< 2 Bakonzi 12 >
1 Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.
I Jehus syvende år blev Joas konge, og han regjerte i Jerusalem i firti år; hans mor hette Sibja og var fra Be'erseba.
2 Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye.
Joas gjorde hvad rett var i Herrens øine, hele tiden, så lenge presten Jojada veiledet ham.
3 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
Dog blev offerhaugene ikke nedlagt; folket blev ved å ofre og brenne røkelse på haugene.
4 Joasi alobaki na Banganga-Nzambe: « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe: mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo.
Joas sa til prestene: Alle penger som kommer inn til Herrens hus som hellige gaver, både pengene fra dem som kommer med i manntallet, og utløsnings-pengene for folk efter det verd som fastsettes for hver enkelt, og alle de penger som nogen av fri vilje kommer med til Herrens hus,
5 Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. »
dem skal prestene ta imot, hver av sine kjenninger, og de skal bøte husets brøst overalt hvor det finnes nogen brøst.
6 Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te.
Men i kong Joas' tre og tyvende år hadde prestene ennu ikke bøtt husets brøst.
7 Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango: « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. »
Da kalte kong Joas presten Jojada og prestene til sig og sa til dem: Hvorfor bøter I ikke husets brøst? Nu skal I ikke lenger ta imot penger av eders kjenninger, men gi dem fra eder til å bøte husets brøst med.
8 Banganga-Nzambe bandimaki kotika kokongola mbongo na maboko ya bato mpe kotika kobongisa Ndako ya Nzambe.
Og prestene samtykte i at de ikke skulde ta imot penger av folket og heller ikke gi sig av med å bøte husets brøst.
9 Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.
Så tok presten Jojada en kiste og boret et hull i dens lokk og satte den ved alteret på høire side, der hvor folk går inn i Herrens hus, og i den la prestene som hadde vakt ved dørtreskelen, alle de penger som kom inn til Herrens hus.
10 Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe; bongo bazalaki kotia yango na basaki.
Og når de så at det var mange penger i kisten, gikk kongens skriver og ypperstepresten dit op og knyttet dem inn og tellet de penger som fantes i Herrens hus.
11 Soki bayebi motuya na yango, bazalaki kopesa mbongo yango epai ya bato oyo bazalaki kosalisa misala kati na Ndako ya Nzambe. Na mbongo yango, bazalaki kofuta bato oyo bazalaki kosala kati na Tempelo ya Yawe: basharipantie,
Så overgav de pengene som de hadde veid, til dem som forestod arbeidet og hadde tilsyn med Herrens hus; og de gav dem igjen ut til tømmermennene og bygningsmennene som arbeidet på Herrens hus,
12 batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe: mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe.
og til murerne og stenhuggerne og likeså til innkjøp av tre og hugne stener for å bøte Herrens huses brøst og i det hele til alt som blev gitt ut for å sette huset i stand.
13 Kasi bazalaki kobimisa te mbongo oyo bazalaki komema na Ndako ya Nzambe, mpo na kosalela basani ya minene ya palata, bambeli, basani oyo babwakelaka na yango mayi, bakelelo mpe biloko mosusu oyo esalemi na wolo to na palata mpo na Tempelo ya Yawe.
Men det blev ikke gjort sølvfat eller kniver eller skåler til å sprenge blod med eller trompeter eller noget slags kar av gull eller sølv til Herrens hus for de penger som kom inn til Herrens hus,
14 Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe.
men de overgav dem til dem som forestod arbeidet, og de brukte dem til å sette Herrens hus i stand.
15 Bazalaki kolandela te mbongo oyo bapesaki na bato mpo na kofuta basali, pamba te bazalaki kosalela yango na bosembo.
Og det blev ikke holdt regnskap med de menn til hvem pengene blev overgitt forat de skulde gi dem til dem som utførte arbeidet; for de fór redelig frem.
16 Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe.
Men skyldoffer- og syndofferpengene kom ikke inn til Herrens hus; de tilfalt prestene.
17 Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi.
På den tid drog Syrias konge Hasael op og stred mot Gat og inntok det; derefter satte han sig fore å dra op mot Jerusalem.
18 Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi.
Da tok Judas konge Joas alle de hellige ting som hans fedre Josafat og Joram og Akasja, Judas konger, hadde helliget, og dem han selv hadde helliget, og alt det gull som fantes i skattkammerne i Herrens hus og i kongens hus, og sendte det til Syrias konge Hasael. Da drog han bort og gikk ikke mot Jerusalem.
19 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Hvad som ellers er å fortelle om Joas og om alt det han gjorde, er opskrevet i Judas kongers krønike.
20 Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila.
Hans tjenere reiste sig og fikk i stand en sammensvergelse og drepte Joas i Millo-huset, som går ned til Silla;
21 Tala bakombo ya basali oyo babomaki Joasi: Yozabadi, mwana mobali ya Shimeati, mpe Yeozabadi, mwana mobali ya Shomeri. Joasi akufaki mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
det var Josakar, Sim'ats sønn, og Josabad, Somers sønn, hans tjenere, som drepte ham. Da han var død, begravde de ham hos hans fedre i Davids stad; og hans sønn Amasja blev konge i hans sted.