< 2 Bakonzi 11 >

1 Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi.
А Готолија, мати Охозијина, видевши да јој погибе син уста и поби сав род царски.
2 Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali; mpe Atali abomaki Joasi te.
Али Јосавеја, кћи цара Јорама сестра Охозијина, узе Јоаса сина Охозијиног, и украде га између синова царевих, које убијаху, и с дојкињом његовом сакри га од Готолије у ложницу, те не погибе.
3 Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili.
И би сакривен с њом у дому Господњем шест година, а Готолија цароваше у земљи.
4 Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.
А седме године посла Јодај и дозва стотинике и војводе и војнике, и уведе их к себи у дом Господњи, и ухвати веру с њима, и закле их у дому Господњем, и показа им сина царевог.
5 Apesaki bango mitindo oyo: « Tala ndenge bokosala: kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi,
И заповеди им говорећи: Ово учините: вас трећина, који долазите у суботу, нека чувају стражу у двору царском.
6 ndambo ya mibale bakozala na ekuke ya Suri, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke, na sima ya ndako ya bakengeli. Bandambo nyonso misato bakokitana, moko sima na mosusu, kati na mosala ya kokengela Tempelo.
А трећина нека буде на вратима сурским, а трећина на вратима која су иза војника; и чувајте дом од силе.
7 Bandambo mibale oyo bakosala te na mokolo ya Saba bakokengela Tempelo ya Yawe mpo na mokonzi.
А два дела вас свих који одлазе у суботу нека чувају стражу у дому Господњем око цара.
8 Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. »
И опколите цара сваки са својим оружјем у руци, и ко би навалио међу врсте нека се погуби, и будите с царем кад стане излазити и улазити.
9 Bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko basalaki nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango, mpe akendeki epai ya Nganga-Nzambe Yeoyada.
И стотиници учинише све како заповеди Јодај свештеник; и узеше сваки своје људе који долажаху у суботу с онима који одлажаху у суботу, и дођоше к свештенику Јодају.
10 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga mpe banguba oyo ezalaki ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe.
И свештеник даде стотиницима копља и штитове цара Давида, што беху у дому Господњем.
11 Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.
И војници стадоше сваки са својим оружјем у руци од десне стране дома до леве стране дома према олтару и према дому око цара.
12 Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki: « Tika ete mokonzi awumela na bomoi! »
Тада изведе сина царевог, и метну му венац на главу, и даде му сведочанство, и поставише га царем, и помазаше га, и пљескајући рукама говораху: Да живи цар!
13 Tango Atali ayokaki makelele oyo bato mpe bakengeli bazalaki kosala, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe.
А кад Готолија чу вику народа, који се стецаше, дође к народу у дом Господњи;
14 Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: « Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita! »
И погледа, и гле, цар стајаше код ступа по обичају, и кнезови и трубе око цара, и сав народ из земље радоваше се, и трубе трубљаху. Тада Готолија раздре хаљине своје и повика: Буна! Буна!
15 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko: « Bobimisa ye na molongo! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki: « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe! »
А свештеник Јодај заповеди стотиницима који беху над војском, и рече им: Изведите је из врста напоље, и ко пође за њом погубите га мачем; јер рече свештеник: Да не погине у дому Господњем.
16 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
И начинише јој место; и кад дође на пут којим се иде у дом царски коњским вратима, онде је убише.
17 Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato.
Тада Јодај учини завет између Господа и цара и народа да ће бити народ Господњи, такође и између цара и народа.
18 Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe.
Потом сав народ земаљски отиде у дом Валов, и раскопаше дом и олтар, и изломише ликове његове сасвим; а Матана свештеника Валовог убише пред олтарима. А свештеник опет уреди службу у дому Господњем.
19 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi.
И узе стотинике и војводе и војнике и сав народ земаљски, и изведоше цара из дома Господњег, и уђоше у дом царски путем на врата војничка. И седе на царски престо.
20 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.
И радоваше се сав народ земаљски, и град се умири пошто Готолију убише мачем код царског дома.
21 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi.
Јоасу беше седам година кад се зацари.

< 2 Bakonzi 11 >