< 2 Bakonzi 10 >

1 Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki:
亚哈有七十个儿子在撒马利亚。耶户写信送到撒马利亚,通知耶斯列的首领,就是长老和教养亚哈众子的人,说:
2 « Tango kaka mokanda oyo ekokomela bino, lokola bana mibali ya mokonzi na bino bazali elongo na bino, mpe lokola bozali na bashar mpe bampunda, engumba ya makasi mpe bibundeli,
“你们那里既有你们主人的众子和车马、器械、坚固城,
3 bopona mwana mobali oyo aleki malamu mpe mayele kati na bana mibali ya mokonzi na bino, botia ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye, mpe bobunda mpo na ndako ya mokonzi na bino. »
接了这信,就可以在你们主人的众子中选择一个贤能合宜的,使他坐他父亲的位,你们也可以为你们主人的家争战。”
4 Kasi babangaki makasi mpe balobaki: « Soki kutu bakonzi mibale bakokaki te kobunda na ye, bongo ndenge nini biso tokobunda na ye? »
他们却甚惧怕,彼此说:“二王在他面前尚且站立不住,我们怎能站得住呢?”
5 Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu: « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. »
家宰、邑宰,和长老,并教养众子的人,打发人去见耶户,说:“我们是你的仆人,凡你所吩咐我们的都必遵行,我们不立谁作王,你看怎样好就怎样行。”
6 Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki: « Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. » Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango.
耶户又给他们写信说:“你们若归顺我,听从我的话,明日这时候,要将你们主人众子的首级带到耶斯列来见我。”那时王的儿子七十人都住在教养他们那城中的尊贵人家里。
7 Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli.
信一到,他们就把王的七十个儿子杀了,将首级装在筐里,送到在耶斯列的耶户那里。
8 Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu: — Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi. Bongo Jewu apesaki mitindo: — Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo.
有使者来告诉耶户说:“他们将王众子的首级送来了。”耶户说:“将首级在城门口堆作两堆,搁到明日。”
9 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki: — Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye; kasi nani abomi bato oyo nyonso?
次日早晨,耶户出来,站着对众民说:“你们都是公义的,我背叛我主人,将他杀了;这些人却是谁杀的呢?
10 Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya.
由此可知,耶和华指着亚哈家所说的话一句没有落空,因为耶和华借他仆人以利亚所说的话都成就了。”
11 Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli: bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi.
凡亚哈家在耶斯列所剩下的人和他的大臣、密友、祭司,耶户尽都杀了,没有留下一个。
12 Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari. Na Beti-Ekedi-Aron,
耶户起身往撒马利亚去。在路上、牧人剪羊毛之处,
13 Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango: — Bozali banani? Bazongisaki: — Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote.
遇见犹大王亚哈谢的弟兄,问他们说:“你们是谁?”回答说:“我们是亚哈谢的弟兄,现在下去要问王和太后的众子安。”
14 Jewu apesaki mitindo: — Bokanga bango ya bomoi. Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi.
耶户吩咐说:“活捉他们!”跟从的人就活捉了他们,将他们杀在剪羊毛之处的坑边,共四十二人,没有留下一个。
15 Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki: — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo? Yonadabi azongisaki: — Iyo, ezali bongo! Jewu alobaki: — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.
耶户从那里前行,恰遇利甲的儿子约拿达来迎接他,耶户问他安,对他说:“你诚心待我像我诚心待你吗?”约拿达回答说:“是。”耶户说:“若是这样,你向我伸手”,他就伸手;耶户拉他上车。
16 Jewu alobaki: — Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe. Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye.
耶户说:“你和我同去,看我为耶和华怎样热心”;于是请他坐在车上,
17 Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya.
到了撒马利亚,就把撒马利亚的亚哈家剩下的人都杀了,直到灭尽,正如耶和华对以利亚所说的。
18 Jewu abengisaki bato nyonso mpe alobaki na bango: « Akabi azalaki kosalela Bala mingi te, kasi Jewu akosalela ye mingi.
耶户招聚众民,对他们说:“亚哈事奉巴力还冷淡,耶户却更热心。
19 Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. » Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala.
现在我要给巴力献大祭。应当叫巴力的众先知和一切拜巴力的人,并巴力的众祭司,都到我这里来,不可缺少一个;凡不来的必不得活。”耶户这样行,是用诡计要杀尽拜巴力的人。
20 Jewu alobaki: « Bobengisa mayangani mpo na lokumu ya Bala. » Boye babengisaki mayangani yango.
耶户说:“要为巴力宣告严肃会!”于是宣告了。
21 Jewu apanzaki sango kati na Isalaele, basambeli nyonso ya Bala bayaki mpe moto moko te azangaki. Bakotaki ebele na ndako ya nzambe Bala mpe batondisaki yango kino na basuka nyonso.
耶户差人走遍以色列地;凡拜巴力的人都来齐了,没有一个不来的。他们进了巴力庙,巴力庙中从前边直到后边都满了人。
22 Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala: « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. » Boye abimisaki bilamba mpo na bango.
耶户吩咐掌管礼服的人说:“拿出礼服来,给一切拜巴力的人穿。”他就拿出礼服来给了他们。
23 Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala: « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. »
耶户和利甲的儿子约拿达进了巴力庙,对拜巴力的人说:“你们察看察看,在你们这里不可有耶和华的仆人,只可容留拜巴力的人。”
24 Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango. Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo: « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. »
耶户和约拿达进去,献平安祭和燔祭。 耶户先安派八十人在庙外,吩咐说:“我将这些人交在你们手中,若有一人脱逃,谁放的必叫他偿命!”
25 Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango: « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. » Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala.
耶户献完了燔祭,就出来吩咐护卫兵和众军长说:“你们进去杀他们,不容一人出来!”护卫兵和军长就用刀杀他们,将尸首抛出去,便到巴力庙的城去了,
26 Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango.
将巴力庙中的柱像都拿出来烧了;
27 Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo.
毁坏了巴力柱像,拆毁了巴力庙作为厕所,直到今日。
28 Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele.
这样,耶户在以色列中灭了巴力。
29 Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali: kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.
只是耶户不离开尼八的儿子耶罗波安使以色列人陷在罪里的那罪,就是拜伯特利和但的金牛犊。
30 Yawe alobaki na Jewu: « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
耶和华对耶户说:“因你办好我眼中看为正的事,照我的心意待亚哈家,你的子孙必接续你坐以色列的国位,直到四代。”
31 Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.
只是耶户不尽心遵守耶和华—以色列 神的律法,不离开耶罗波安使以色列人陷在罪里的那罪。
32 Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango,
在那些日子,耶和华才割裂以色列国,使哈薛攻击以色列的境界,
33 na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani.
乃是约旦河东、基列全地,从靠近亚嫩谷边的亚罗珥起,就是基列和巴珊的迦得人、吕便人、玛拿西人之地。
34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jewu, misala na ye nyonso mpe elonga na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
耶户其余的事,凡他所行的和他的勇力都写在以色列诸王记上。
35 Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
耶户与他列祖同睡,葬在撒马利亚;他儿子约哈斯接续他作王。
36 Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe.
耶户在撒马利亚作以色列王二十八年。

< 2 Bakonzi 10 >