< 2 Yoane 1 >

1 Ngai mpaka; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.
From the elder to the chosen lady and her children, whom I love in truth—and not only I, but also all those who have known the truth—
2 Tolingaka bino mpo na solo oyo ezali kati na biso mpe ekozalaka elongo na biso tango nyonso. (aiōn g165)
because of the truth that remains in us and will be with us forever. (aiōn g165)
3 Ngolu, boboto mpe kimia kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana ya Tata, ekozala elongo na biso kati na solo mpe bolingo.
Grace, mercy, and peace will be with us from God the Father and from Jesus Christ, the Son of the Father, in truth and love.
4 Nazalaki na esengo makasi ya komona ndambo ya bana na yo kotambola kati na solo, kolanda mobeko oyo tozwaki kowuta na Tata.
I rejoice greatly that I have found some of your children walking in truth, just as we have received this commandment from the Father.
5 Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli: Tolinganaka biso na biso.
Now I plead with you, lady—not as though I were writing to you a new commandment, but one that we have had from the beginning—that we should love one another.
6 Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka: kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.
This is love, that we should walk according to his commandments. This is the commandment, just as you heard from the beginning, that you should walk in it.
7 Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.
For many deceivers have gone out into the world, and they do not confess that Jesus Christ came in the flesh. This is the deceiver and the antichrist.
8 Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.
Look to yourselves, that you do not lose the things for which we all have worked, but so that you may receive a full reward.
9 Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.
Whoever goes on ahead and does not remain in the teaching of Christ does not have God. The one who remains in the teaching, this one has both the Father and the Son.
10 Soki moto moko ayei epai na bino mpe amemeli bino mateya mosusu, boyamba ye te kati na bandako na bino, mpe bopesa ye ata mbote te,
If anyone comes to you and does not bring this teaching, do not receive him into your house and do not greet him.
11 pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.
For the one who greets him participates in his evil deeds.
12 Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.
I have many things to write to you, but I did not wish to write them with paper and ink. However, I expect to come to you and speak face to face, so that our joy will be complete.
13 Bana ya ndeko na yo ya mwasi, moponami ya Nzambe, batindeli yo mbote.
The children of your chosen sister greet you.

< 2 Yoane 1 >