< 2 Bakolinto 1 >
1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba:
Παῦλος ἀπόστολος Χριστοῦ Ἰησοῦ διὰ θελήματος θεοῦ, καὶ Τιμόθεος ὁ ἀδελφός, τῇ ἐκκλησίᾳ τοῦ θεοῦ τῇ οὔσῃ ἐν Κορίνθῳ, σὺν τοῖς ἁγίοις πᾶσιν τοῖς οὖσιν ἐν ὅλῃ τῇ Ἀχαΐᾳ·
2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
χάρις ὑμῖν καὶ εἰρήνη ἀπὸ θεοῦ πατρὸς ἡμῶν καὶ κυρίου Ἰησοῦ Χριστοῦ.
3 Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso:
Εὐλογητὸς ὁ θεὸς καὶ πατὴρ τοῦ κυρίου ἡμῶν Ἰησοῦ Χριστοῦ, ὁ πατὴρ τῶν οἰκτιρμῶν καὶ θεὸς πάσης παρακλήσεως,
4 abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
ὁ παρακαλῶν ἡμᾶς ἐπὶ πάσῃ τῇ θλίψει ἡμῶν, εἰς τὸ δύνασθαι ἡμᾶς παρακαλεῖν τοὺς ἐν πάσῃ θλίψει διὰ τῆς παρακλήσεως ἧς παρακαλούμεθα αὐτοὶ ὑπὸ τοῦ θεοῦ·
5 Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.
ὅτι καθὼς περισσεύει τὰ παθήματα τοῦ Χριστοῦ εἰς ἡμᾶς, οὕτως διὰ τοῦ Χριστοῦ περισσεύει καὶ ἡ παράκλησις ἡμῶν.
6 Boye soki tozali komona pasi, ezali mpo na kobondisama mpe lobiko na bino. Soki mpe biso tobondisami, ezali mpo ete bino mpe bobondisama mpo na koyikela pasi oyo tozali komona elongo na bino mpiko.
εἴτε δὲ θλιβόμεθα, ὑπὲρ τῆς ὑμῶν παρακλήσεως καὶ σωτηρίας· εἴτε παρακαλούμεθα, ὑπὲρ τῆς ὑμῶν παρακλήσεως τῆς ἐνεργουμένης ἐν ὑπομονῇ τῶν αὐτῶν παθημάτων ὧν καὶ ἡμεῖς πάσχομεν. καὶ ἡ ἐλπὶς ἡμῶν βεβαία ὑπὲρ ὑμῶν,
7 Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.
εἰδότες ὅτι ὡς κοινωνοί ἐστε τῶν παθημάτων, οὕτως καὶ τῆς παρακλήσεως.
8 Solo, bandeko, na tina na pasi oyo ekweyelaki biso kati na etuka ya Azia, tolingi boyeba malamu ete tonyokwamaki mingi kino ata kolemba nzoto mpe kobungisa elikya ya kokoba kozala na bomoi.
Οὐ γὰρ θέλομεν ὑμᾶς ἀγνοεῖν, ἀδελφοί, ὑπὲρ τῆς θλίψεως ἡμῶν τῆς γενομένης ἐν τῇ Ἀσίᾳ, ὅτι καθ’ ὑπερβολὴν ὑπὲρ δύναμιν ἐβαρήθημεν, ὥστε ἐξαπορηθῆναι ἡμᾶς καὶ τοῦ ζῆν·
9 Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
ἀλλὰ αὐτοὶ ἐν ἑαυτοῖς τὸ ἀπόκριμα τοῦ θανάτου ἐσχήκαμεν, ἵνα μὴ πεποιθότες ὦμεν ἐφ’ ἑαυτοῖς ἀλλ’ ἐπὶ τῷ θεῷ τῷ ἐγείροντι τοὺς νεκρούς·
10 Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,
ὃς ἐκ τηλικούτου θανάτου ἐρρύσατο ἡμᾶς καὶ ῥύσεται, εἰς ὃν ἠλπίκαμεν ὅτι καὶ ἔτι ῥύσεται,
11 awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.
συνυπουργούντων καὶ ὑμῶν ὑπὲρ ἡμῶν τῇ δεήσει, ἵνα ἐκ πολλῶν προσώπων τὸ εἰς ἡμᾶς χάρισμα διὰ πολλῶν εὐχαριστηθῇ ὑπὲρ ἡμῶν.
12 Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango: mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
ἡ γὰρ καύχησις ἡμῶν αὕτη ἐστίν, τὸ μαρτύριον τῆς συνειδήσεως ἡμῶν, ὅτι ἐν ἁγιότητι καὶ εἰλικρινίᾳ τοῦ θεοῦ, οὐκ ἐν σοφίᾳ σαρκικῇ ἀλλ’ ἐν χάριτι θεοῦ, ἀνεστράφημεν ἐν τῷ κόσμῳ, περισσοτέρως δὲ πρὸς ὑμᾶς.
13 Solo, tokomelaka bino makambo mosusu te, kaka makambo oyo bozali kotanga to oyo boyebi malamu. Mpe nazali na elikya ete bokososola penza malamu kino na suka,
οὐ γὰρ ἄλλα γράφομεν ὑμῖν ἀλλ’ ἢ ἃ ἀναγινώσκετε ἢ καὶ ἐπιγινώσκετε, ἐλπίζω δὲ ὅτι ἕως τέλους ἐπιγνώσεσθε,
14 ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.
καθὼς καὶ ἐπέγνωτε ἡμᾶς ἀπὸ μέρους, ὅτι καύχημα ὑμῶν ἐσμεν καθάπερ καὶ ὑμεῖς ἡμῶν ἐν τῇ ἡμέρᾳ τοῦ κυρίου ἡμῶν Ἰησοῦ.
15 Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale;
Καὶ ταύτῃ τῇ πεποιθήσει ἐβουλόμην πρότερον πρὸς ὑμᾶς ἐλθεῖν, ἵνα δευτέραν χάριν σχῆτε,
16 mpe mpo ete, longwa epai na bino, nakende na Masedwane, mpe, sima na ngai kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yuda.
καὶ δι’ ὑμῶν διελθεῖν εἰς Μακεδονίαν, καὶ πάλιν ἀπὸ Μακεδονίας ἐλθεῖν πρὸς ὑμᾶς καὶ ὑφ’ ὑμῶν προπεμφθῆναι εἰς τὴν Ἰουδαίαν.
17 Boni, elingi koloba ete namikakolaki tango nasalaki mabongisi yango to mpe elingi koloba ete nasalaka mabongisi na ngai kolanda baposa ya bomoto, mpo ete, na mbala moko, nandima likambo mpe naboya yango lisusu?
τοῦτο οὖν βουλόμενος μήτι ἄρα τῇ ἐλαφρίᾳ ἐχρησάμην; ἢ ἃ βουλεύομαι κατὰ σάρκα βουλεύομαι, ἵνα ᾖ παρ’ ἐμοὶ τὸ ναὶ ναὶ καὶ τὸ οὒ οὔ;
18 Kasi lokola ezali solo ete Nzambe azali Moyengebene, maloba oyo toyebisaki bino ezali te « iyo » mpe « te. »
πιστὸς δὲ ὁ θεὸς ὅτι ὁ λόγος ἡμῶν ὁ πρὸς ὑμᾶς οὐκ ἔστιν ναὶ καὶ οὔ.
19 Pamba te Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ngai Silasi mpe Timote toteyaki bino, azalaki te « iyo » mpe « te; » kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso « iyo. »
ὁ τοῦ θεοῦ γὰρ υἱὸς Χριστὸς Ἰησοῦς ὁ ἐν ὑμῖν δι’ ἡμῶν κηρυχθείς, δι’ ἐμοῦ καὶ Σιλουανοῦ καὶ Τιμοθέου, οὐκ ἐγένετο ναὶ καὶ οὔ, ἀλλὰ ναὶ ἐν αὐτῷ γέγονεν.
20 Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.
ὅσαι γὰρ ἐπαγγελίαι θεοῦ, ἐν αὐτῷ τὸ ναί· διὸ καὶ δι’ αὐτοῦ τὸ ἀμὴν τῷ θεῷ πρὸς δόξαν δι’ ἡμῶν.
21 Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye,
ὁ δὲ βεβαιῶν ἡμᾶς σὺν ὑμῖν εἰς Χριστὸν καὶ χρίσας ἡμᾶς θεός,
22 abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.
ὁ καὶ σφραγισάμενος ἡμᾶς καὶ δοὺς τὸν ἀραβῶνα τοῦ πνεύματος ἐν ταῖς καρδίαις ἡμῶν.
23 Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto;
Ἐγὼ δὲ μάρτυρα τὸν θεὸν ἐπικαλοῦμαι ἐπὶ τὴν ἐμὴν ψυχήν, ὅτι φειδόμενος ὑμῶν οὐκέτι ἦλθον εἰς Κόρινθον.
24 ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.
οὐχ ὅτι κυριεύομεν ὑμῶν τῆς πίστεως, ἀλλὰ συνεργοί ἐσμεν τῆς χαρᾶς ὑμῶν, τῇ γὰρ πίστει ἑστήκατε.