< 2 Bakolinto 8 >
1 Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Mangomba ya Masedwane.
Γνωρίζομεν δὲ ὑμῖν, ἀδελφοί, τὴν χάριν τοῦ θεοῦ τὴν δεδομένην ἐν ταῖς ἐκκλησίαις τῆς Μακεδονίας,
2 Atako bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, kasi batondisamaki na esengo oyo eleka ndelo; mpe kati na bobola na bango ya makasi, bapesaki makabo mingi koleka.
ὅτι ἐν πολλῇ δοκιμῇ θλίψεως ἡ περισσεία τῆς χαρᾶς αὐτῶν καὶ ἡ κατὰ βάθους πτωχεία αὐτῶν ἐπε ρίσσευσεν εἰς τὸ πλοῦτος τῆς ἁπλότητος αὐτῶν,
3 Nazali kotatola ete bapesaki kolanda makoki na bango, mpe bapesaki kutu koleka. Bapesaki yango na kotindika te
ὅτι κατὰ δύναμιν, μαρτυρῶ, καὶ παρὰ δύναμιν αὐθαίρετοι,
4 mpe basengaki biso kutu na molende nyonso ete tosalela bango ngolu ya kosangana elongo na biso kati na mosala ya kosunga basantu.
μετὰ πολλῆς παρακλήσεως δεόμενοι ἡμῶν, τὴν χάριν καὶ τὴν κοινωνίαν τῆς διακονίας τῆς εἰς τοὺς ἁγίους,
5 Basalaki koleka ndenge tokanisaki: bamipesaki liboso, bango moko, epai ya Nkolo, mpe sima, epai na biso, kolanda mokano ya Nzambe.
καὶ οὐ καθὼς ἠλπίσαμεν, ἀλλὰ ἑαυτοὺς ἔδωκαν πρῶτον τῷ κυρίῳ καὶ ἡμῖν διὰ θελήματος θεοῦ·
6 Boye, tosengaki na Tito ete akomisa kino na suka mosala yango ya kosunga, ndenge abandaki yango kati na bino.
εἰς τὸ παρακαλέσαι ἡμᾶς Τίτον, ἵνα καθὼς προενήρξατο, οὕτως καὶ ἐπιτελέσῃ εἰς ὑμᾶς καὶ τὴν χάριν ταύτην.
7 Kasi mpo ete bozali kokoba kokende liboso kati na makambo nyonso lokola kondima, liloba, boyebi, molende kati na makambo nyonso, bolingo na biso mpo na bino, tomoni ete boluka mpe kokende liboso kati na mosala yango ya kosunga.
ἀλλ᾽ ὥσπερ ἐν παντὶ περισσεύετε, πίστει καὶ λόγῳ καὶ γνώσει καὶ πάσῃ σπουδῇ, καὶ τῇ ἐξ ὑμῶν ἐν ἡμῖν ἀγάπῃ, ἵνα καὶ ἐν ταύτῃ τῇ χάριτι περισσεύητε.
8 Nazali kopesa bino mitindo te, kasi nazali nde koluka komeka bosolo ya bolingo na bino na kokokanisa yango na molende ya bato mosusu.
οὐ κατ᾽ ἐπιταγὴν λέγω, ἀλλὰ διὰ τῆς ἑτέρων σπουδῆς καὶ τὸ τῆς ὑμετέρας ἀγάπης γνήσιον δοκιμάζων·
9 Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso: Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
(γινώσκετε γὰρ τὴν χάριν τοῦ κυρίου ἡμῶν Ἰησοῦ χριστοῦ, ὅτι δι᾽ ὑμᾶς ἐπτώχευσεν πλούσιος ὤν, ἵνα ὑμεῖς τῇ ἐκείνου πτωχείᾳ πλουτήσητε),
10 Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino: na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.
καὶ γνώμην ἐν τούτῳ δίδωμι. τοῦτο γὰρ ὑμῖν συμφέρει, οἵτινες οὐ μόνον τὸ ποιῆσαι, ἀλλὰ καὶ τὸ θέλειν προενήρξασθε ἀπὸ πέρυσι·
11 Boye, bokokisa sik’oyo likambo yango kolanda makoki na bino; molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosunga, bomonisa yango mpe na kokokisaka likambo yango.
νυνὶ δὲ καὶ τὸ ποιῆσαι ἐπιτελέσατε, ὅπως καθάπερ ἡ προθυμία τοῦ θέλειν, οὕτως καὶ τὸ ἐπιτελέσαι ἐκ τοῦ ἔχειν.
12 Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.
εἰ γὰρ ἡ προθυμία πρόκειται, καθὸ ἐὰν ἔχῃ, εὐπρόσδεκτος, οὐ καθὸ οὐκ ἔχει.
13 Posa na biso ezali te ya koluka ete bino bomona pasi mpo ete bato mosusu bazala na esengo, kasi ezali kaka ya koluka ete bokokana.
οὐ γὰρ ἵνα ἄλλοις ἄνεσις, ὑμῖν θλῖψις, ἀλλ᾽ ἐξ ἰσότητος·
14 Mpo na tango oyo, lokola bozali kati na bofuluki, bokoki kosunga bato na biloko oyo bazali na yango na bosenga. Mokolo mosusu, tango bango mpe bakozala kati na bofuluki, bakosunga bino na biloko oyo bokozala na yango na bosenga. Na ndenge wana nde bokokokana,
ἐν τῷ νῦν καιρῷ τὸ ὑμῶν περίσσευμα εἰς τὸ ἐκείνων ὑστέρημα, ἵνα καὶ τὸ ἐκείνων περίσσευμα γένηται εἰς τὸ ὑμῶν ὑστέρημα, ὅπως γένηται ἰσότης,
15 kolanda ndenge ekomama: « Moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. »
καθὼς γέγραπται, Ὁ τὸ πολὺ οὐκ ἐπλεόνασεν, καὶ ὁ τὸ ὀλίγον οὐκ ἠλαττόνησεν.
16 Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino!
Χάρις δὲ τῷ θεῷ τῷ διδόντι τὴν αὐτὴν σπουδὴν ὑπὲρ ὑμῶν ἐν τῇ καρδίᾳ Τίτου,
17 Pamba te Tito ayambaki na esengo makasi likanisi oyo topesaki ye ya koya epai na bino; mpe ezali na mokano na ye moko nde ayei epai na bino.
ὅτι τὴν μὲν παράκλησιν ἐδέξατο, σπουδαιότερος δὲ ὑπάρχων αὐθαίρετος ἐξῆλθεν πρὸς ὑμᾶς.
18 Elongo na ye, tozali kotinda ndeko oyo Mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu.
συνεπέμψαμεν δὲ μετ᾽ αὐτοῦ τὸν ἀδελφόν, οὗ ὁ ἔπαινος ἐν τῷ εὐαγγελίῳ διὰ πασῶν τῶν ἐκκλησιῶν·
19 Lisusu, ezali Mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya kosunga. Tozali kosala mosala yango mpo na lokumu ya Ye moko Nkolo, mpe mpo na kolakisa molende na biso ya kosunga bino.
(οὐ μόνον δέ, ἀλλὰ καὶ χειροτονηθεὶς ὑπὸ τῶν ἐκκλησιῶν συνέκδημος ἡμῶν ἐν τῇ χάριτι ταύτῃ τῇ διακονουμένῃ ὑφ᾽ ἡμῶν πρὸς τὴν τοῦ κυρίου δόξαν καὶ προθυμίαν ἡμῶν).
20 Tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo ete batonga biso te mpo na lolenge na biso ya kosalela ebele yango ya makabo.
στελλόμενοι τοῦτο, μή τις ἡμᾶς μωμήσηται ἐν τῇ ἁδρότητι ταύτῃ τῇ διακονουμένῃ ὑφ᾽ ἡμῶν·
21 Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.
προνοοῦμεν γὰρ καλὰ οὐ μόνον ἐνώπιον κυρίου, ἀλλὰ καὶ ἐνώπιον ἀνθρώπων.
22 Elongo na bango, tozali kotinda ndeko na biso, oyo tondimaka mbala na mbala bolingo na ye. Mpe na mbala oyo, azali na yango lisusu koleka, pamba te azali penza kotiela bino motema.
συνεπέμψαμεν δὲ αὐτοῖς τὸν ἀδελφὸν ἡμῶν, ὃν ἐδοκιμάσαμεν ἐν πολλοῖς πολλάκις σπουδαῖον ὄντα, νυνὶ δὲ πολὺ σπουδαιότερον πεποι θήσει πολλῇ τῇ εἰς ὑμᾶς.
23 Tito azali molingami mpe moninga na ngai ya mosala kati na bino, kasi bandeko na biso bazali batindami ya Mangomba mpe nkembo ya Klisto.
εἴτε ὑπὲρ Τίτου, κοινωνὸς ἐμὸς καὶ εἰς ὑμᾶς συνεργός· εἴτε ἀδελφοὶ ἡμῶν, ἀπόστολοι ἐκκλησιῶν, δόξα χριστοῦ.
24 Yango wana, bolakisa bango elembo ya bolingo na bino mpo ete Mangomba nyonso endima mpe eyeba ete tomikumisaka na pamba te na tina na bino liboso na bango.
τὴν οὖν ἔνδειξιν τῆς ἀγάπης ὑμῶν καὶ ἡμῶν καυχήσεως ὑπὲρ ὑμῶν εἰς αὐτοὺς ἐνδεικνύμενοι, εἰς πρόσωπον τῶν ἐκκλησιῶν.