< 2 Bakolinto 7 >
1 Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Therefore, since we have these promises, beloved, let us cleanse ourselves from every defilement of the flesh and spirit, bringing holiness to completion in the fear of God.
2 Bopesa biso esika kati na mitema na bino! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko.
Make room for us in your hearts. We have wronged no one, we have corrupted no one, we have taken advantage of no one.
3 Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino.
I do not say this to condemn you, for I have said before that you are in our hearts so that we die together with you and live together with you.
4 Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.
Great is my boldness toward you; great is my boasting on your behalf. I am filled with comfort; I am overflowing with joy in all our affliction.
5 Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso: bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso.
For even when we came to Macedonia, our bodies had no rest, but we were afflicted at every turn, with conflicts on the outside and fears within.
6 Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito.
But God, who comforts the downcast, comforted us by the arrival of Titus,
7 Tolendisamaki na nzela ya boyei ya Tito kaka te, kasi mpe na nzela ya kobondisama oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino, mpe komipesa na bino mpo na ngai. Mpe nyonso wana esalaki ete esengo na ngai ebakisama lisusu makasi.
and not only by his arrival, but also by the comfort you had given him. He told us about your longing, your contrition, and your deep concern for me, so that I rejoiced all the more.
8 Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na nzela ya mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi te kati na motema na ngai. Solo, esalaki ngai nanu pasi na motema, na kotala ndenge eyokisaki bino mawa mpo na mwa tango moke.
For even if I caused you sorrow by my letter, I do not regret it (though I did regret it, for I see that my letter caused you sorrow, though only for an hour).
9 Kasi sik’oyo, nazali kosepela: ezali te mpo boyokaki mawa, kasi mpo ete mawa yango ememaki bino na kobongola mitema. Pamba te mawa na bino ezalaki malamu na miso ya Nzambe; mpe na bongo, tosalaki bino mabe te.
But now I rejoice, not that you were made sorrowful, but that you were made sorrowful to the point of repentance. For you felt a godly sorrow, so that you suffered no loss through us.
10 Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.
For godly sorrow produces a repentance that leads to salvation, leaving no regret, but worldly sorrow produces death.
11 Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino: bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.
Consider what earnestness this godly sorrow of yours has produced in you, what eagerness to clear yourselves, what indignation, what alarm, what longing, what zeal, what righting of wrong! In everything you have shown yourselves to be clear in the matter.
12 Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe.
So although I wrote to you, it was not on account of the one who did the wrong, nor on account of the one who was wronged, but so that your earnestness for us might be revealed to you in the sight of God.
13 Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.
In this we find comfort. And in addition to the comfort we received from you, we rejoiced all the more at the joy of Titus, because his spirit has been refreshed by you all.
14 Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.
For if I made any boast to him about you, I was not put to shame. But just as everything we said to you was true, so our boasting to Titus has also proven to be true.
15 Mpe bolingo na ye mpo na bino nyonso ekomaka lisusu monene tango akanisaka botosi na bino nyonso mpe ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolenga.
And his affection for you is even greater when he remembers the obedience of you all, how you received him with fear and trembling.
16 Nazali na esengo ya kotiela bino motema na makambo nyonso.
I rejoice, because I have complete confidence in you.