< 2 Bakolinto 6 >
1 Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te;
And also working together we call on [you] that you do not receive the grace of God in vain—
2 pamba te Nzambe alobi: « Na tango ya malamu, nayanolaki yo; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
for He says, “In an acceptable time I heard you, and in a day of salvation I helped you, behold, now [is] a well-accepted time; behold, now, a day of salvation.”
3 Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.
In nothing giving any cause of offense, that the ministry may not be blamed,
4 Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso: na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema;
but in everything recommending ourselves as God’s servants; in much patience, in tribulations, in necessities, in distresses,
5 kati na kobetama, boloko mpe mobulu; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei;
in stripes, in imprisonments, in insurrections, in labors, in watchings, in fastings,
6 kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo;
in pureness, in knowledge, in long-suffering, in kindness, in the Holy Spirit, in unhypocritical love,
7 kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe; kati na bibundeli ya bosembo mpo na kobundisa monguna mpe komibatela;
in the word of truth, in the power of God, through the armor of righteousness, on the right and on the left,
8 kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo;
through glory and dishonor, through evil report and good report, as leading astray, and true;
9 koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te;
as unknown, and recognized; as dying, and behold, we live; as disciplined, and not put to death;
10 koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.
as sorrowful, and always rejoicing; as poor, and making many rich; as having nothing, and possessing all things.
11 Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.
Our mouth has been open to you, O Corinthians, our heart has been enlarged!
12 Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.
You are not restricted in us, and you are restricted in your [own] yearnings,
13 Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo: Bosala lokola biso! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino!
and [as] a repayment of the same kind (as to children I say [it]), be enlarged—also you!
14 Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili?
Do not become yoked with others—unbelievers, for what partaking [is there] to righteousness and lawlessness?
15 Klisto akoki solo koyokana na Satana? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima?
And what fellowship to light with darkness? And what concord to Christ with Belial? Or what part to a believer with an unbeliever?
16 Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko: « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »
And what agreement to the temple of God with idols? For you are a temple of the living God, according as God said, “I will dwell in them, and will walk among [them], and I will be their God, and they will be My people,
17 Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »
for this reason, come forth out of the midst of them, and be separated, says the LORD, and do not touch an unclean thing, and I will receive you,
18 Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »
and I will be for a Father to you, and you will be sons and daughters to Me, says the LORD Almighty.”