< 2 Bakolinto 4 >

1 Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te;
この故に我ら憐憫を蒙りて此の職を受けたれば、落膽せず、
2 toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
恥づべき隱れたる事をすて、惡巧に歩まず、神の言をみださず、眞理を顯して神の前に己を凡ての人の良心に薦むるなり。
3 Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga,
もし我らの福音おほはれ居らば、亡ぶる者に覆はれをるなり。
4 ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe. (aiōn g165)
この世の神は此 等の不 信者の心を暗まして、神の像なるキリストの榮光の福音の光を照さざらしめたり。 (aiōn g165)
5 Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.
我らは己の事を宣べず、ただキリスト・イエスの主たる事と、我らがイエスのために汝らの僕たる事とを宣ぶ。
6 Pamba te Nzambe oyo alobaki: « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
光、暗より照り出でよと宣ひし神は、イエス・キリストの顏にある神の榮光を知る知識を輝かしめんために、我らの心を照し給へるなり。
7 Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
我等この寶を土の器に有てり、これ優れて大なる能力の我等より出でずして、神より出づることの顯れんためなり。
8 Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te;
われら四方より患難を受くれども窮せず、爲ん方つくれども希望を失はず、
9 tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
責めらるれども棄てられず、倒さるれども亡びず、
10 Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso.
常にイエスの死を我らの身に負ふ。これイエスの生命の我らの身にあらはれん爲なり。
11 Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
それ我ら生ける者の常にイエスのため死に付さるるは、イエスの生命の我らの死ぬべき肉體にあらはれん爲なり。
12 Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
さらば死は我等のうちに働き、生命は汝 等のうちに働くなり。
13 Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama: « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
録して『われ信ずるによりて語れり』とあるごとく、我等にも同じ信仰の靈あり、信ずるに因りて語るなり。
14 Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
これ主イエスを甦へらせ給ひし者の我等をもイエスと共に甦へらせ、汝らと共に立たしめ給ふことを我ら知ればなり。
15 Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
凡ての事は汝らの益なり。これ多くの人によりて御惠の増し加はり、感謝いや増りて神の榮光の顯れん爲なり。
16 Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
この故に我らは落膽せず、我らが外なる人は壞るれども、内なる人は日々に新なり。
17 Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. (aiōnios g166)
それ我らが受くる暫くの輕き患難は、極めて大なる永遠の重き光榮を得しむるなり。 (aiōnios g166)
18 Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko. (aiōnios g166)
我らの顧みる所は見ゆるものにあらで見えぬものなればなり。見ゆるものは暫時にして、見えぬものは永遠に至るなり。 (aiōnios g166)

< 2 Bakolinto 4 >