< 2 Bakolinto 4 >
1 Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te;
Derfor, da vi have denne Tjeneste efter den Barmhjertighed, som er bleven os til Del, så tabe vi ikke Modet;
2 toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
men vi have frasagt os de skammelige Smugveje, så vi ikke vandre i Træskhed, ej heller forfalske Guds Ord, men ved Sandhedens Åbenbarelse anbefale os til alle Menneskers Samvittighed for Guds Åsyn.
3 Mpe soki Sango Malamu oyo toteyaka ezali kaka ya kozipama, ezali ya kozipama kati na bato oyo bazali kobunga,
Men om også vort Evangelium er tildækket, da er det tildækket iblandt dem, som fortabes,
4 ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe. (aiōn )
dem, i hvem denne Verdens Gud har forblindet de vantros Tanker, for at Lyset ikke skulde skinne fra Evangeliet om Kristi Herlighed, han, som er Guds Billede. (aiōn )
5 Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.
Thi ikke os selv prædike vi, men Kristus Jesus som Herre, os derimod som eders Tjenere for Jesu Skyld.
6 Pamba te Nzambe oyo alobaki: « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Thi Gud, som sagde: "Af Mørke skal Lys skinne frem", han har ladet det skinne i vore Hjerter for, at bringe Kundskaben om Guds Herlighed på Kristi Åsyn for Lyset.
7 Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
Men denne Skat have vi i Lerkar, for at den overvættes Kraft må være Guds, og ikke fra os,
8 Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te;
vi, som trænges på alle Måder, men ikke stænges inde, ere tvivlrådige, men ikke fortvivlede,
9 tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
forfulgte, men ikke forladte, nedslagne, men ikke ihjelslagne,
10 Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso.
altid bærende Jesu Dødelse om i Legemet, for at også Jesu Liv må åbenbares i vort Legeme.
11 Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.
Thi altid overgives vi, som leve, til Død for Jesu Skyld, for at også Jesu Liv må åbenbares i vort dødelige Kød.
12 Boye, kufa esalaka mosala na yango kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala na yango kati na bino.
Således er Døden virksom i os, men Livet i eder!
13 Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama: « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.
Men efterdi vi have den samme Troens Ånd, som der er skrevet: "Jeg troede, derfor talte jeg," så tro også vi, og derfor tale vi også,
14 Pamba te toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akobimisa biso elongo na bino liboso na Ye.
idet vi vide, at han, som oprejste den Herre Jesus, skal også oprejse os med Jesus og fremstille os tillige med eder.
15 Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
Thi det sker alt sammen for eders Skyld, for at Nåden må vokse ved at nå til flere, og til Guds Ære forøge Taksigelsen.
16 Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
Derfor tabe vi ikke Modet; men om også vort udvortes Menneske fortæres, fornyes dog vort indvortes Dag for Dag.
17 Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. (aiōnios )
Thi vor Trængsel, som er stakket og let, virker for os over al Måde og Mål en evig Vægt af Herlighed, (aiōnios )
18 Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko. (aiōnios )
idet vi ikke se på de synlige Ting, men på de usynlige; thi de synlige ere timelige, men de usynlige ere evige. (aiōnios )