< 2 Bakolinto 3 >
1 Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko? Boni, tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya kopesa bino mikanda ya matatoli to ya kosenga bino mikanda ya matatoli?
Elkezdjük-é ismét ajánlgatni magunkat? Vagy talán szükségünk van, mint némelyeknek, ajánló levelekre hozzátok, avagy tőletek?
2 Bino nde bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso, mokanda oyo bato nyonso bayebi mpe batangaka.
A mi levelünk ti vagytok, beírva a mi szívünkbe, a melyet ismer és olvas minden ember;
3 Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.
A kik felől nyilvánvaló, hogy Krisztusnak a mi szolgálatunk által szerzett levele vagytok, nem tentával, hanem az élő Isten Lelkével írva; nem kőtáblákra, hanem a szívnek hústábláira.
4 Yango nde elikya oyo tozali na yango kati na Nzambe, na nzela ya Klisto.
Ilyen bizodalmunk pedig Isten iránt a Krisztus által van.
5 Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.
Nem mintha magunktól volnánk alkalmatosak valamit gondolni, úgy mint magunkból; ellenkezőleg a mi alkalmatos voltunk az Istentől van:
6 Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.
A ki alkalmatosokká tett minket arra, hogy új szövetség szolgái legyünk, nem betűé, hanem léleké; mert a betű megöl, a lélek pedig megelevenít.
7 Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,
Ha pedig a halálnak betűkkel kövekbe vésett szolgálata dicsőséges vala, úgyhogy Izráel fiai nem is nézhettek Mózes orczájára arczának elmúló dicsősége miatt:
8 ndenge nini lotomo ya Molimo eleka na nkembo te?
Hogyne volna még inkább dicsőséges a léleknek szolgálata?
9 Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te?
Mert ha a kárhoztatás szolgálata dicsőséges, mennyivel inkább dicsőséges az igazság szolgálata?
10 Tokoki ata koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene.
Sőt a dicsőített nem is dicsőséges ebben a részben az őt meghaladó dicsőség miatt.
11 Mpe soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo ya oyo ekowumelaka seko na seko eleka monene te?
Mert ha dicsőséges az elmulandó, sokkal inkább dicsőséges, a mi megmarad.
12 Lokola tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na bobangi te;
Azért ilyen reménységben nagy nyiltsággal szólunk;
13 tozali te lokola Moyize oyo azalaki kosalela vwale mpo na kozipa elongi na ye, mpo na kopekisa bana ya Isalaele kotala suka ya nkembo oyo esengeli kosila.
És nem, miként Mózes, a ki leplet borított az orczájára, hogy ne lássák Izráel fiai az elmulandónak végét.
14 Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.
De megtompultak az ő elméik. Mert ugyanaz a lepel mind e mai napig ott van az ó szövetség olvasásánál felfedetlenül, mivelhogy a Krisztusban tűnik el;
15 Solo, kino na mokolo ya lelo, tango nyonso bana ya Isalaele batangaka mikanda ya Moyize, vwale moko ezipaka mitema na bango.
Sőt mind máig, a mikor csak olvassák Mózest, lepel borul az ő szívökre.
16 Kasi tango nyonso moto abalukaka epai ya Nkolo, vwale yango elongwaka.
Mikor pedig megtér az Úrhoz, lehull a lepel.
17 Sik’oyo, Nkolo azali Molimo; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.
Az Úr pedig a Lélek; és a hol az Úrnak Lelke, ott a szabadság.
18 Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
Mi pedig az Úrnak dicsőségét mindnyájan fedetlen arczczal szemlélvén, ugyanazon ábrázatra elváltozunk, dicsőségről dicsőségre, úgy mint az Úrnak Lelkétől.