< 2 Bakolinto 2 >

1 Yango wana nazwaki mokano ya kozongela bino te mpo ete nayokisa bino lisusu mawa te.
われ再び憂をもて汝らに到らじと自ら定めたり。
2 Pamba te soki nayokisi bino mawa, banani bakosepelisa ngai lisusu soki kaka te bino oyo ngai nayokisi mawa?
我もし汝らを憂ひしめば、我が憂ひしむる者のほかに誰か我を喜ばせんや。
3 Nakomelaki bino ndenge mpe nasali yango sik’oyo mpo ete bato oyo basengeli kosepelisa ngai bayokisa ngai mawa te tango nakoya. Nandimisami penza na tina na bino nyonso ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
われ前に此の事を書き贈りしは、我が到らんとき、我を喜ばすべきもの、反つて我を憂ひしむる事のなからん爲にして、汝らは皆わが喜悦を喜悦とするを信ずるに因りてなり。
4 Solo, tango nakomelaki bino, nazalaki kati na pasi makasi, kati na komitungisa na motema na ngai, mpe kati na kolela makasi; ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba mozindo ya bolingo na ngai mpo na bino.
われ大なる患難と心の悲哀とにより、多くの涙をもて汝らに書き贈れり。これ汝らを憂ひしめんとにあらず、我が汝らに對する愛の溢るるばかりなるを知らしめん爲なり。
5 Soki moko kati na bino ayokisaki moninga na ye mawa, ayokisaki yango ngai te kasi ayokisaki nde bino nyonso to ndambo kati na bino, mpo nalekisa ndelo te.
もし憂ひしむる人あらば、我を憂ひしむるにあらず、幾許か汝ら衆を憂ひしむるなり。(幾許かと云へるは、われ激しく責むるを好まぬ故なり)
6 Mpo na yango, ekokaki penza ete bato oyo baleki ebele kati na bino bapamela ye.
かかる人の多數の者より受けたる懲罰は足れり。
7 Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.
されば汝ら寧ろ彼を恕し、かつ慰めよ、恐らくは其の人、甚だしき愁に沈まん。
8 Yango wana, nazali kosenga na bino ete bolinga ye lisusu.
この故に我なんぢらの愛を彼に顯さんことを勸む。
9 Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.
前に書き贈りしは、凡ての事につきて汝らが從順なりや否やをも試み知らん爲なり。
10 Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto,
なんぢら何事にても人を恕さば、我も亦これを恕さん、われ恕したる事あらば、汝らの爲にキリストの前に恕したるなり。
11 mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.
これサタンに欺かれざらん爲なり、我等はその詭謀を知らざるにあらず。
12 Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.
我キリストの福音の爲にトロアスに到り、主われに門を開き給ひたれど、
13 Kasi motema na ngai etikalaki kozala na kimia te mpo ete namonaki kuna te ndeko na ngai, Tito. Boye, natikaki bango mpe nakendeki na Masedwane.
我が兄弟テトスに逢はぬによりて心に平安をえず、彼處の者に別を告げてマケドニヤに往けり。
14 Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.
感謝すべきかな、神は何時にてもキリストにより、我らを執へて凱旋し、何處にても我等によりてキリストを知る知識の馨をあらはし給ふ。
15 Pamba te, mpo na Nzambe, tozali solo kitoko ya Klisto kati na bato oyo bazali na nzela ya lobiko mpe kati na ba-oyo bazali kobunga.
救はるる者にも亡ぶる者にも、我らは神に對してキリストの香しき馨なり。
16 Mpo na bamoko, tozali solo ya kufa, oyo ezali komema bango na kufa; mpe mpo na bamosusu, tozali solo ya bomoi, oyo ezali komema bango na bomoi. Boye nani azali na makoki mpo na mosala ya lolenge oyo?
この人には死よりいづる馨となりて死に至らしめ、かの人には生命より出づる馨となりて生命に至らしむ。誰か此の任に耐へんや。
17 Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.
我らは多くの人のごとく神の言を曲げず、眞實により神による者のごとく、神の前にキリストに在りて語るなり。

< 2 Bakolinto 2 >