< 2 Bakolinto 13 >

1 Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
τριτον τουτο ερχομαι προς υμας επι στοματος δυο μαρτυρων και τριων σταθησεται παν ρημα
2 Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe, wana nazali nanu mosika na bino, nazali kozongela yango lisusu epai ya bato oyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete, tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko te mawa,
προειρηκα και προλεγω ως παρων το δευτερον και απων νυν γραφω τοις προημαρτηκοσιν και τοις λοιποις πασιν οτι εαν ελθω εις το παλιν ου φεισομαι
3 lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.
επει δοκιμην ζητειτε του εν εμοι λαλουντος χριστου ος εις υμας ουκ ασθενει αλλα δυνατει εν υμιν
4 Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko: tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.
και γαρ ει εσταυρωθη εξ ασθενειας αλλα ζη εκ δυναμεως θεου και γαρ ημεις ασθενουμεν εν αυτω αλλα ζησομεθα συν αυτω εκ δυναμεως θεου εις υμας
5 Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
εαυτους πειραζετε ει εστε εν τη πιστει εαυτους δοκιμαζετε η ουκ επιγινωσκετε εαυτους οτι ιησους χριστος εν υμιν εστιν ει μη τι αδοκιμοι εστε
6 Kasi nazali na elikya: bokoyeba solo ete biso tokweyaki te liboso ya komekama.
ελπιζω δε οτι γνωσεσθε οτι ημεις ουκ εσμεν αδοκιμοι
7 Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te.
ευχομαι δε προς τον θεον μη ποιησαι υμας κακον μηδεν ουχ ινα ημεις δοκιμοι φανωμεν αλλ ινα υμεις το καλον ποιητε ημεις δε ως αδοκιμοι ωμεν
8 Pamba te tozali na nguya te ya kotelemela solo, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango.
ου γαρ δυναμεθα τι κατα της αληθειας αλλ υπερ της αληθειας
9 Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.
χαιρομεν γαρ οταν ημεις ασθενωμεν υμεις δε δυνατοι ητε τουτο δε και ευχομεθα την υμων καταρτισιν
10 Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.
δια τουτο ταυτα απων γραφω ινα παρων μη αποτομως χρησωμαι κατα την εξουσιαν ην εδωκεν μοι ο κυριος εις οικοδομην και ουκ εις καθαιρεσιν
11 Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo: Bosepelaka! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
λοιπον αδελφοι χαιρετε καταρτιζεσθε παρακαλεισθε το αυτο φρονειτε ειρηνευετε και ο θεος της αγαπης και ειρηνης εσται μεθ υμων
12 Bopesanaka mbote na beze ya bule.
ασπασασθε αλληλους εν αγιω φιληματι
13 Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote.
ασπαζονται υμας οι αγιοι παντες
14 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso!
η χαρις του κυριου ιησου χριστου και η αγαπη του θεου και η κοινωνια του αγιου πνευματος μετα παντων υμων αμην

< 2 Bakolinto 13 >