< 2 Bakolinto 11 >

1 Bandeko, nabondeli bino: boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko! Iyo, boyikela ngai mpiko.
Me ya bi vun sur ni me niti inkbra ko ni he bi vunsur ni me.
2 Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.
Me tin ngun ni tu bi. Igun iri whu Rji ni tubi wa me yo yu ni yi ne mi Gran ni Lilon riri. me na yo yu ni gabatar ni friwa wu tsa tra ni Almasihu.
3 Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
Me tin sisir ni tun bi wa wan a gur Hauwa'u ni ta da wunma. a ha naki ndu mrei bi ni kauce janji ni gre Almasihu.
4 Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki!
Na hi rin nita ye na krin dubun Yesu kanka ni wa kitini yi nitu blantrama bi kpa ruhu ri kan wa bi kpa ko bi kpa tra Rji latre ri kan na waki kpa. ki kpayeme wa biti ne kpebi ti a mlannayi.
5 Nzokande, nakanisi ete nazali moke te na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene.
Me na he no kogona ibrun bin ba yo ba ngazani nekunbi ndun Rji.
6 Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.
Ko ba na tsrome na me tre, me na rasa horowa tsro na ko ta i gun rime ikpe ki lah ni yi wu.
7 Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino botombwama, wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nzambe?
me ti la' tra wa me yo tumu ni si (kaskata) na gber yin? melah tre Rji ni yiwu menge.
8 Nazwaki mbongo kowuta na Mangomba mosusu lokola lisungi na bango, wana nazalaki kokokisa lotomo na ngai kati na bino.
Me vun brun Ikisiya ni kpa kpe ba zo, ba niwu na ti chucu.
9 Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.
Bi to wa me ha ni yi me toyi ni me bi wa mena lah ne mre vanyi wa baye ni makidoniya ba ha ndimu na me koge me zintunmu nikpa idimu niyi me yonza ni ti na yi
10 Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.
A janji Almasihu ha ni me na, sun ni gbanbi gbre sanmu ni me mame akaya.
11 Mpo na nini nalobi bongo? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino!
A ngye? ni mena sunyi na Rji to
12 Mpe nakokoba kosala oyo nazali kosala sik’oyo, mpo na kopekisa bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso kati na makambo oyo bazali komikumisa na yango.
I kpe me ti me yonza, me ti naki me nhan to bi ba nsu to na kita kpen wa ba gbre ni nwu.
13 Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.
Irin Idin bi mazani babi tice bi ti ndun gyru. ba no kama kamar mazanni Almasihuna
14 Ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole.
Wa yi na kepn sisar ne mena ibrji ne no kamar na rju kamar mala'ika wa ni kpan.
15 Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.
Anaki ki kle a kpe wu mamaki na ni bi gra ba no kamani ba ba'ba gra bi ti ndindi bun, a kle ba ni ha ridimba nkpe wa bati
16 Nazongeli lisusu: tika ete moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma! Kasi soki bolingi bongo, boyamba ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.
Me karah lahi ndum rin yin zato me ruruma. Bita ti zato naki bi bame me irurume ni gbre sa fime.
17 Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa.
Nikpe wa me lah ni gabagadi me na gbresa nitra kpe wa Baci kpanyena. me na me ti ikbra.
18 Lokola bato mingi bazali komikumisa na tina na makambo ya mokili, ngai mpe nakomikumisa.
Ndin bi ba bra ba gbresa ni tun kpa me me gbresa me.
19 Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma.
Bi grin ni bi shutun bi ti na bi ti kbra ni bin to (masuhikima).
20 Bozali penza kondima ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na bilongi!
Bi vun sur ni ndi wa nibayi bi grah. idan a kbanyin sar na ti ndu ni yi ni tun ribatun ma, da, ba tuma nayi na wruyi ni takpa shi.
21 Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango.
Me lah ni yi wuki ji sha ki ha ni iso (weak) niti na bam. ko naki nda rin bu ni gbre sa me tra na me ti kbra ne gresame.
22 Bazali Ba-Ebre? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele! Bazali bakitani ya Abrayami? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami.
Ba Yahudawa? me ha na ki ba ha Israilawa? me ha naki ba mren Ibrahim? me ha naki.
23 Bazali basali ya Klisto? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.
Ba gra Almasihu? me tra na (me na ha ni sormu na) me nan ba me ti ndun (Tukur) za ba wawu, me rin mikho wu tro ndi (kurkuku) za ko anh ba izee me ba lansor, shishinmu (hudura) kyu brabra.
24 Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa;
Ni wo mre Yahudawa igun ton (sunbiy) ba zee me gbagba gun se' thra ni thewn (arba'in ba daya).
25 mbala misato, babetaki ngai banzete; mbala moko, babambaki ngai mabanga; mbala misato, nazindaki na mayi; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene.
Kun thra me kpa zee ni me ni kunkro inku rin ba tame ni tata. nkun thra me ti haderi Jirgin ma me ton cun ni kpa (dare da yini guda) ni me takpo ma tsutsuma ni min kpoma.
26 Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
Me ti yah tsar ni min hadari koguna, ne miha daribi ywen ni me hadari ndi ne hadari alumai min gbu ni me hadari min nji ni men hadari teku (tsotsoma) ko ta kpoma ni me mrevanyi bi tice.
27 Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.
Me to tunmu ni mindu itukuru ni me sor wu kikle yah (ni me sor wuyah) ne min ti chun ba kurna, ni mi yun ni lah ma ni min bran vunsor min si ni gbren.
28 Longola makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki: komitungisa na tina na Mangomba nyonso.
Ni kogon kpe wa wu, nkpi ha ni tunmu ko ni ton rime don tamre mu nitun Ikilisiya wa wu.
29 Nani oyo alembi, bongo ngai nalemba nzoto te? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te?
A ha kwu-kpa wa ni ha kwu-kpa ni tun ba na” ba yo ha ni kbun za me na krina?
30 Soki nasengeli komikumisa, nakomikumisa mpo na bolembu na ngai.
Me ta ni ha gangbe, me gangbe ni kpe wa kungremu (kasawata).
31 Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te. (aiōn g165)
Rji wu Baci wu titinbu Yesu wa amle wu gbre tuntur, nitunki me na tin cena. (aiōn g165)
32 Kati na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai.
Ni da mascu Gwamna wa a he nime kbinci ni zama in chun Aritas a noba gban ngbu Damasku na fun wa wu.
33 Kasi bakitisaki ngai na nzela ya lidusu kati na mir, kati na kitunga, libanda ya mir; bongo nalongaki kokima ye.
Ni ta do ni me sisen ba chunre ni kogon g'rlu gbu, me gbun gblu ni wo ba

< 2 Bakolinto 11 >