< 2 Masolo ya Kala 8 >

1 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,
بیست سال طول کشید تا سلیمان خانهٔ خداوند و قصر خود را ساخت.
2 Salomo atongaki lisusu bingumba mike oyo Irami apesaki ye mpe avandisaki kuna bana ya Isalaele.
بعد از آن نیروی خود را صرف بازسازی شهرهایی نمود که حیرام، پادشاه صور به او بخشیده بود. سپس عده‌ای از بنی‌اسرائیل را به آن شهرها کوچ داد.
3 Salomo akendeki kobundisa engumba Amati ya Tsoba mpe abotolaki yango.
سلیمان به حمات صوبه حمله برد و آن را گرفت.
4 Kati na esobe, atongaki engumba Tadimori; mpe kati na Amati, atongaki bingumba nyonso ya kobombela biloko.
او شهر تدمور را در بیابان و تمام شهرهای نواحی حمات را که مراکز مهمات و آذوقه بودند، بنا کرد.
5 Atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se lokola bingumba batonga makasi, elongo na bamir, bikuke mpe bibende oyo bakangelaka bikuke,
سلیمان شهر بیت‌حورون بالا و بیت‌حورون پایین را به شکل قلعه بازسازی نموده و دیوارهای آنها را تعمیر کرد و دروازه‌های پشتبنددار برای آنها کار گذاشت.
6 Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
سلیمان علاوه بر آنها شهر بعلت و شهرهای دیگری برای انبار مهمات و آذوقه و نگهداری اسبها و ارابه‌ها ساخت. خلاصه هر چه می‌خواست در اورشلیم و لبنان و سراسر قلمرو سلطنت خود بنا کرد.
7 Batikali nyonso kati na bato ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te,
سلیمان از بازماندگان قومهای کنعانی که اسرائیلی‌ها در زمان تصرف کنعان آنها را از بین نبرده بودند، برای بیگاری استفاده می‌کرد. این قومها عبارت بودند از: اموری‌ها، فرزی‌ها، حیتی‌ها، حوی‌ها و یبوسی‌ها. نسل این قومها تا زمان حاضر نیز برده هستند و به بیگاری گرفته می‌شوند.
8 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi, kino na mokolo ya lelo.
9 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar.
اما سلیمان از بنی‌اسرائیل کسی را به بیگاری نمی‌گرفت، بلکه ایشان به صورت سرباز، افسر، فرمانده و رئیس ارابه‌رانها خدمت می‌کردند.
10 Ezalaki mpe na bakalaka ya lokumu oyo mokonzi Salomo atiaki mpo na kokamba basali na ye. Motango na bango ezalaki nkama mibale na tuku mitano.
دویست و پنجاه نفر نیز به عنوان سرپرست کارگران سلیمان گمارده شده بودند.
11 Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki: « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »
سلیمان زن خود را که دختر فرعون بود از شهر داوود به قصر تازه‌ای که برایش ساخته بود، آورد. او نمی‌خواست زنش در کاخ سلطنتی داوود زندگی کند، زیرا می‌گفت: «هر جا که صندوق عهد خداوند به آن داخل شده، مکان مقدّسی است.»
12 Salomo abonzaki epai na Yawe bambeka ya kotumba, na etumbelo ya Yawe, oyo atongaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
آنگاه سلیمان بر مذبحی که جلوی ایوان خانهٔ خدا ساخته بود، قربانیهای سوختنی به خداوند تقدیم کرد.
13 Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso: feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.
مطابق دستوری که موسی داده بود، او برای هر یک از این روزهای مقدّس قربانی تقدیم می‌کرد: روزهای شبّات، جشنهای ماه نو، سه عید سالیانهٔ پِسَح، هفته‌ها و خیمه‌ها.
14 Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.
سلیمان طبق مقرراتی که پدرش داوود، مرد خدا برای کاهنان و لاویان وضع کرده بود، آنها را سر خدمتشان گماشت. لاویان در وصف خداوند سرود می‌خواندند و کاهنان را در انجام وظایف روزانه کمک می‌کردند. سلیمان نگهبانان را نیز به نگهبانی دروازه‌هایشان گماشت.
15 Batosaki na makambo nyonso mitindo ya mokonzi mpo na oyo etali Banganga-Nzambe mpe Balevi, ezala mpo na oyo etali bibombelo bomengo.
کاهنان و لاویان تمام این مقررات را که داوود پادشاه وضع کرده بود، با کمال دقت اجرا می‌کردند. در ضمن ایشان مسئول خزانه‌داری نیز بودند.
16 Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.
در این هنگام، تمام طرحهای ساختمانی سلیمان تکمیل شده بود. از پایه‌ریزی خانهٔ خداوند تا تکمیل ساختمان آن، همهٔ کارها با موفقیت انجام شده بود.
17 Salomo akendeki na Etsioni-Geberi mpe na Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
سپس سلیمان به شهرهای عصیون جابر و ایلوت، واقع در خلیج عقبه در زمین ادوم رفت.
18 Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.
حیرام پادشاه کشتی‌هایی به فرماندهی افسران با تجربهٔ خود نزد سلیمان فرستاد. آنها همراه ملوانان سلیمان به سرزمین اوفیر رفتند و از آنجا بیش از پانزده تن طلا برای سلیمان آوردند.

< 2 Masolo ya Kala 8 >