< 2 Masolo ya Kala 6 >

1 Bongo Salomo alobaki: « Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili!
是においてソロモン言けるはヱホバは濃き雲の中に居んと言たまひしが
2 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela! »
我汝のために住むべき家永久に居べき所を建たりと
3 Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
而して王その面をふりむけてイスラエルの全會衆を祝せり時にイスラエルの會衆は皆立をれり
4 Alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na tata na ngai, Davidi, mpe akokisi, na maboko na Ye, makambo oyo alakaki:
彼いひけるはイスラエルの神ヱホバは讃べき哉ヱホバはその口をもて吾父ダビデに言ひその手をもて之を成とげたまへり
5 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala, mpe naponaki moto mosusu te lokola mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele,
即ち言たまひけらく我はわが民をエジプトの地より導き出せし日より我名を置べき家を建しめんためにイスラエルの諸の支派の中より何の邑をも選みしこと無く又何人をも選みて我民イスラエルの君となせしこと無し
6 kasi naponaki nde Yelusalemi mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna, mpe Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele! »
只我はわが名を置くためにヱルサレムを選みまた我民イスラエルを治めしむるためにダビデを選めり
7 Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
夫イスラエルの神ヱホバの名のために家を建ることは我父ダビデの心にありき
8 Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.
然るにヱホバわが父ダビデに言たまひけるは我名のために家を建ること汝の心にあり汝の心にこの事あるは善し
9 Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
然れども汝はその家を建べからず汝の腰より出る汝の子その人わが名のために家を建べしと
10 Yawe akokisi elaka na Ye: nakitani tata na ngai, Davidi; navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
而してヱホバその言たまひし言をおこなひたまへり即ち我わが父ダビデに代りて立ちヱホバの言たまひしごとくイスラエルの位に坐しイスラエルの神ヱホバの名のために家を建て
11 Natie kuna Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na bana ya Isalaele.
その中にヱホバがイスラエルの子孫になしたまひし契約を容る櫃ををさめたりと
12 Bongo Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko na ye.
ソロモン、イスラエルの全會衆の前にてヱホバの壇の前に立てその手を舒ぶ
13 Solo, Salomo atongaki na bronze etemelo ya kolobela: ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse, mpe metele pene moko na bosanda; mpe atiaki yango na kati-kati ya lopango. Amataki na likolo na yango, afukamaki liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo
ソロモンさきに長五キユビト濶五キユビト高三キユビトの銅の臺を造りてこれを庭の眞中に据おきたりしが乃ちその上に立ちイスラエルの全會衆の前にて膝をかがめ其手を天に舒て
14 mpe asambelaki: — Yawe, Nzambe ya Isalaele! Ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se. Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na mitema na bango mobimba.
言けるはイスラエルの神ヱホバ天にも地にも汝のごとき神なし汝は契約を保ちたまひ心を全うして汝の前に歩むところの汝の僕等に恩惠を施こしたまふ
15 Okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo; makambo oyo olobaki, na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
汝は汝の僕わが父ダビデにのたまひし所を保ちたまへり汝は口をもて言ひ手をもて成就たまへること今日のごとし
16 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye: « Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. »
イスラエルの神ヱホバよ然ば汝が僕わが父ダビデに語りて若し汝の子孫その道を愼みて汝がわが前に歩めるごとくに我律法にあゆまばイスラエルの位に坐する人わが前にて汝に缺ること無るべしと言たまひし事をダビデのために保ちたまへ
17 Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tika ete elaka oyo opesaki na Davidi, mosali na Yo, ekokisama!
然ばイスラエルの神ヱホバよ汝が僕ダビデに言たまへるなんぢの言に效驗あらしめたまへ
18 Boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili elongo na bato? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo ngai natongi?
但し神果して地の上に人とともに居たまふや夫天も諸天の天も汝を容るに足ず况て我が建たる此家をや
19 Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo!
然れども我神ヱホバよ僕の祈祷と懇願をかへりみて僕が今汝の前に祈るその號呼と祈祷を聽たまへ
20 Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki ete okotia kuna Kombo na Yo! Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo!
願くは汝の目を夜晝此家の上即ち汝が其名を置んと言たまへる所の上に開きたまへ願くは僕がこの處にむかひて祈らん祈祷を聽たまへ
21 Okoyoka mabondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka mpe limbisa!
願くは僕と汝の民イスラエルがこの處にむかひて祈る時にその懇願を聽たまへ請ふ汝の住處なる天より聽き聽て赦したまへ
22 Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
人その隣人にむかひて罪を犯せることありてその人誓をもて誓ふことを要められんに若し來りてこの家において汝の壇の前に誓ひなば
23 yoka wuta na Likolo; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
汝天より聽て行ひ汝の僕等を鞫き惡き者に返報をなしてその道をその首に歸し義者を義としてその義にしたがひて之を待ひたまへ
24 Soki banguna balongi bato na Yo, Isalaele, mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,
汝の民イスラエルなんぢに罪を犯したるがために敵の前に敗れんに若なんぢに歸りて汝の名を崇め此家にて汝の前に祈り願ひなば
25 yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki bango mpe batata na bango!
汝天より聽て汝の民イスラエルの罪を赦し汝が彼等とその先祖に與へし地に彼等を歸らしめたまへ
26 Soki likolo ekangami mpe mvula ezali lisusu te mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,
彼らが汝に罪を犯したるがために天閉て雨なからんに彼ら若この處にむかひて祈り汝の名を崇め汝が彼らを苦しめたまふ時にその罪を離れなば
27 yoka bango wuta na Likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
汝天より聽きて汝の僕等なんぢの民イスラエルの罪を赦したまへ汝旣にかれらにその歩むべき善道を敎へたまへり汝の民に與へて產業となさしめたまひし汝の地に雨を降したまへ
28 Soki nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko eyei kati na mokili, soki banguna bazingeli bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango, to soki pasi to bokono ya lolenge nyonso ekweyeli bango,
若くは國に饑饉あるか若くは疫病枯死朽腐蟊賊稲蠹あるか若くは其敵かれらをその國の邑に圍む等如何なる災禍如何なる疾病あるとも
29 soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
もし一人或は汝の民イスラエルみな各々おのれの災禍と憂患を知てこの家にむかひて手を舒なば如何なる祈祷如何なる懇願をなすとも
30 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema na ye. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.
汝の住處なる天より聽て赦し各々の人にその心を知たまふごとくその道々にしたがひて報いたまへ其は汝のみ人々の心を知たまへばなり
31 Sala bongo mpo ete batosa Yo mpe batambola na banzela na Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso.
汝かく彼らをして汝が彼らの先祖に與へたまへる地に居る日の間つねに汝を畏れしめ汝の道に歩ましめたまへ
32 Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo: wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo monene na Yo, mpo na loboko na Yo ya nguya mpe esembolama; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,
且汝の民イスラエルの者にあらずして汝の大なる名と強き手と伸たる腕とのために遠き國より來れる異邦人においてもまた若來りてこの家にむかひて祈らば
33 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.
汝の住處なる天より聽き凡て異邦人の汝に龥もとむるごとく成たまへ汝かく地の諸の民をして汝の名を知らしめ汝の民イスラエルの爲ごとくに汝を畏れしめ又わが建たる此家は汝の名をもて稱らるるといふことを知しめたまへ
34 Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo,
汝の民その敵と戰はんとて汝の遣はしたまふ道に進める時もし汝が選びたまへるこの邑およびわが汝の名のために建たる家にむかひて汝に祈らば
35 yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.
汝天より彼らの祈祷と懇願を聽て彼らを助けたまへ
36 Tango bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu kati na mokili songolo, ezala ya mosika to ya pene,
人は罪を犯さざる者なければ彼ら汝に罪を犯すことありて汝かれらを怒り彼らをその敵に付したまひて敵かれらを虜として遠き地または近き地に曳ゆかん時
37 soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bowumbu na bango mpe balobi: « Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe; »
彼らその擄れゆきし地において自ら心に了るところあり其俘擄の地において翻へりて汝に祈り我らは罪を犯し悖れる事を爲し惡き事を行ひたりと言ひ
38 soki, wuta na mokili epai wapi bamemaki bango na bowumbu, basengi Yo bolimbisi, na mitema mpe na milimo na bango mobimba, soki basambeli na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
その擄へゆかれし俘擄の地にて一心一念に汝に立歸り汝がその先祖に與へたまへる地にむかひ汝が選びたまへる邑と我が汝の名のために建たる家にむかひて祈らば
39 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango mpe limbisa bato na Yo na masumu oyo basalaki liboso na Yo.
汝の住處なる天より彼らの祈祷と懇願を聽て彼らを助け汝の民が汝にむかひて罪を犯したるを赦したまへ
40 Kobanda sik’oyo, oh Nzambe na ngai, tika ete miso na Yo ezala ya kofungwama mpe matoyi na Yo eyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo!
然ば我神よ願くは此處にて爲す祈祷に汝の目を開き耳を傾むけたまヘ
41 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe,
ヱホバ神よ今汝および汝の力ある契約の櫃起て汝の安居の所にいりたまへヱホバ神よ願くは汝の祭司等に拯救の衣を纒はせ汝の聖徒等に恩惠を喜こばせたまヘ
42 Oh Yawe Nzambe, kobwaka te mopakolami na Yo,
ヱホバ神よ汝の膏そそぎし者の面を黜ぞけたまふ勿れ汝の僕ダビデの徳行を記念たまへ

< 2 Masolo ya Kala 6 >