< 2 Masolo ya Kala 4 >

1 Salomo asalaki etumbelo ya bronze ya bametele zomi na molayi, bametele pene zomi na mokuse, mpe bametele mitano na bosanda.
Then he made an altar of bronze, twenty cubits long, twenty cubits wide, and ten cubits high.
2 Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu: monene na yango ezalaki na bametele mitano; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano.
Also he made the molten sea of ten cubits from brim to brim. It was round, five cubits high, and thirty cubits in circumference.
3 Na se ya monoko na yango, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bangombe oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko.
Under it was the likeness of oxen, which encircled it, for ten cubits, encircling the sea. The oxen were in two rows, cast when it was cast.
4 Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale: misato etalaki na ngambo ya nor; misato, na ngambo ya weste; misato, na ngambo ya sude; mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima ya bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati.
It stood on twelve oxen, three looking toward the north, three looking toward the west, three looking toward the south, and three looking toward the east; and the sea was set on them above, and all their hindquarters were inward.
5 Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei na misato.
It was a handbreadth thick. Its brim was made like the brim of a cup, like the flower of a lily. It received and held three thousand baths.
6 Salomo asalaki lisusu basani zomi ya minene: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano, na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo na kosukola bisalelo mpo na bambeka ya kotumba. Kasi Banganga-Nzambe bazalaki kosukola na nzungu ya monene.
He also made ten basins, and put five on the right hand and five on the left, to wash in them. The things that belonged to the burnt offering were washed in them, but the sea was for the priests to wash in.
7 Asalaki lisusu bitelemiselo zomi ya minda, basala na wolo kolanda ndakisa na yango oyo epesamaki; mpe atiaki yango na eteni oyo eleki monene kati na Tempelo: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi.
He made the ten lamp stands of gold according to the ordinance concerning them; and he set them in the temple, five on the right hand and five on the left.
8 Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo.
He made also ten tables, and placed them in the temple, five on the right side and five on the left. He made one hundred basins of gold.
9 Asalaki lopango ya Banganga-Nzambe mpe lopango monene. Asalaki bikuke ya lopango mpe alatisaki yango bronze.
Furthermore he made the court of the priests, the great court, and doors for the court, and overlaid their doors with bronze.
10 Atiaki nzungu ya monene na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude-este.
He set the sea on the right side of the house eastward, toward the south.
11 Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe:
Huram made the pots, the shovels, and the basins. So Huram finished doing the work that he did for King Solomon in God’s house:
12 makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,
the two pillars, the bowls, the two capitals which were on the top of the pillars, the two networks to cover the two bowls of the capitals that were on the top of the pillars,
13 bililingi ya bambuma ya grenade nkama minei ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama: milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi;
and the four hundred pomegranates for the two networks—two rows of pomegranates for each network, to cover the two bowls of the capitals that were on the pillars.
14 bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene, oyo batiaki na likolo ya bivandelo,
He also made the bases, and he made the basins on the bases—
15 nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene,
one sea, and the twelve oxen under it.
16 basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.
Huram-abi also made the pots, the shovels, the forks, and all its vessels for King Solomon, for the LORD’s house, of bright bronze.
17 Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tseredata.
The king cast them in the plain of the Jordan, in the clay ground between Succoth and Zeredah.
18 Mpo ete Salomo asalaki biloko oyo nyonso ebele koleka, yango wana bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki.
Thus Solomon made all these vessels in great abundance, so that the weight of the bronze could not be determined.
19 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe: etumbelo; bamesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe;
Solomon made all the vessels that were in God’s house: the golden altar, the tables with the show bread on them,
20 bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule,
and the lamp stands with their lamps to burn according to the ordinance before the inner sanctuary, of pure gold;
21 bafololo na yango, minda na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, basala na wolo ya peto makasi;
and the flowers, the lamps, and the tongs of gold that was purest gold;
22 bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
and the snuffers, the basins, the spoons, and the fire pans of pure gold. As for the entry of the house, its inner doors for the most holy place and the doors of the main hall of the temple were of gold.

< 2 Masolo ya Kala 4 >