< 2 Masolo ya Kala 36 >

1 Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, mpe bakomisaki ye mokonzi, na Yelusalemi, mpo na kokitana na tata na ye.
La population du pays choisit Joachaz, fils de Josias, et on le proclama roi à Jérusalem à la place de son père.
2 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi.
Joachaz avait vingt-trois ans en montant sur le trône, et il régna trois mois à Jérusalem.
3 Mokonzi ya Ejipito alongolaki ye na bokonzi kati na Yelusalemi mpe asengaki na makasi ete mokili ya Yuda ekoma kofuta mpako mpo na mokonzi: bakilo nkoto misato na nkama minei ya palata mpe ya wolo.
Le roi d’Egypte le destitua à Jérusalem, et il imposa au pays un tribut de cent kikkar d’argent et d’un kikkar d’or.
4 Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito.
Puis le roi d’Egypte conféra la royauté sur Juda et Jérusalem à Elyakim, frère de Joachaz, et changea son nom en celui de Joïakim. Quant à Joachaz, son frère, Nekho l’emmena captif en Egypte.
5 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
Joïakim avait vingt-cinq ans en montant sur le trône, et il régna onze ans à Jérusalem. Il fit le mal aux yeux de l’Eternel, son Dieu.
6 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.
Nabuchodonosor, roi de Babylone, marcha contre lui, et le fit jeter dans les fers pour l’amener à Babylone.
7 Nabukodonozori amemaki mpe na Babiloni ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya bokonzi.
En outre, Nabuchodonosor emporta à Babylone une partie des vases de la maison de l’Eternel et les déposa dans son sanctuaire à Babylone.
8 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi, misala na ye ya nkele mpe makambo oyo ekweyelaki ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Les autres faits et gestes de Joïakim, les abominations qu’il commit, tout ce qu’on peut relever contre lui, sont consignés dans le livre des Rois d’Israël et de Juda. Son fils Joïachin régna à sa place.
9 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato mpe mikolo zomi na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe.
Agé de huit ans à son avènement, Joïachin régna trois mois et dix jours à Jérusalem. Il fit ce qui est mal aux yeux de l’Eternel.
10 Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
Au renouvellement de l’année, le roi Nabuchodonosor donna ordre de l’amener à Babylone en même temps que les vases précieux du temple de l’Eternel, et il établit son frère Sédécias comme roi de Juda et de Jérusalem.
11 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi.
Sédécias avait vingt et un an à son avènement, et il régna onze ans à Jérusalem.
12 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe.
Il fit ce qui est mal aux yeux de l’Eternel, son Dieu, ne s’humilia point devant le prophète Jérémie, qui était l’organe de l’Eternel.
13 Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.
De plus, il se révolta contre Nabuchodonosor, qui lui avait fait prêter serment au nom de Dieu; il raidit son cou et endurcit son cœur, refusant de revenir à l’Eternel, Dieu d’Israël.
14 Bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bato bakomaki lisusu kosala mabe koleka, balandaki misala nyonso ya nkele ya bikolo ya bapaya mpe babebisaki bosantu ya Tempelo ya Yawe oyo Ye moko Yawe abulisaki na Yelusalemi.
De même, tous les chefs des prêtres et le peuple multiplièrent leurs félonies, en se livrant à toutes les abominations des peuples païens, et souillèrent la maison de l’Eternel, sanctifiée par lui à Jérusalem.
15 Yawe, Nzambe ya batata na bango, atindelaki bango, mbala na mbala mpe na ngonga malamu, makebisi na nzela ya bamemi sango na Ye, pamba te azalaki na posa ya kobatela bato na Ye mpe Tempelo na Ye.
L’Eternel, Dieu de leurs pères, les avertissait bien par ses messagers sans cesse et dès la première heure, car il voulait épargner son peuple et le lieu de sa résidence.
16 Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
Mais ils raillaient les messagers de Dieu, dédaignaient ses paroles et tournaient en dérision ses prophètes, jusqu’à ce que le courroux du Seigneur s’accrut contre son peuple de façon irrémédiable.
17 Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.
Il fit marcher contre eux le roi des Chaldéens, fit périr leurs jeunes gens par le glaive dans le sanctuaire, et n’épargna ni l’adolescent ni la vierge, ni le vieillard ni les cheveux blancs; tous, il les abandonna en son pouvoir.
18 Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.
Celui-ci transporta à Babylone tous les ustensiles, grands et petits, de la maison de Dieu, les trésors de la maison du Seigneur, les trésors du roi et de ses seigneurs.
19 Batumbaki na moto Tempelo ya Nzambe, babukaki mir ya Yelusalemi, batumbaki na moto bandako na yango ya kitoko mpe babebisaki biloko nyonso ya motuya.
On brûla la maison de Dieu, on démolit le mur de Jérusalem, et on en livra aux flammes tous les palais; tous les objets de prix qu’elle renfermait furent la proie de la destruction.
20 Nabukodonozori amemaki na Babiloni bato oyo babikaki na mopanga, akomisaki bango bawumbu na ye mpe ya bana na ye ya mibali kino na tango mokili ya Persi ezwaki bokonzi.
Le roi des Chaldéens déporta à Babylone tous ceux qui avaient échappé au glaive; ils lui demeurèrent asservis, à lui et à ses fils, jusqu’à l’avènement du roi de Perse,
21 Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi: « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »
afin que s’accomplît la parole de l’Eternel, annoncée par Jérémie: "Jusqu’à ce que la terre eût acquitté la dette de son chômage, dans toute cette période de désolation, elle chôma, pour remplir la période de soixante-dix ans".
22 Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba:
Dans la première année de Cyrus, roi de Perse, à l’époque où devait s’accomplir la parole de l’Eternel, annoncée par Jérémie, l’Eternel éveilla le bon vouloir de Cyrus, roi de Perse; et celui-ci fit proclamer, dans tout son royaume, par la voix des hérauts et aussi par des missives écrites, ce qui suit.
23 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi: ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye! › »
"Ainsi parle Cyrus, roi de Perse: L’Eternel, Dieu du ciel, m’a mis entre les mains tous les royaumes de la terre, et c’est lui qui m’a donné mission de lui bâtir un temple à Jérusalem, qui est en Judée. S’Il est parmi vous quelqu’un qui appartienne à son peuple, que l’Eternel, son Dieu, soit avec lui, pour qu’il monte!…"

< 2 Masolo ya Kala 36 >