< 2 Masolo ya Kala 35 >

1 Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika.
Und Josia hielt dem HERRN Passah zu Jerusalem, und sie schlachteten das Passah am vierzehnten Tage des ersten Monats.
2 Atiaki Banganga-Nzambe mpo ete bakoba mosala na bango mpe alendisaki bango na mosala ya Tempelo ya Yawe.
Und er bestellte die Priester zu ihrem Dienst und stärkte sie zu ihrem Amt im Hause des HERRN
3 Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba: — Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye.
und sprach zu den Leviten, die ganz Israel lehrten und dem HERRN geheiligt waren: Tut die heilige Lade ins Haus das Salomo, der Sohn Davids, der König Israels, gebaut hat. Ihr sollt sie nicht auf den Schultern tragen. So dienet nun dem HERRN, eurem Gott, und seinem Volk Israel
4 Bomibongisa kolanda mabota mpe masanga na bino ya mosala, kolanda mitindo oyo Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpe Salomo, mwana na ye ya mobali, bakomaki.
und bereitet euch nach euren Vaterhäusern in euren Ordnungen, wie sie vorgeschrieben sind von David, dem König Israels, und seinem Sohn Salomo,
5 Bowumela na bisika na bino ya mosala kati na Esika ya bule: lisanga moko ya Balevi mpo na libota moko na moko ya bandeko na bino, bato ya ekolo na bino.
und steht im Heiligtum nach den Ordnungen der Vaterhäuser eurer Brüder, vom Volk geboren, je eine Ordnung eines Vaterhauses der Leviten,
6 Bokata kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika, bomibulisa mpe bobongisa mpate yango ya Pasika mpo na bandeko na bino oyo bozali na bango ekolo moko, kolanda mitindo ya Yawe na nzela ya Moyize.
und schlachtet das Passah und heiligt euch und bereitet es für eure Brüder, daß sie tun nach dem Wort des HERRN durch Mose.
7 Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika.
Und Josia gab zur Hebe für den gemeinen Mann Lämmer und junge Ziegen (alles zum Passah für alle, die vorhanden waren, an der Zahl dreißigtausend) und dreitausend Rinder, alles von dem Gut des Königs.
8 Bakalaka na ye mpe bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya bato, epai ya Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi. Ilikia, Zakari mpe Yeyeli, oyo bazalaki bakambi ya misala kati na Tempelo ya Nzambe, bapesaki epai ya Banganga-Nzambe lokola mbeka ya Pasika bana meme nkoto mibale na nkama motoba mpe bangombe nkama misato.
Seine Fürsten aber gaben zur Hebe freiwillig für das Volk und für die Priester und Leviten. Hilkia, Sacharja und Jehiel, die Fürsten im Hause Gottes, gaben den Priestern zum Passah zweitausend und sechshundert Lämmer und Ziegen, dazu dreihundert Rinder.
9 Konania elongo na bandeko na ye ya mibali: Shemaya, Netaneeli, Ashabia, Yeyeli mpe Yozabadi oyo bakambi ya Balevi, bapesaki bameme nkoto mitano mpe bangombe nkama mitano epai ya Balevi lokola mbeka ya Pasika.
Aber Chananja, Semaja, Nathanael und seine Brüder, Hasabja, Jeiel und Josabad, der Leviten Oberste, gaben zur Hebe den Leviten zum Passah fünftausend Lämmer und Ziegen und dazu fünfhundert Rinder.
10 Tala ndenge babongisaki losambo: Banganga-Nzambe batelemaki na esika na bango ya mosala, mpe Balevi bazalaki kati na masanga na bango, kolanda mitindo ya mokonzi.
Also ward der Gottesdienst beschickt; und die Priester standen an ihrer Stätte und die Leviten in ihren Ordnungen nach dem Gebot des Königs.
11 Bato babonzaki bana meme mpe bana ntaba lokola mbeka ya Pasika, mpe Balevi bazalaki kopesa makila na yango epai ya Banganga-Nzambe mpo ete basopa yango na likolo ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kopapa mbeka
Und sie schlachteten das Passah, und die Priester nahmen das Blut von ihren Händen und sprengten, und die Leviten zogen die Haut ab.
12 mpe kotia pembeni biteni ya kobonza lokola mbeka ya kotumba, mpo na kopesa yango epai ya bato kolanda masanga na bango mpo ete babonza yango epai na Yawe, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. Basalaki mpe ndenge wana mpo na bangombe.
Und die Brandopfer taten sie davon, daß sie die gäben unter die Teile der Vaterhäuser des Volks, dem HERRN zu opfern. Wie es geschrieben steht im Buch Mose's. So taten sie mit den Rindern auch.
13 Kolanda ndenge mobeko ezalaki kotinda, batumbaki na moto meme oyo ebonzamaki lokola mbeka ya Pasika mpe balambaki makabo mosusu ya bule na nzungu, na kikalungu mpe na basani; mpe bapesaki yango na lombangu epai ya bato nyonso.
Und sie kochten das Passah am Feuer, wie sich's gebührt. Aber was geheiligt war, kochten sie in Töpfen, Kesseln und Pfannen, und machten's eilend für alles Volk.
14 Sima na yango, Balevi babongisaki mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe; pamba te Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bazalaki kosala kino na butu mosala ya kobonza bambeka ya kotumba mpe mafuta ya banyama. Yango wana Balevi bazalaki kobongisa mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron.
Darnach aber bereiteten sie auch für sich und die Priester. Denn die Priester, die Kinder Aaron, schafften an dem Brandopfer und Fetten bis in die Nacht; darum mußten die Leviten für sich und für die Priester, die Kinder Aaron, zubereiten.
15 Babeti mindule, bana mibali ya Azafi, bazalaki na esika na bango ya mosala kolanda mitindo ya Davidi, ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni, mosakoli ya mokonzi. Bakengeli bikuke mpe bazalaki na bisika na bango ya mosala; batikalaki kozala mosika na yango te, pamba te bandeko na bango, Balevi, bazalaki mpe kobongisela bango biloko.
Und die Sänger, die Kinder Asaph, standen an ihrer Stätte nach dem Gebot Davids und Asaphs und Hemans und Jedithuns, des Sehers des Königs, und die Torhüter an allen Toren, und sie wichen nicht von ihrem Amt; denn die Leviten, ihre Brüder, bereiteten zu für sie.
16 Ezalaki ndenge wana nde misala nyonso ebongisamaki mokolo wana mpo na kosepela feti ya Pasika mpe kobonza mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo ya Yawe, kolanda mitindo ya mokonzi Joziasi.
Also ward beschickt der Gottesdienst des HERRN des Tages, daß man Passah hielt und Brandopfer tat auf dem Altar des HERRN nach dem Gebot des Königs Josia.
17 Bana ya Isalaele oyo bazalaki wana basepelaki na tango wana feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire, mikolo sambo.
Also hielten die Kinder Israel, die vorhanden waren, Passah zu der Zeit und das Fest der ungesäuerten Brote sieben Tage.
18 Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi.
Es war aber kein Passah gehalten in Israel wie das, von der Zeit Samuels, des Propheten; und kein König in Israel hatte solch Passah gehalten, wie Josia Passah hielt und die Priester, Leviten, ganz Juda und was von Israel vorhanden war und die Einwohner zu Jerusalem.
19 Ezalaki na mobu ya zomi na mwambe ya bokonzi ya Joziasi nde basepelaki Pasika yango.
Im achtzehnten Jahr des Königreichs Josias ward dies Passah gehalten.
20 Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela.
Nach diesem, da Josia das Haus zugerichtet hatte, zog Necho, der König in Ägypten, herauf, zu streiten wider Karchemis am Euphrat. Und Josia zog aus, ihm entgegen.
21 Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye: — Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo.
Aber er sandte Boten zu ihm und ließ ihm sagen: Was habe ich mit dir zu tun, König Juda's? ich komme jetzt nicht wider dich, sondern wider das Haus, mit dem ich Krieg habe; und Gott hat gesagt, ich soll eilen. Laß ab von Gott, der mit mir ist, daß er dich nicht verderbe!
22 Kasi Joziasi aboyaki kotika ye, mpe lokola ayokaki te makambo oyo Neko ayebisaki ye kowuta na monoko ya Nzambe, Joziasi amibongolaki mpo na kobundisa Neko na lubwaku ya Megido.
Aber Josia wandte sein Angesicht nicht von ihm, sondern stellte sich, mit ihm zu streiten und gehorchte nicht den Worten Nechos aus dem Munde Gottes und kam, mit ihm zu streiten auf der Ebene bei Megiddo.
23 Kati na bitumba, basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki mokonzi Joziasi, mpe ye alobaki na basoda na ye: — Bolongola ngai awa, pamba te nazoki makasi.
Aber die Schützen schossen den König Josia, und der König sprach zu seinen Knechten: Führt mich hinüber; denn ich bin sehr wund!
24 Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga.
Und seine Knechte taten ihn von dem Wagen und führten ihn auf seinem andern Wagen und brachten ihn gen Jerusalem; und er starb und ward begraben in den Gräbern seiner Väter. Und ganz Juda und Jerusalem trugen Leid um Josia.
25 Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.
Und Jeremia beklagte Josia, und alle Sänger und Sängerinnen redeten in ihren Klageliedern über Josia bis auf diesen Tag und machten eine Gewohnheit daraus in Israel. Siehe, es ist geschrieben unter den Klageliedern.
26 Makambo mpe misala mosusu ya Joziasi, elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Yawe, kolanda oyo ekomama kati na Mobeko ya Yawe,
Was aber mehr von Josia zu sagen ist und seine Barmherzigkeit nach der Vorschrift im Gesetz des HERRN
27 misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
und seine Geschichten, beide, die ersten und die letzten, siehe, das ist geschrieben im Buch der Könige Israels und Juda's.

< 2 Masolo ya Kala 35 >