< 2 Masolo ya Kala 34 >

1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi.
Josiah was eight years old when he began to reign; and he reigned thirty-one years in Jerusalem.
2 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango: apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
He did that which was right in the eyes of the LORD, and walked in the ways of David his father, and did not turn aside to the right hand or to the left.
3 Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.
For in the eighth year of his reign, while he was yet young, he began to seek after the God of David his father; and in the twelfth year he began to purge Judah and Jerusalem from the high places, and the Asherim, and the engraved images, and the molten images.
4 Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.
They broke down the altars of the Baals in his presence; and the incense altars that were on high above them he cut down; and the Asherim, and the engraved images, and the molten images, he broke in pieces, and made dust of them, and strewed it on the graves of those who had sacrificed to them.
5 Atumbaki mikuwa ya banganga-nzambe ya bikeko na likolo ya bitumbelo na yango. Ezalaki ndenge wana nde apetolaki Yuda mpe Yelusalemi.
He burnt the bones of the priests on their altars, and purged Judah and Jerusalem.
6 Abukaki bitumbelo kati na bingumba ya Manase, ya Efrayimi, ya Simeoni kino na Nefitali mpe na bamboka na yango ya zingazinga.
He did this in the cities of Manasseh and Ephraim and Simeon, even to Naphtali, around in their ruins.
7 Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi.
He broke down the altars, and beat the Asherim and the engraved images into powder, and cut down all the incense altars throughout all the land of Israel, and returned to Jerusalem.
8 Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, mpo na kopetola mokili mpe Tempelo, atindaki Shafani, mwana mobali ya Atsalia; Maaseya, moyangeli ya engumba; mpe Yoa, mwana mobali ya Yoakazi mpe mobombi mikanda, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na ye.
Now in the eighteenth year of his reign, when he had purged the land and the house, he sent Shaphan the son of Azaliah, and Maaseiah the governor of the city, and Joah the son of Joahaz the recorder, to repair the house of the LORD his God.
9 Bakendeki epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe bapesaki ye mbongo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, mbongo oyo Balevi oyo bazalaki kokengela ekotelo bakongolaki lokola makabo mpo na Tempelo na maboko ya bato ya Manase, ya Efrayimi, ya batikali ya Isalaele, ya bato nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
They came to Hilkiah the high priest, and delivered the money that was brought into God's house, which the Levites, the keepers of the threshold, had gathered of the hand of Manasseh and Ephraim, and of all the remnant of Israel, and of all Judah and Benjamin, and of the inhabitants of Jerusalem.
10 Bapesaki mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe. Bato yango bafutaki basali oyo bazalaki kobongisa mpe kolendisa Tempelo yango;
They delivered it into the hand of the workers who had the oversight of the house of the LORD; and the workmen who labored in the house of the LORD gave it to mend and repair the house;
11 bapesaki lisusu epai ya basharipantie mpe batongi Tempelo mpo ete basomba mabanga bakata elongo na mabaya mpo na motondo, mpe mpo ete batonga bandako mosusu oyo bakonzi ya Yuda bazalaki kobongisa te tango ezalaki kobeba.
even to the carpenters and to the builders gave they it, to buy cut stone, and timber for couplings, and to make beams for the houses which the kings of Judah had destroyed.
12 Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango.
The men did the work faithfully: and their overseers were Jahath and Obadiah, the Levites, of the sons of Merari; and Zechariah and Meshullam, of the sons of the Kohathites, to set it forward; and others of the Levites, all who were skillful with instruments of music.
13 Balevi yango bayebaki mpe kobeta mindule; bazalaki kokengela bato oyo bazalaki komema biloko ya mosala mpe kokamba ba-oyo nyonso bazalaki kosala misala na bisika nyonso oyo mosala ezalaki kosalema. Balevi mosusu bazalaki bakomi mikanda, balakisi ya Mobeko mpe bakengeli bikuke.
Also they were over the bearers of burdens, and set forward all who did the work in every kind of service: and of the Levites there were scribes, and officers, and gatekeepers.
14 Tango bazalaki kobimisa mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, Nganga-Nzambe Ilikia amonaki buku ya Mobeko ya Yawe, oyo epesamaki na nzela ya Moyize.
When they brought out the money that was brought into the house of the LORD, Hilkiah the priest found the scroll of the law of the LORD given by Moses.
15 Ilikia alobaki na Shafani, mokomi mikanda: — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe! Mpe apesaki buku yango epai ya Shafani.
Hilkiah answered Shaphan the scribe, "I have found the scroll of the law in the house of the LORD." Hilkiah delivered the scroll to Shaphan.
16 Shafani azwaki buku yango, amemaki yango epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye: — Basali na yo bazali kosala makambo nyonso oyo otindaki bango.
Shaphan carried the scroll to the king, and moreover brought back word to the king, saying, "All that was committed to your servants, they are doing.
17 Bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala mpe epai ya bato oyo bazali kosala misala.
They have emptied out the money that was found in the house of the LORD, and have delivered it into the hand of the overseers, and into the hand of the workmen."
18 Mokomi mikanda, Shafani, alobaki na mokonzi: — Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.
Shaphan the scribe told the king, saying, "Hilkiah the priest has given me a scroll." Shaphan read it before the king.
19 Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye,
It happened, when the king had heard the words of the law, that he tore his clothes.
20 apesaki mitindo oyo epai ya Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani; epai ya Abidoni, mwana mobali ya Mishe; epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi:
The king commanded Hilkiah, and Ahikam the son of Shaphan, and Acbor the son of Micaiah, and Shaphan the scribe, and Asaiah the king's servant, saying,
21 — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo.
"Go inquire of the LORD for me, and for those who are left in Israel and in Judah, concerning the words of the book that is found; for great is the wrath of the LORD that is poured out on us, because our fathers have not kept the word of the LORD, to do according to all that is written in this scroll."
22 Ilikia elongo na bato oyo mokonzi aponaki bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tokeati, mwana mobali ya Asira, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, na etuka ya sika. Balobaki na ye ndenge bayokanaki.
So Hilkiah and those whom the king had sent went to Huldah the prophetess, the wife of Shallum the son of Tikvah, the son of Harhas, keeper of the wardrobe; (now she lived in Jerusalem in the second quarter; ) and they spoke to her to that effect.
23 Ulida alobaki na bango: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai:
She said to them, "Thus says the LORD, the God of Israel: 'Tell the man who sent you to me,
24 ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda bilakeli mabe nyonso oyo ekomama kati na buku oyo bawuti kotanga liboso ya mokonzi ya Yuda. ›
"Thus says the LORD, 'Look, I will bring disaster on this place, and on its inhabitants, even all the curses that are written in the scroll which they have read before the king of Judah.
25 Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola kanda na Ngai na nzela ya biloko oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai ekopela makasi na esika oyo, mpe ekokita te.
Because they have forsaken me, and have burned incense to other gods, that they might provoke me to anger with all the works of their hands; therefore is my wrath poured out on this place, and it shall not be quenched.'"'
26 Kasi boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki:
But to the king of Judah, who sent you to inquire of the LORD, thus you shall tell him, 'Thus says the LORD, the God of Israel: "As touching the words which you have heard,
27 Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe,
because your heart was tender, and you humbled yourself before God, when you heard his words against this place, and against its inhabitants, and have humbled yourself before me, and have torn your clothes, and wept before me; I also have heard you," says the LORD.
28 ‹ nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo mpe bavandi na yango. › » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
"Look, I will gather you to your fathers, and you shall be gathered to your grave in peace, neither shall your eyes see all the disaster that I will bring on this place, and on its inhabitants."'" They brought back word to the king.
29 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
Then the king sent and gathered together all the elders of Judah and Jerusalem.
30 Bongo akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na lokumu kino na oyo aleki na se. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe.
The king went up to the house of the LORD, and all the men of Judah and the inhabitants of Jerusalem, and the priests, and the Levites, and all the people, both great and small: and he read in their ears all the words of the scroll of the covenant that was found in the house of the LORD.
31 Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe: — Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo.
The king stood in his place, and made a covenant before the LORD, to walk after the LORD, and to keep his commandments, and his testimonies, and his statutes, with all his heart, and with all his soul, to perform the words of the covenant that were written in this scroll.
32 Mokonzi alapisaki ndayi yango bato nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi mpe kati na etuka ya Benjame. Mpe bavandi ya Yelusalemi batambolaki kolanda boyokani ya Nzambe, Nzambe ya batata na bango.
He caused all who were found in Jerusalem and Benjamin to stand. The inhabitants of Jerusalem did according to the covenant of God, the God of their fathers.
33 Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango.
Josiah took away all the abominations out of all the countries that pertained to the children of Israel, and made all who were found in Israel to serve, even to serve the LORD their God. All his days they did not depart from following the LORD, the God of their fathers.

< 2 Masolo ya Kala 34 >