< 2 Masolo ya Kala 33 >

1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi.
duodecim annorum erat Manasses cum regnare coepisset et quinquaginta quinque annis regnavit in Hierusalem
2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
fecit autem malum coram Domino iuxta abominationes gentium quas subvertit Dominus coram filiis Israhel
3 Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki; atongaki mpe bitumbelo mpo na banzambe Bala mpe atelemisaki makonzi mpo na nzambe mwasi Ashera. Afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.
et conversus instauravit excelsa quae demolitus fuerat Ezechias pater eius construxitque aras Baalim et fecit lucos et adoravit omnem militiam caeli et coluit eam
4 Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki: « Kombo na Ngai ekozala kati na Yelusalemi mpo na libela. »
aedificavit quoque altaria in domo Domini de qua dixerat Dominus in Hierusalem erit nomen meum in aeternum
5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo.
aedificavit autem ea cuncto exercitui caeli in duobus atriis domus Domini
6 Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi; asalelaki kindoki, soloka mpe maji; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe; na bongo, apelisaki kanda na Ye.
transireque fecit filios suos per ignem in valle Benennon observabat somnia sectabatur auguria maleficis artibus inserviebat habebat secum magos et incantatores multaque mala operatus est coram Domino ut inritaret eum
7 Atiaki kati na Tempelo ya Yawe nzambe ya ekeko oyo asalisaki; nzokande, Nzambe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali: — Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
sculptile quoque et conflatile signum posuit in domo Domini de qua locutus est Dominus ad David et ad Salomonem filium eius dicens in domo hac et in Hierusalem quam elegi de cunctis tribubus Israhel ponam nomen meum in sempiternum
8 Nakolongola lisusu te makolo ya bato ya Isalaele na mokili oyo napesaki epai ya batata na bango, soki kaka bamipesi na kosala makambo nyonso oyo natindaki bango na tina na mibeko nyonso, mitindo mpe malako oyo napesaki bango na nzela ya Moyize.
et movere non faciam pedem Israhel de terra quam tradidi patribus eorum ita dumtaxat si custodierint facere quae praecepi eis cunctamque legem et caerimonias atque iudicia per manum Mosi
9 Kasi Manase apengwisaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi; boye basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele.
igitur Manasses seduxit Iudam et habitatores Hierusalem ut facerent malum super omnes gentes quas subverterat Dominus a facie filiorum Israhel
10 Yawe akebisaki Manase mpe bato na Ye, kasi baboyaki koyoka.
locutusque est Dominus ad eum et ad populum illius et adtendere noluerunt
11 Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.
idcirco superinduxit eis principes exercitus regis Assyriorum ceperuntque Manassen et vinctum catenis atque conpedibus duxerunt Babylonem
12 Kati na pasi na ye, Manase abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki makasi liboso ya Nzambe ya batata na ye.
qui postquam coangustatus est oravit Dominum Deum suum et egit paenitentiam valde coram Deo patrum suorum
13 Abondelaki Ye, mpe Yawe alembisaki motema, ayokaki libondeli na ye mpe azongisaki ye na Yelusalemi, kati na mokili na ye. Manase asosolaki ete Yawe kaka nde azali Nzambe.
deprecatusque est eum et obsecravit intente et exaudivit orationem eius reduxitque eum Hierusalem in regnum suum et cognovit Manasses quod Dominus ipse esset Deus
14 Sima na makambo oyo nyonso, Manase atongaki mir, na libanda ya engumba ya Davidi, na ngambo ya weste ya etima ya Giyoni, na lubwaku oyo ekenda kino na ekuke ya Mbisi; ezingelaki ngomba moke ya Ofeli. Asalaki yango molayi makasi, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki bakonzi ya basoda kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi.
post haec aedificavit murum extra civitatem David ad occidentem Gion in convalle ab introitu portae Piscium per circuitum usque ad Ophel et exaltavit illum vehementer constituitque principes exercitus in cunctis civitatibus Iuda munitis
15 Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe banzambe ya bapaya mpe ya bikeko, abwakaki libanda ya engumba bitumbelo nyonso oyo atongaki na ngomba moke ya Tempelo mpe kati na Yelusalemi.
et abstulit deos alienos et simulacrum de domo Domini aras quoque quas fecerat in monte domus Domini et in Hierusalem et proiecit omnia extra urbem
16 Bongo atongaki lisusu etumbelo ya Yawe, abonzaki na likolo na yango mbeka ya boyokani elongo na makabo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpe apesaki mitindo epai ya bato ya Yuda ete basalela Yawe, Nzambe ya Isalaele.
porro instauravit altare Domini et immolavit super illud victimas et pacifica et laudem praecepitque Iudae ut serviret Domino Deo Israhel
17 Atako bato bakobaki kotumba bambeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, kasi bazalaki kosala yango kaka mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na bango.
attamen adhuc populus immolabat in excelsis Domino Deo suo
18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, libondeli na ye epai ya Nzambe na ye mpe maloba oyo bamoni makambo balobaki na ye na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
reliqua autem gestorum Manasse et obsecratio eius ad Deum suum verba quoque videntium qui loquebantur ad eum in nomine Domini Dei Israhel continentur in sermonibus regum Israhel
19 Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi.
oratio quoque eius et exauditio et cuncta peccata atque contemptus loca etiam in quibus aedificavit excelsa et fecit lucos et statuas antequam ageret paenitentiam scripta sunt in sermonibus Ozai
20 Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
dormivit ergo Manasses cum patribus suis et sepelierunt eum in domo sua regnavitque pro eo filius eius Amon
21 Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi.
viginti duo annorum erat Amon cum regnare coepisset et duobus annis regnavit in Hierusalem
22 Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki; agumbamelaki banzambe nyonso ya bikeko oyo Manase, tata na ye, asalaki mpe abonzelaki yango bambeka.
fecitque malum in conspectu Domini sicut fecerat Manasses pater eius et cunctis idolis quae Manasses fuerat fabricatus immolavit atque servivit
23 Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka.
et non est reveritus faciem Domini sicut reveritus est Manasses pater eius et multo maiora deliquit
24 Bakalaka na ye basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi.
cumque coniurassent adversus eum servi sui interfecerunt eum in domo sua
25 Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita; mpe na esika na ye, bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi.
porro reliqua populi multitudo caesis his qui Amon percusserant constituit regem Iosiam filium eius pro eo

< 2 Masolo ya Kala 33 >