< 2 Masolo ya Kala 3 >

1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
Salomon tada poče graditi Dom Jahvi u Jeruzalemu, na Morijskoj gori, ondje gdje je njegov otac David imao viđenje. To je mjesto koje je pripravio David, gumno Jebusejca Ornana.
2 Abandaki kotonga na mokolo ya mibale ya sanza ya mibale, na mobu ya minei ya bokonzi na ye.
Salomon otpoče gradnju drugoga mjeseca četvrte godine svojega vladanja.
3 Moboko oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Nzambe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse.
Ovo su temelji koje je Salomon postavio za gradnju Doma Božjega: šezdeset lakata u duljinu - po staroj mjeri lakta - a u širinu dvadeset lakata.
4 Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango.
Trijem, koji je bio pred Domom, imao je, po širini ovoga potonjega, u dužinu dvadeset lakata, a visok je bio sto i dvadeset lakata. Obložio ga je iznutra čistim zlatom.
5 Babetaki mabaya ya sipele na bamir ya eteni oyo eleki monene mpe abambaki wolo ya peto na likolo na yango. Asalaki bililingi ya nzete ya mbila mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
Veliku je dvoranu obložio čempresovinom, koju je prekrio čistim zlatom i postavio palme i cvjetne vijence.
6 Abambaki mabanga ya talo mpo na kokomisa yango kitoko. Wolo oyo asalelaki ezalaki wolo ya Parivayimi.
Optočio je potom Dvoranu blistavim draguljima; zlato je bilo zlato parvajimsko.
7 Apakolaki wolo na motondo, na bikuke, na bamir, mpe atobolaki bililingi ya basheribe na bamir.
Prekrio je njime Dvoranu: grede, pragove, zidove i vratna krila te izrezao kerubine po zidovima.
8 Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe: bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe.
Potom sazda dvoranu Svetinje nad svetinjama. Bila je, prema hramskoj širini, dvadeset lakata duga i dvadeset lakata široka i obloži je sa šest stotina talenata suhog zlata.
9 Basete oyo basalelaki ezalaki ya wolo, mpe ezalaki ya bagrame nkama motoba. Apakolaki lisusu wolo na bashambre ya likolo.
Za čavle je dao na mjeru pedeset zlatnih šekela. I gornje je odaje obložio zlatom.
10 Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo.
U dvorani Svetinje nad svetinjama napravi dva kerubina, liveno djelo. I njih obloži zlatom.
11 Mapapu ya basheribe ezalaki na bametele pene zomi na molayi. Lipapu ya sheribe ya liboso ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe etutaki mir ya Tempelo ya Yawe; bongo lipapu na ye mosusu, oyo ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano, etutaki lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki mpe na bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
Krila kerubina bila su dvadeset lakata duga: jedno krilo od pet lakata dodirivaše hramski zid, a drugo od pet lakata doticaše krilo drugoga kerubina.
12 Ndenge moko mpe mpo na lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano: etutaki mir mosusu ya Tempelo ya Yawe; mpe lipapu mosusu oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano etutaki lipapu ya sheribe ya liboso.
Tako je i krilo drugoga kerubina, od pet lakata, dodirivalo hramski zid, a drugo mu se krilo, od pet lakata, spajalo s krilom drugoga kerubina.
13 Mapapu ya basheribe yango ezalaki ya kofungwama na molayi ya bametele pene zomi. Basheribe nyonso mibale batelemaki na makolo na bango, mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya kati ya Esika ya bule.
Raširena, krila kerubina imala su dvadeset lakata. Stajali su kerubini uspravno, lic-a okrenutih Dvorani.
14 Asalaki rido ya lino, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, mpe atongaki bililingi ya basheribe na likolo na yango.
Napravi zastor od ljubičastog baršuna, od grimiza, karmezina i bÓeza te na njemu izveze kerubine.
15 Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
Pred Dvoranom napravi dva stupa dugačka trideset i pet lakata, a glavice im na vrhu pet lakata.
16 Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
U Debiru on splete vijence te ih postavi navrh stupova i napravi sto mogranja koje postavi među vijence.
17 Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe: moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi.
Postavi stupove pred Hekal, jedan zdesna, drugi slijeva, te nazva Jakin onaj zdesna, a Boaz onaj slijeva.

< 2 Masolo ya Kala 3 >