< 2 Masolo ya Kala 29 >

1 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari.
Ezequías tenía 25 años cuando comenzó a reinar, y reinó 29 años en Jerusalén. El nombre de su madre fue Abías, hija de Zacarías.
2 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
Hizo lo recto ante Yavé, según todo lo que hizo su antepasado David.
3 Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango.
El primer año de su reinado, el mes primero, él abrió las puertas de la Casa de Yavé y las reparó.
4 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, asangisaki bango na libanda ya ngambo ya este.
Acercó a los sacerdotes y levitas, los reunió en la plaza oriental
5 Alobaki na bango: — Boyoka ngai, Balevi! Bomibulisa sik’oyo mpe bopetola Tempelo ya Yawe, Nzambe ya bakoko na bino; bolongola mbindo nyonso kati na Esika ya bule.
y les dijo: Escúchenme, levitas. Santifíquense, santifiquen la Casa de Yavé el ʼElohim de sus antepasados y quiten la impureza del Santuario.
6 Batata na biso bazangaki boyengebene, basalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe basundolaki Ye; batikaki Tempelo ya Yawe mpe bapesaki Ye mokongo.
Porque nuestros antepasados fueron infieles e hicieron lo malo ante Yavé nuestro ʼElohim. Lo abandonaron, voltearon sus caras del Tabernáculo de Yavé y le dieron la espalda.
7 Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule.
También cerraron las puertas del patio, apagaron las lámparas y no quemaron incienso ni ofrecieron holocaustos en el Santuario al ʼElohim de Israel.
8 Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino.
Por eso la ira de Yavé cayó sobre Judá y Jerusalén. Él los convirtió en un objeto de terror, horror y escarnio como lo ven sus propios ojos.
9 Yango wana batata na biso bakweyaki na mopanga; mpe yango wana lisusu bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bazali kati na bowumbu.
Ciertamente por esto nuestros antepasados cayeron a espada, y nuestros hijos, hijas y mujeres están cautivos.
10 Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.
Ahora pues, decidí hacer un pacto con Yavé ʼElohim de Israel, para que el ardor de su ira se aparte de nosotros.
11 Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.
Por tanto, hijos míos, no sean negligentes, porque Yavé los escogió para que estén ante Él y le sirvan, a fin de que le ministren y le quemen incienso.
12 Bongo, Balevi oyo bakotaki na mosala: Na molongo ya bato ya Keati: Maati, mwana mobali ya Amasayi; mpe Joeli, mwana mobali ya Azaria; na molongo ya Merari: Kishi, mwana mobali ya Abidi, mpe Azaria, mwana mobali ya Yealeyeli; na molongo ya bato ya Gerishoni: Yoa, mwana mobali ya Zima; mpe Edeni, mwana mobali ya Yoa;
Entonces se levantaron los levitas: Mahat, hijo de Amasai, y Joel, hijo de Azarías, de los hijos de Coat; y de los hijos de Merari, Cis, hijo de Abdi, y Azarías, hijo de Jehalelel; y de los gersonitas, Joa, hijo de Zima, y Edén, hijo de Joa;
13 na molongo ya Elitsafani: Shimiri mpe Yeyeli; na molongo ya Azafi: Zakari mpe Matania;
y de los hijos de Elizafán, Simri y Jeiel; y de los hijos de Asaf, Zacarías y Matanías;
14 na molongo ya Emani: Yeyeli mpe Shimei; mpe na molongo ya Yedutuni: Shemaya mpe Uzieli.
y de los hijos de Hemán, Jehiel y Simei; y de los hijos de Jedutún, Semaías y Uziel.
15 Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe.
Éstos reunieron a sus hermanos. Se santificaron y entraron para limpiar la Casa de Yavé, según el mandamiento del rey y según las Palabras de Yavé.
16 Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango: babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron.
Entraron los sacerdotes en la Casa de Yavé para limpiarla. Sacaron al patio de la Casa toda la impureza que hallaron en el Santuario de Yavé, y los levitas la tomaron para sacarla al torrente Cedrón.
17 Babandaki mosala yango ya kopetola na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe, na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakomaki na ndako moke ya kokotela na Tempelo. Basalaki lisusu mikolo mwambe mpo na kokoba kobulisa Tempelo ya Yawe mpe basukisaki mosala yango na mokolo ya zomi na motoba ya sanza ya liboso.
Comenzaron la limpieza el primero día del mes primero, y el octavo día llegaron al patio de [la Casa de] Yavé. Continuaron limpiando otros ocho días. Terminaron el día 16 del mes primero.
18 Bakendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe balobaki: — Topetoli Tempelo mobimba ya Yawe, etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso, mpe mesa oyo batiaka mapa elongo na bisalelo na yango nyonso.
Entonces fueron al rey Ezequías y le dijeron: Limpiamos toda la Casa de Yavé, el altar del holocausto, todos sus utensilios, la mesa de la Presentación y todos sus utensilios.
19 Tobongisi mpe tobulisi bisalelo nyonso oyo mokonzi Akazi, na kozanga boyengebene na ye na miso ya Yawe, abebisaki bosantu na yango tango azalaki mokonzi. Bisalelo yango ekomi sik’oyo liboso ya etumbelo.
También preparamos y consagramos todos los utensilios que el rey Acaz desechó durante su reinado a causa de su infidelidad. Ahí están delante del altar de Yavé.
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, mokonzi Ezekiasi asangisaki bakambi ya engumba mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.
El rey Ezequías madrugó, reunió a los jefes de la ciudad y subió a la Casa de Yavé.
21 Bamemaki bangombe sambo ya mibali, bameme sambo ya mibali, bana meme sambo ya mibali mpe bantaba sambo ya mibali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na mokili, mpo na Esika ya bule mpe mpo na Yuda. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ete babonza bambeka yango na etumbelo ya Yawe.
Llevaron siete becerros, siete carneros, siete corderos y siete machos cabríos como ofrenda por el pecado, a favor del reino, del Santuario y a favor de todo Judá. Mandó a los sacerdotes descendientes de Aarón ofrecerlos sobre el altar de Yavé.
22 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bangombe, bazwaki makila na yango mpe babwakaki yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bameme ya mibali mpe babwakaki makila na yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bana meme mpe babwakaki makila na yango na etumbelo.
Degollaron los becerros. Los sacerdotes recogieron la sangre y la rociaron hacia el altar. Hicieron lo mismo con los carneros y los corderos.
23 Bongo bamemaki bantaba ya mibali oyo ebongisamaki mpo na mbeka mpo na masumu, liboso ya mokonzi mpe lisanga, mpe batiaki yango maboko.
Después acercaron los machos cabríos ante el rey y la congregación para la ofrenda que apacigua. Colocaron sus manos sobre ellos.
24 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu.
Los sacerdotes los degollaron e hicieron una ofrenda que apacigua con su sangre sobre el altar, para hacer ofrenda que apacigua por todo Israel, porque el rey ordenó que el holocausto y la ofrenda se hicieran a favor de todo Israel.
25 Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi; mpe ya mosakoli Natan; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.
Colocó a los levitas en la Casa de Yavé con címbalos, salterios y arpas, según el mandamiento de David, de Gad, vidente del rey, y del profeta Natán, pues ese mandamiento llegó de Yavé por medio de sus profetas.
26 Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango.
Se pusieron en pie los levitas con los instrumentos de David y los sacerdotes con las trompetas.
27 Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.
Entonces Ezequías ordenó que se ofreciera el holocausto sobre el altar. Cuando comenzó el holocausto, también comenzó el cántico de Yavé, el sonido de las trompetas y los instrumentos de David, rey de Israel.
28 Lisanga mobimba egumbamaki wana; bayembi bazalaki koyemba, mpe babeti kelelo bazalaki kobeta yango; nyonso ekobaki kino tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba.
Toda la congregación se postró mientras elevaban cánticos y tocaban las trompetas, todo hasta cuando el holocausto fue consumido.
29 Tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakitisaki bilongi na bango mpe bagumbamaki kino na se.
Cuando se consumió el holocausto, el rey y todos los que estaban con él se inclinaron y se postraron.
30 Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.
Entonces el rey Ezequías y los jefes ordenaron a los levitas que alabaran a Yavé con las palabras de David y del vidente Asaf. Ellos elevaron alabanzas con gran júbilo, se inclinaron y se postraron.
31 Ezekiasi alobaki: — Awa bomibulisi sik’oyo mpo na Yawe, bopusana, bomema na Tempelo ya Yawe bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi. Lisanga ememaki bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi, mpe bato ya motema ya kokaba bamemaki bambeka ya kotumba.
Ezequías tomó la palabra: Ahora ustedes se consagraron a Yavé. Acérquense y ofrezcan sacrificios y ofrendas de acción de gracias en la Casa de Yavé. Y la congregación ofreció sacrificios y ofrendas de acción de gracias. Todos los generosos de corazón ofrecieron holocaustos.
32 Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki: bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale: nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe.
La congregación llevó 70 becerros, 100 carneros y 200 corderos como holocausto a Yavé.
33 Babulisaki lisusu lokola bambeka bangombe nkama motoba, bameme mpe bantaba nkoto misato.
Las ofrendas consagradas fueron 600 becerros y 3.000 ovejas.
34 Kasi lokola Banganga-Nzambe bazalaki mingi te mpo na kokata na biteni bambeka nyonso ya kotumba, bandeko na bango, Balevi, basungaki bango kino mosala nyonso esilaki mpe kino Banganga-Nzambe mosusu bamibulisaki; pamba te Balevi balekaki Banganga-Nzambe na makanisi ya komibulisa.
Pero los sacerdotes eran muy pocos y no bastaban para desollar los holocaustos. Sus hermanos levitas les ayudaron hasta terminar la labor, y hasta cuando los demás sacerdotes se santificaron, porque los levitas fueron más rectos de corazón para santificarse que los sacerdotes.
35 Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe.
Hubo holocaustos en abundancia, grasa de las ofrendas de paz y las libaciones para cada holocausto. De esta manera el servicio en la Casa de Yavé quedó restablecido.
36 Ezekiasi mpe bato nyonso basepelaki na ndenge Nzambe akokisaki makambo mpo na bato na Ye, pamba te nyonso esalemaki na lombangu.
Ezequías se regocijó con todo el pueblo porque ʼElohim lo preparó, pues la celebración ocurrió de manera tan repentina.

< 2 Masolo ya Kala 29 >