< 2 Masolo ya Kala 26 >

1 Bato nyonso ya Yuda baponaki Oziasi oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya Amatsia, tata na ye.
Yahuda halkı Amatsya'nın yerine on altı yaşındaki oğlu Uzziya'yı kral yaptı.
2 Sima na kufa ya tata na ye, Amatsia, Oziasi atongaki lisusu engumba Eyiloti mpe azongisaki yango na se ya bokonzi ya Yuda.
Babası Amatsya ölüp atalarına kavuştuktan sonra Uzziya Eylat Kenti'ni onarıp Yahuda topraklarına kattı.
3 Oziasi azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi.
Uzziya on altı yaşında kral oldu ve Yeruşalim'de elli iki yıl krallık yaptı. Annesi Yeruşalimli Yekolya'ydı.
4 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki.
Babası Amatsya gibi, Uzziya da RAB'bin gözünde doğru olanı yaptı.
5 Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye.
Kendisine Tanrı korkusunu öğreten Zekeriya'nın günlerinde Tanrı'ya yöneldi. RAB'be yöneldiği sürece Tanrı onu başarılı kıldı.
6 Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia.
Uzziya Filistliler'e savaş açtı. Gat, Yavne ve Aşdot'un surlarını yıktırdı. Sonra Aşdot yakınlarında ve Filist bölgesinde kentler kurdu.
7 Nzambe asungaki ye tango abundisaki bato ya Filisitia, ya Arabi oyo bazalaki kovanda na Guri-Bala, mpe tango abundisaki bato ya Maoni.
Filistliler'e, Gur-Baal'da yaşayan Araplar'a ve Meunlular'a karşı Tanrı ona yardım etti.
8 Bato ya Amoni bafutaki mpako ya mokonzi epai ya Oziasi, mpe kombo na ye ekendeki sango kino na bandelo ya Ejipito, pamba te akomaki na nguya makasi koleka.
Ammonlular Uzziya'ya haraç vermeye başladılar. Gitgide güçlenen Uzziya'nın ünü Mısır sınırına dek ulaştı.
9 Oziasi atongaki bandako milayi kati na Yelusalemi, na ekuke ya suka, na ekuke ya lubwaku mpe na suka ya mir; mpe alendisaki yango makasi.
Uzziya Yeruşalim'de Köşe Kapısı, Dere Kapısı ve surun köşesi üzerinde kuleler kurup bunları sağlamlaştırdı.
10 Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.
Şefela'da ve ovada çok sayıda hayvanı olduğundan, kırda gözetleme kuleleri yaptırarak birçok sarnıç açtırdı. Dağlık bölgelerde, verimli topraklarda da ırgatları, bağcıları vardı; çünkü toprağı severdi.
11 Oziasi azalaki na basoda oyo baselingwa mpo na bitumba; mpe babongisamaki na masanga kolanda motango na bango ndenge Yeyeli, mokomi mikanda, mpe kalaka Maaseya, na bokambami ya Anania, moko kati na bakonzi ya bakalaka ya mokonzi, bazwaki bango na mosala.
Uzziya'nın savaşa hazır bir ordusu vardı. Kralın komutanlarından Hananya'nın denetiminde Yazman Yeiel'le görevli Maaseya'nın yaptığı sayımın sonuçlarına göre, bu ordu bölük bölük savaşa girerdi.
12 Motango nyonso ya bakambi ya mabota, oyo bazalaki kokamba basoda ya mpiko, ezalaki nkoto mibale na nkama motoba.
Yiğit savaşçıları yöneten boy başlarının sayısı 2 600'dü.
13 Bakonzi ya mabota bazalaki kokamba basoda nkoto nkama misato na sambo na nkama mitano oyo baselingwa mpo na bitumba mpe bazalaki basoda ya mpiko, mpo na kobundela mokonzi liboso ya banguna na ye.
Bunların komutası altında krala yardım etmek için düşmanla yiğitçe savaşacak 307 500 askerden oluşan bir ordu vardı.
14 Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga.
Uzziya bütün ordu için kalkan, mızrak, miğfer, zırh, yay, sapan taşı sağladı.
15 Asalisaki kati na Yelusalemi, epai ya bato ya mayele, bamashini mpo na kotia yango likolo ya bandako milayi mpe na suka ya bamir mpo na kobwaka makonga mpe mabanga minene. Kombo na ye ekendeki sango, pamba te asungamaki makasi kino kokoma moto na nguya.
Yeruşalim'de becerikli adamlarca tasarlanmış gereçler yaptırdı. Okları, büyük taşları fırlatmak için bu gereçleri kulelere ve köşelere yerleştirdi. Uzziya'nın ünü uzaklara kadar yayıldı; çünkü gördüğü olağanüstü yardım sayesinde büyük güce kavuşmuştu.
16 Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.
Ne var ki, güçlenince kendisini yıkıma sürükleyecek bir gurura kapıldı. Tanrısı RAB'be ihanet etti. Buhur sunağı üzerinde buhur yakmak için RAB'bin Tapınağı'na girdi.
17 Nganga-Nzambe Azaria alandaki Oziasi na sima, elongo na Banganga-Nzambe mosusu ya Yawe, tuku mwambe, bango nyonso batonda na mpiko.
Kâhin Azarya ile RAB'bin yürekli seksen kâhini de ardısıra tapınağa girdiler.
18 Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye: « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te! »
Kral Uzziya'ya karşı durarak, “Ey Uzziya, RAB'be buhur yakmaya hakkın yok!” dediler, “Ancak Harun soyundan kutsanmış kâhinler buhur yakabilir. Tapınaktan çık! Çünkü sen RAB'be ihanet ettin; RAB Tanrı da seni onurlandırmayacak!”
19 Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe.
Buhur yakmak için elinde buhurdan tutan Uzziya kâhinlere öfkelendi. Öfkelenir öfkelenmez de kâhinlerin önünde, RAB'bin Tapınağı'ndaki buhur sunağının yanında duran Uzziya'nın alnında deri hastalığı belirdi.
20 Tango Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe Banganga-Nzambe mosusu batalaki ye mpe bamonaki ete akomi na bokono ya maba na elongi, babenganaki ye na lombangu wana ye moko mpe azalaki kobima na lombangu, pamba te Yawe asambwisaki ye.
Başkâhin Azarya ile öbür kâhinler ona bakınca alnında deri hastalığı belirdiğini gördüler. Onu çabucak oradan çıkardılar. Uzziya da çıkmaya istekliydi, çünkü RAB onu cezalandırmıştı.
21 Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
Kral Uzziya ölünceye kadar deri hastalığından kurtulamadı. Bu yüzden ayrı bir evde yaşadı ve RAB'bin Tapınağı'na sokulmadı. Sarayı ve ülke halkını oğlu Yotam yönetti.
22 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Oziasi mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ezali mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, nde akomaki yango.
Uzziya'nın yaptığı öbür işleri, başından sonuna dek, Amots oğlu Peygamber Yeşaya yazmıştır.
23 Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba: « Abelaki bokono ya maba. » Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Uzziya ölüp atalarına kavuşunca, deri hastalığına yakalandığı için onu atalarının yanına, kral mezarlığının ayrı bir yerine gömdüler. Yerine oğlu Yotam kral oldu.

< 2 Masolo ya Kala 26 >