< 2 Masolo ya Kala 25 >

1 Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi.
Amaziah was twenty and five years old when he began to reign, and he reigned twenty and nine years in Jerusalem. And his mother’s name was Jehoaddan of Jerusalem.
2 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te.
And he did that which was right in the sight of the LORD, but not with a perfect heart.
3 Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye, mokonzi.
Now it came to pass, when the kingdom was established to him, that he slew his servants that had killed the king his father.
4 Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo: « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
But he slew not their children, but did as it is written in the law of the book of Moses, where the LORD commanded, saying, The fathers shall not die for the children, neither shall the children die for the fathers, but every man shall die for his own sin.
5 Amatsia abengisaki bato ya Yuda mpe atiaki, kolanda mabota na bango, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpo na Yuda mobimba mpe Benjame. Atangaki motango ya bato oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata: bazalaki mibali nkoto nkama misato oyo baselingwa mpo na kosala mosala ya soda, kobunda na makonga mpe na nguba.
Moreover Amaziah gathered Judah together, and made them captains over thousands, and captains over hundreds, according to the houses of their fathers, throughout all Judah and Benjamin: and he numbered them from twenty years old and above, and found them three hundred thousand choice men, able to go forth to war, that could handle spear and shield.
6 Kati na Isalaele, azwaki lisusu na mosala ya soda, na motuya ya bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, basoda ya mpiko nkoto nkama moko.
He hired also an hundred thousand mighty men of valour out of Israel for an hundred talents of silver.
7 Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki: — Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi.
But there came a man of God to him, saying, O king, let not the army of Israel go with thee; for the LORD is not with Israel, that is, with all the children of Ephraim.
8 Ata soki okeyi kobunda na mpiko nyonso, Nzambe akokweyisa yo liboso ya monguna, pamba te azali na makoki ya kosunga mpe ya kokweyisa.
But if thou wilt go, do it, be strong for the battle: God shall make thee fall before the enemy: for God hath power to help, and to cast down.
9 Amatsia atunaki moto na Nzambe: — Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini? Moto na Nzambe azongisaki: — Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana.
And Amaziah said to the man of God, But what shall we do for the hundred talents which I have given to the army of Israel? And the man of God answered, The LORD is able to give thee much more than this.
10 Boye, Amatsia azongisaki na bandako na bango, basoda oyo bayaki epai na ye wuta na Efrayimi. Kasi basoda yango basilikelaki Yuda mpe bazongaki na bandako na bango na kanda makasi.
Then Amaziah separated them, that is, the army that had come to him out of Ephraim, to go home again: therefore their anger was greatly kindled against Judah, and they returned home in great anger.
11 Amatsia azwaki mpiko mpe akambaki mampinga na ye kino na Lubwaku ya mungwa epai wapi abomaki bato ya Seiri nkoto zomi.
And Amaziah strengthened himself, and led forth his people, and went to the valley of salt, and smote of the children of Seir ten thousand.
12 Bato ya Yuda bakangaki lisusu bato ya bomoi nkoto zomi, bamemaki bango na songe ya ngomba mpe batindikaki bango wuta na songe ya ngomba; mpe bango nyonso bakweyaki na se, banzoto na epanzanaki na biteni.
And other ten thousand left alive the children of Judah carried away captive, and brought them to the top of the rock, and cast them down from the top of the rock, that they were all broken in pieces.
13 Na tango wana, basoda oyo Amatsia azongisaki mpe apekisaki kokende na bitumba bakotaki na makasi kati na bingumba ya Yuda longwa na Samari kino na Beti-Oroni. Babomaki bato nkoto misato mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba.
But the soldiers of the army whom Amaziah sent back, that they should not go with him to battle, fell upon the cities of Judah, from Samaria even to Bethhoron, and smote three thousand of them, and took much spoil.
14 Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi.
Now it came to pass, after that Amaziah had come from the slaughter of the Edomites, that he brought the gods of the children of Seir, and set them up to be his gods, and bowed himself before them, and burned incense to them.
15 Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia: — Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo?
Therefore the anger of the LORD was kindled against Amaziah, and he sent to him a prophet, who said to him, Why hast thou sought after the gods of the people, which could not deliver their own people out of thy hand?
16 Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye: — Kata! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo! Mosakoli abendaki nzoto; kasi, liboso ya kokende, alobaki: — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.
And it came to pass, as he talked with him, that the king said to him, Art thou made of the king’s council? forbear; why shouldest thou be smitten? Then the prophet stopped, and said, I know that God hath determined to destroy thee, because thou hast done this, and hast not hearkened to my counsel.
17 Sima na Amatsia, mokonzi ya Yuda, kotuna toli epai ya bapesi toli na ye, abetaki mondenge na Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele; alobaki: — Yaka tobunda!
Then Amaziah king of Judah took advice, and sent to Joash, the son of Jehoahaz, the son of Jehu, king of Israel, saying, Come, let us look one another in the face.
18 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda: — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani: « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba ya Libani elekaki mpe enyataki nzete ya sende.
And Joash king of Israel sent to Amaziah king of Judah, saying, The thistle that was in Lebanon sent to the cedar that was in Lebanon, saying, Give thy daughter to my son for a wife: and there passed by a wild beast that was in Lebanon, and trod down the thistle.
19 Solo, ozali komilobela ete olongi Edomi, mpe motema ezali kosepela mpe komikumisa. Tala, ekoleka malamu ete ovanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda?
Thou sayest, Lo, thou hast smitten the Edomites; and thy heart lifteth thee up to boast: abide now at home; why shouldest thou meddle to thy harm, that thou shouldest fall, even thou, and Judah with thee?
20 Kasi Amatsia ayokaki ye te, pamba te Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokaba bango na maboko ya Joasi, mpo ete basambelaki banzambe ya Edomi.
But Amaziah would not hear; for it came from God, that he might deliver them into the hand of their enemies, because they sought after the gods of Edom.
21 Boye Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda.
So Joash the king of Israel went up; and they looked one another in the face, both he and Amaziah king of Judah, at Bethshemesh, which belongeth to Judah.
22 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye.
And Judah was smote before Israel, and they fled every man to his tent.
23 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Yoakazi, na Beti-Shemeshi. Amemaki ye na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.
And Joash the king of Israel took Amaziah king of Judah, the son of Joash, the son of Jehoahaz, at Bethshemesh, and brought him to Jerusalem, and broke down the wall of Jerusalem from the gate of Ephraim to the corner gate, four hundred cubits.
24 Joasi akamataki palata nyonso, wolo nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe oyo Obedi-Edomi azalaki kobatela, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
And he took all the gold and the silver, and all the vessels that were found in the house of God with Obededom, and the treasures of the king’s house, the hostages also, and returned to Samaria.
25 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.
And Amaziah the son of Joash king of Judah lived after the death of Joash son of Jehoahaz king of Israel fifteen years.
26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
Now the rest of the acts of Amaziah, first and last, behold, are they not written in the book of the kings of Judah and Israel?
27 Kobanda na tango oyo Amatsia apesaki Yawe mokongo, basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye; mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.
Now after the time that Amaziah turned away from following the LORD they made a conspiracy against him in Jerusalem; and he fled to Lachish: but they sent to Lachish after him, and slew him there.
28 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Yuda.
And they brought him upon horses, and buried him with his fathers in the city of Judah.

< 2 Masolo ya Kala 25 >