< 2 Masolo ya Kala 24 >

1 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.
Joash was seven years old when he began to reign, and he reigned forty years in Jerusalem. His mother’s name was Zibiah, of Beersheba.
2 Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada.
Joash did that which was right in the LORD’s eyes all the days of Jehoiada the priest.
3 Yeoyada aponaki mpo na Joasi basi mibale oyo babotelaki ye bana mibali mpe bana basi.
Jehoiada took for him two wives, and he became the father of sons and daughters.
4 Sima na yango, Joasi azwaki mokano ya kobongisa Tempelo ya Yawe.
After this, Joash intended to restore the LORD’s house.
5 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango: — Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo. Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te.
He gathered together the priests and the Levites, and said to them, “Go out to the cities of Judah, and gather money to repair the house of your God from all Israel from year to year. See that you expedite this matter.” However the Levites didn’t do it right away.
6 Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye: « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli? »
The king called for Jehoiada the chief, and said to him, “Why haven’t you required of the Levites to bring in the tax of Moses the servant of the LORD, and of the assembly of Israel, out of Judah and out of Jerusalem, for the Tent of the Testimony?”
7 Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.
For the sons of Athaliah, that wicked woman, had broken up God’s house; and they also gave all the dedicated things of the LORD’s house to the Baals.
8 Mokonzi apesaki mitindo ete basala sanduku, batia yango na libanda ya ekuke ya Tempelo ya Yawe
So the king commanded, and they made a chest, and set it outside at the gate of the LORD’s house.
9 mpe batatola kati na Yuda mpe kati na Yelusalemi ete basengeli komemela Yawe mpako oyo Moyize, mosali na Nzambe, akatelaki Isalaele kati na esobe.
They made a proclamation through Judah and Jerusalem, to bring in for the LORD the tax that Moses the servant of God laid on Israel in the wilderness.
10 Bakalaka nyonso mpe bato nyonso basepelaki na yango: bamemaki mbongo na bango mpe batiaki yango kati na sanduku kino etondaki.
All the princes and all the people rejoiced, and brought in, and cast into the chest, until they had filled it.
11 Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele.
Whenever the chest was brought to the king’s officers by the hand of the Levites, and when they saw that there was much money, the king’s scribe and the chief priest’s officer came and emptied the chest, and took it, and carried it to its place again. Thus they did day by day, and gathered money in abundance.
12 Mokonzi mpe Yeoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kosala misala ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Bafutaki babuki mabanga, basharipantie mpe bato oyo basalaka misala ya bibende mpe ya bronze na moto, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
The king and Jehoiada gave it to those who did the work of the service of the LORD’s house. They hired masons and carpenters to restore the LORD’s house, and also those who worked iron and bronze to repair the LORD’s house.
13 Bato oyo bazalaki kosala misala basalaki yango noki, mpe misala ezalaki kotambola malamu na bokambami na bango. Babongisaki Tempelo ya Nzambe ndenge ezalaka.
So the workmen worked, and the work of repairing went forward in their hands. They set up God’s house as it was designed, and strengthened it.
14 Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.
When they had finished, they brought the rest of the money before the king and Jehoiada, from which were made vessels for the LORD’s house, even vessels with which to minister and to offer, including spoons and vessels of gold and silver. They offered burnt offerings in the LORD’s house continually all the days of Jehoiada.
15 Yeoyada akomaki mobange makasi, atondaki mikolo mpe akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama.
But Jehoiada grew old and was full of days, and he died. He was one hundred thirty years old when he died.
16 Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe.
They buried him in David’s city among the kings, because he had done good in Israel, and toward God and his house.
17 Sima na kufa ya Yeoyada, bakambi ya Yuda bayaki kopesa mokonzi lokumu, mpe mokonzi ayokaki bango.
Now after the death of Jehoiada, the princes of Judah came and bowed down to the king. Then the king listened to them.
18 Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi.
They abandoned the house of the LORD, the God of their fathers, and served the Asherah poles and the idols, so wrath came on Judah and Jerusalem for this their guiltiness.
19 Atako Yawe atindaki basakoli kati na bango mpo na kozongisa bango epai na Ye, mpe atako basakoli bapamelaki bango, kasi batikalaki kaka koyoka te.
Yet he sent prophets to them to bring them again to the LORD, and they testified against them; but they would not listen.
20 Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki: « Tala makambo oyo Nzambe alobi: ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te? Bokokende liboso te! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › »
The Spirit of God came on Zechariah the son of Jehoiada the priest; and he stood above the people, and said to them, “God says, ‘Why do you disobey the LORD’s commandments, so that you can’t prosper? Because you have forsaken the LORD, he has also forsaken you.’”
21 Kasi bato basalelaki ye likita; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe.
They conspired against him, and stoned him with stones at the commandment of the king in the court of the LORD’s house.
22 Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki: « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo! »
Thus Joash the king didn’t remember the kindness which Jehoiada his father had done to him, but killed his son. When he died, he said, “May the LORD look at it, and repay it.”
23 Na suka ya mobu, basoda ya Siri babundisaki Joasi, bakotaki na makasi kati na Yuda mpe Yelusalemi, babomaki bakambi nyonso ya bato mpe batindaki bomengo nyonso ya bitumba epai ya mokonzi na bango, na Damasi.
At the end of the year, the army of the Syrians came up against him. They came to Judah and Jerusalem, and destroyed all the princes of the people from among the people, and sent all their plunder to the king of Damascus.
24 Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi.
For the army of the Syrians came with a small company of men; and the LORD delivered a very great army into their hand, because they had forsaken the LORD, the God of their fathers. So they executed judgment on Joash.
25 Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
When they had departed from him (for they left him seriously wounded), his own servants conspired against him for the blood of the sons of Jehoiada the priest, and killed him on his bed, and he died. They buried him in David’s city, but they didn’t bury him in the tombs of the kings.
26 Tala bato oyo basalelaki ye likita: Zabadi, mwana mobali ya Shimeati, mwasi ya mboka Amoni; mpe Yozabadi, mwana mobali ya Shimiriti, mwasi ya Moabi.
These are those who conspired against him: Zabad the son of Shimeath the Ammonitess and Jehozabad the son of Shimrith the Moabitess.
27 Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Now concerning his sons, the greatness of the burdens laid on him, and the rebuilding of God’s house, behold, they are written in the commentary of the book of the kings. Amaziah his son reigned in his place.

< 2 Masolo ya Kala 24 >