< 2 Masolo ya Kala 22 >
1 Bato ya Yelusalemi bakomisaki Akazia, mwana mobali ya suka ya Yorami, mokonzi mpo na kokitana na ye, pamba te bato ya mobulu oyo bakotaki na molako elongo na bato ya Arabi babomaki bana mibali nyonso. Ezali boye nde Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
Un Jeruzālemes iedzīvotāji cēla par ķēniņu viņa vietā Ahaziju, viņa jaunāko dēlu. Jo visus tos vecākos bija nokāvuši sirotāji, kas ar Arābiešiem bija nākuši lēģerī; tā Jehorama, Jūda ķēniņa, dēls Ahazija palika par ķēniņu.
2 Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri.
Divdesmit divus gadus Ahazija bija vecs, kad palika par ķēniņu, un valdīja vienu gadu Jeruzālemē, un viņa mātei bija vārds Atalija, tā bija Omrus meita.
3 Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.
Un tas arīdzan staigāja Ahaba nama ceļos, jo viņa māte bija viņa padoma devēja uz bezdievību.
4 Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye.
Un viņš darīja, kas Tam Kungam nepatika, tā kā Ahaba nams, jo tie bija viņa padoma devēji, kad viņa tēvs bija nomiris, viņam par postu.
5 Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami.
Un pēc viņu padoma viņš arī cēlās un ar Joramu, Ahaba dēlu, Israēla ķēniņu, nogāja karā pret Azaēli, Sīrijas ķēniņu, uz Rāmotu Gileādā. Un Sīrieši sita Joramu.
6 Bongo, Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Azaria, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
Un viņš griezās atpakaļ, ka liktos dziedināties Jezreēlē, jo tam bija vātis, kas viņam Rāmā bija sistas, kad tas karoja pret Azaēli, Sīrijas ķēniņu. Un Azarija (Ahazija), Jehorama, Jūda ķēniņa, dēls, nogāja apraudzīt Joramu, Ahaba dēlu, Jezreēlē, jo tas bija slims.
7 Nzambe asalaki ete kobebisama ya Akazia esalema tango akendeki kotala Yorami. Tango kaka Akazia akomaki, abimaki nzela moko na Yorami mpo na kokende epai ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo Yawe apakolaki mafuta mpo na kobebisa ndako ya Akabi.
Jo Ahazijam no Dieva tas notikās par postu, ka nāca pie Jorama, jo kad viņš bija nonācis, tad viņš izgāja ar Joramu pret Jeū, Nimšus dēlu, ko Tas Kungs bija svaidījis, Ahaba namu izdeldēt.
8 Tango Jewu azalaki kokokisa etumbu kati na libota ya Akabi, akutaki bakambi ya Yuda mpe bana mibali ya bandeko mibali ya Akazia, oyo bazalaki kosalela tata leki na bango Akazia, mpe abomaki bango.
Kad nu Jeūs par Ahaba namu to sodību izdarīja, tad viņš atrada Jūda lielkungus un Ahazijas brāļa dēlus, kas Ahazijam kalpoja, un viņš tos nokāva.
9 Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki: « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi.
Un viņš meklēja Ahaziju, un to sagrāba, jo tas bija paslēpies Samarijā, un tie to atveda pie Jeūs un to nokāva un to apraka; jo tie sacīja: viņš ir Jehošafata dēls, kas no visas savas sirds To Kungu meklējis. Tā Ahazijas namam neviena nebija, kas būtu varējis palikt par ķēniņu.
10 Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya bokonzi ya ndako ya Yuda.
Kad nu Atalija, Ahazijas māte, redzēja savu dēlu esam nomirušu, tad tā cēlās un nogalinaja visu Jūda nama ķēniņa dzimumu.
11 Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali; mpe Atali abomaki Joasi te.
Bet Jozabate, ķēniņa meita, ņēma Joasu, Ahazijas dēlu, un to nozaga no ķēniņa bērnu vidus, kas tapa nokauti, un to ar viņu emmu lika guļamā kambarī. Tā Jozabate, ķēniņa Jehorama meita, priestera Jojadas sieva, (jo tā bija Ahazijas māsa) viņu apslēpa priekš Atalijas, ka tā to nenokāva.
12 Joasi abombamaki elongo na bango mibu motoba kati na Tempelo ya Nzambe, wana Atali azalaki kokonza mokili.
Un viņš ar tiem bija apslēpts Dieva namā sešus gadus, un Atalija valdīja pār zemi.