< 2 Masolo ya Kala 21 >

1 Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
约沙法与他列祖同睡,葬在大卫城他列祖的坟地里。他儿子约兰接续他作王。
2 Tala bandeko mibali ya Yorami: Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele.
约兰有几个兄弟,就是约沙法的儿子亚撒利雅、耶歇、撒迦利雅、亚撒利雅、米迦勒、示法提雅。这都是犹大王约沙法的儿子。
3 Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.
他们的父亲将许多金银、财宝,和犹大地的坚固城赐给他们;但将国赐给约兰,因为他是长子。
4 Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele.
约兰兴起坐他父的位,奋勇自强,就用刀杀了他的众兄弟和以色列的几个首领。
5 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
约兰登基的时候年三十二岁,在耶路撒冷作王八年。
6 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana mwasi ya Akabi.
他行以色列诸王的道,与亚哈家一样;因他娶了亚哈的女儿为妻,行耶和华眼中看为恶的事。
7 Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.
耶和华却因自己与大卫所立的约,不肯灭大卫的家,照他所应许的,永远赐灯光与大卫和他的子孙。
8 Na tango oyo Yorami azalaki na bokonzi, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
约兰年间,以东人背叛犹大,脱离他的权下,自己立王。
9 Yorami akendeki kuna elongo na bakonzi na ye ya basoda mpe bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar.
约兰就率领军长和所有的战车,夜间起来,攻击围困他的以东人和车兵长。
10 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.
这样,以东人背叛犹大,脱离他的权下,直到今日。那时,立拿人也背叛了,因为约兰离弃耶和华—他列祖的 神。
11 Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda.
他又在犹大诸山建筑邱坛,使耶路撒冷的居民行邪淫,诱惑犹大人。
12 Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya; ezalaki koloba: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya mokonzi na yo Davidi, alobi: ‹ Lokola olandi te ndakisa ya Jozafati, tata na yo, mpe ya Asa, mokonzi ya Yuda,
先知以利亚达信与约兰说:“耶和华—你祖大卫的 神如此说:‘因为你不行你父约沙法和犹大王亚撒的道,
13 kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo,
乃行以色列诸王的道,使犹大人和耶路撒冷的居民行邪淫,像亚哈家一样,又杀了你父家比你好的诸兄弟。
14 Yawe alingi sik’oyo koboma, na nzela ya etumbu ya somo, bato na yo, bana na yo ya mibali, basi na yo mpe biloko na yo nyonso.
故此,耶和华降大灾与你的百姓和你的妻子、儿女,并你一切所有的。
15 Yo moko mpe okobela bokono ya makasi, bokono ya libumu oyo pasi na yango ekomata se komata mikolo nyonso kino kobimisa yo misopo na libanda. › »
你的肠子必患病,日加沉重,以致你的肠子坠落下来。’”
16 Yawe asalaki ete bato ya Filisitia mpe bato ya Arabi oyo bazalaki kovanda pembeni ya bato ya Kushi babundisa Yorami.
以后,耶和华激动非利士人和靠近古实的阿拉伯人来攻击约兰。
17 Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye; mwana mobali moko kaka atikalaki: Yoakazi, mwana na ye ya suka.
他们上来攻击犹大,侵入境内,掳掠了王宫里所有的财货和他的妻子、儿女,除了他小儿子约哈斯之外,没有留下一个儿子。
18 Sima na makambo oyo nyonso, Yawe atindelaki ye bokono ya libumu oyo esilaka te.
这些事以后,耶和华使约兰的肠子患不能医治的病。
19 Pasi na yango ezalaki mikolo nyonso komata se komata; mpe na suka ya mobu ya mibale, misopo ya Yorami ebimaki na libanda mpo na bokono mpe akufaki kati na pasi makasi. Bato na ye batumbaki te biloko ya solo kitoko mpo na kopesa ye lokumu ndenge basalaki mpo na batata na ye.
他患此病缠绵日久,过了二年,肠子坠落下来,病重而死。他的民没有为他烧什么物件,像从前为他列祖所烧的一样。
20 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
约兰登基的时候年三十二岁,在耶路撒冷作王八年。他去世无人思慕,众人葬他在大卫城,只是不在列王的坟墓里。

< 2 Masolo ya Kala 21 >