< 2 Masolo ya Kala 2 >

1 Salomo apesaki mitindo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.
茲にソロモン、ヱホバの名のために一の家を建てまた己の國のために一の家を建んとし
2 Salomo asangisaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko ya kotongela, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bato nkoto misato na nkama motoba mpo na kokengela bango.
ソロモンすなはち荷を負べき者七萬人山において木や石を斫べき者八萬人是等を監督すべき者三千六百人を數へ出せり
3 Salomo atindaki maloba oyo epai ya Irami, mokonzi ya Tiri: — Sala na ngai ndenge osalaki mpo na Davidi, tata na ngai, tango otindelaki ye mabaya ya nzete ya sedele mpo na kotonga ndako na ye ya kovanda.
ソロモンまづツロの王ヒラムに人を遣して言しめけるは汝はわが父ダビデにその住むべき家を建る香柏をおくれり請ふ彼になせしごとく亦我にもせよ
4 Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.
今我わが神ヱホバの名のために一の家を建て之を聖別て彼に奉つり彼の前に馨しき香を焚き常に供前のパンを供へ燔祭を朝夕に献げまた安息日月朔ならびに我らの神ヱホバの節期などに献げんとす是はイスラエルの永く行ふべき事なればなり
5 Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.
我建る家は大なり其は我らの神は諸の神よりも大なればなり
6 Kasi nani akoki kotongela Ye Tempelo, pamba te Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Ye te? Mpe ngai nde nani mpo ete natongela Ye Tempelo, soki kaka etumbelo te mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso na Ye?
然ながら天も諸天の天も彼を容ること能はざれば誰か彼のために家を建ることを得んや我は何人ぞや爭か彼のために家を建ることを得ん唯彼の前に香を焚くためのみ
7 Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki.
然ば請ふ今金銀銅鐵の細工および紫赤靑の製造に精しく雕刻の術に巧なる工人一箇を我に遣り我父ダビデが備へおきたるユダとヱルサレムのわが工人とともに操作しめよ
8 Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo,
請ふ汝また香柏松木および白檀をレバノンより我におくれ我なんぢの僕等がレバノンにて木を斫ることを善するを知るなり我僕また汝の僕と共に操作べし
9 bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko.
是のごとくして我ために材木を多く備へしめよ其は我が建んとする家は高大を極むる者なるべければなり
10 Nakopesa na basali na yo, oyo bakokata banzete batone nkoto motoba ya ble, batone nkoto minei ya orje, balitele ya vino nkoto nkama libwa, balitele ya mafuta nkoto nkama libwa.
我は木を斫る汝の僕に搗麥二萬石大麥二萬石酒二萬バテ油二萬バテを與ふべしと
11 Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda: — Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango.
是においてツロの王ヒラム書をソロモンにおくりて之に答へて云ふヱホバその民を愛するが故に汝をもて之が王となせりと
12 Irami alobaki na ye lisusu: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.
ヒラムまた言けるは天地の造主なるイスラエルの神ヱホバは讃べきかな彼はダビデ王に賢き子を與へて之に分別と才智とを賦け之をしてヱホバのために家を建てまた己の國のために家を建ることを得せしむ 今我わが達人ヒラムといふ才智ある工人一人を汝におくる
13 Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu.
14 Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo.
彼はダンの子孫たる婦の產る者にて其父はツロの人なるが金銀銅鐵木石の細工および紫布靑布細布赤布の織法に精しく又能く各種の雕刻を爲し奇巧を凝して諸の工をなすなり然ば彼を用ひてなんぢの工人および汝の父わが主ダビデの工人とともに操作しめよ
15 Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki.
是については我主の宣まへる小麥大麥油および酒をその僕等に遣りたまへ
16 Biso, tokokata banzete nyonso ya Libani, oyo ozali na yango posa; tokokangisa mpe tokotinda yango na nzela ya mayi ya ebale monene kino na Jafa. Wuta kuna, yo okokomisa yango na Yelusalemi.
汝の凡て需むるごとく我らレバノンより木を斫いだしこれを筏にくみて海よりヨツバにおくるべければ汝これをヱルサレムに運びのぼりたまへと
17 Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba.
ここにおいてソロモンその父ダビデが核數しごとくイスラエルの國にをる異邦人をことごとく核數みるに合せて十五萬三千六百人ありければ
18 Aponaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bakengeli nkoto misato na nkama motoba mpo na kosalisa bato misala.
その七萬人をもて荷を負ふ者となし八萬人をもて山にて木や石を斫る者となし三千六百人をもて民を操作かしむる監督者となせり

< 2 Masolo ya Kala 2 >