< 2 Masolo ya Kala 19 >
1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, azongaki mobimba na ndako na ye na Yelusalemi,
Josaphat, roi de Juda, revint sain et sauf dans sa maison, à Jérusalem.
2 mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati: « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.
Mais Jéhu, fils de Hanani, le Voyant, sortit au-devant du roi Josaphat, et lui dit: Est-ce le méchant qu'il faut aider? Sont-ce les ennemis de l'Éternel que tu aimes? A cause de cela, l'Éternel est irrité contre toi.
3 Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »
Mais il s'est trouvé de bonnes choses en toi, car tu as ôté du pays les emblèmes d'Ashéra, et tu as appliqué ton cœur à rechercher Dieu.
4 Jozafati avandaki na Yelusalemi mpe atambolaki lisusu kati na bato longwa na Beri-Sheba kino na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe azongisaki bana ya Isalaele epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
Et Josaphat habita à Jérusalem. Puis, de nouveau, il sortit parmi le peuple, depuis Béer-Shéba jusqu'à la montagne d'Éphraïm, et il les ramena à l'Éternel, le Dieu de leurs pères.
5 Atiaki basambisi kati na mokili, kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi.
Il établit aussi des juges dans le pays, dans toutes les villes fortes de Juda, dans chaque ville.
6 Alobaki na bango: « Bozala na bokebi na mosala oyo bokosala, pamba te bokosambisa te mpo na bato, kasi mpo na Yawe oyo azali elongo na bino na bisika nyonso oyo bokokata makambo.
Et il dit aux juges: Regardez à ce que vous ferez; car ce n'est pas pour l'homme que vous jugerez, mais pour l'Éternel, qui sera avec vous quand vous jugerez.
7 Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te: kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »
Maintenant, que la crainte de l'Éternel soit sur vous; prenez garde à ce que vous ferez; car il n'y a point d'iniquité dans l'Éternel notre Dieu, ni d'acception de personnes, ni d'acceptation de présents.
8 Kati na Yelusalemi, Jozafati aponaki Balevi, Banganga-Nzambe mpe bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosambisa kolanda Mibeko ya Yawe mpe kokata makambo ya bavandi ya Yelusalemi.
Josaphat établit aussi à Jérusalem des Lévites, et des sacrificateurs, et des chefs des pères d'Israël, pour le jugement de l'Éternel, et pour les contestations. Et on revint à Jérusalem.
9 Apesaki bango mitindo oyo: « Bosengeli kosala na boyengebene, na motema mobimba mpe na botosi epai na Yawe.
Et il leur donna des ordres, en disant: Vous agirez ainsi dans la crainte de l'Éternel, avec fidélité et avec intégrité de cœur.
10 Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te.
Et pour les différends qui viendront devant vous, de la part de vos frères qui habitent dans leurs villes, qu'il s'agisse d'un meurtre, d'une loi, d'un commandement, de statuts ou d'ordonnances, vous les éclairerez, afin qu'ils ne se rendent pas coupables envers l'Éternel, et qu'il n'y ait point de courroux sur vous et sur vos frères. Vous agirez ainsi, et vous ne serez point trouvés coupables.
11 Amaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali Yawe; mpe Zebadia, mwana mobali ya Isimaeli, mokonzi ya libota ya Yuda, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Balevi bakozala lokola bakalaka liboso na bino. Bozala na mpiko mpe bosala mosala! Mpe tika ete Yawe azala elongo na bato oyo bakosala malamu! »
Et voici, Amaria, le principal sacrificateur, est préposé sur vous pour toutes les affaires de l'Éternel, et Zébadia, fils d'Ismaël, prince de la maison de Juda, pour toutes les affaires du roi; et pour secrétaires vous avez devant vous les Lévites. Fortifiez-vous et agissez; et que l'Éternel soit avec l'homme de bien!