< 2 Masolo ya Kala 18 >
1 Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala.
约沙法大有尊荣资财,就与亚哈结亲。
2 Sima na ndambo ya mibu, akendeki kotala Akabi kati na Samari. Akabi abomaki bameme mpe bangombe ebele mpo na koyamba ye mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Atindikaki ye na kokende na Ramoti ya Galadi.
过了几年,他下到撒马利亚去见亚哈;亚哈为他和跟从他的人宰了许多牛羊,劝他与自己同去攻取基列的拉末。
3 Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda: — Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi? Jozafati azongisaki: — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko; tokokende elongo na yo na bitumba.
以色列王亚哈问犹大王约沙法说:“你肯同我去攻取基列的拉末吗?”他回答说:“你我不分彼此,我的民与你的民一样,必与你同去争战。”
4 Kasi Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele: — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
约沙法对以色列王说:“请你先求问耶和华。”
5 Boye, mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli nkama minei mpe atunaki bango: — Boni, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Bazongiselaki ye: — Kende, pamba te Nzambe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
于是以色列王招聚先知四百人,问他们说:“我们上去攻取基列的拉末可以不可以?”他们说:“可以上去,因为 神必将那城交在王的手里。”
6 Kasi Jozafati atunaki lisusu: — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe?
约沙法说:“这里不是还有耶和华的先知,我们可以求问他吗?”
7 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati: — Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki: — Tika ete mokonzi aloba bongo te!
以色列王对约沙法说:“还有一个人,是音拉的儿子米该雅。我们可以托他求问耶和华,只是我恨他;因为他指着我所说的预言,不说吉语,常说凶言。”约沙法说:“王不必这样说。”
8 Bongo mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye: — Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila.
以色列王就召了一个太监来,说:“你快去将音拉的儿子米该雅召来。”
9 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango.
以色列王和犹大王约沙法在撒马利亚城门前的空场上,各穿朝服坐在位上,所有的先知都在他们面前说预言。
10 Nzokande, moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Na maseke oyo, okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. »
基拿拿的儿子西底家造了两个铁角,说:“耶和华如此说:‘你要用这角抵触亚兰人,直到将他们灭尽。’”
11 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko: « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi! Okolonga, pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
所有的先知也都这样预言说:“可以上基列的拉末去,必然得胜,因为耶和华必将那城交在王的手中。”
12 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye: — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango: sakola elonga mpo na mokonzi.
那去召米该雅的使者对米该雅说:“众先知一口同音地都向王说吉言,你不如与他们说一样的话,也说吉言。”
13 Kasi Mishe azongisaki: — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
米该雅说:“我指着永生的耶和华起誓,我的 神说什么,我就说什么。”
14 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye: — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Azongisaki: — Bokende! Bokolonga! Bakokabama na maboko na bino!
米该雅到王面前,王问他说:“米该雅啊,我们上去攻取基列的拉末可以不可以?”他说:“可以上去,必然得胜,敌人必交在你们手里。”
15 Kasi mokonzi alobaki na ye: — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe?
王对他说:“我当嘱咐你几次,你才奉耶和华的名向我说实话呢?”
16 Mishe azongisaki: — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi: « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia! »
米该雅说:“我看见以色列众民散在山上,如同没有牧人的羊群一般。耶和华说:‘这民没有主人,他们可以平平安安地各归各家去。’”
17 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, alobaka kaka mpo na mabe!
以色列王对约沙法说:“我岂没有告诉你,这人指着我所说的预言,不说吉语,单说凶言吗?”
18 Mishe alobaki: — Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
米该雅说:“你们要听耶和华的话。我看见耶和华坐在宝座上,天上的万军侍立在他左右。
19 Yawe atuni: « Nani akokosa Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna? » Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye.
耶和华说:‘谁去引诱以色列王亚哈上基列的拉末去阵亡呢?’这个就这样说,那个就那样说。
20 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki: « Ngai oyo! Nakokosa ye. » Yawe atunaki molimo yango: « Okosala yango ndenge nini? »
随后,有一个神灵出来,站在耶和华面前说:‘我去引诱他。’耶和华问他说:‘你用何法呢?’
21 Molimo yango ezongisaki: « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki: « Solo, okolonga kokosa ye! Kende mpe sala bongo. »
他说:‘我去,要在他众先知口中作谎言的灵。’耶和华说:‘这样,你必能引诱他,你去如此行吧!’
22 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo.
现在耶和华使谎言的灵入了你这些先知的口,并且耶和华已经命定降祸与你。”
23 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki: — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo?
基拿拿的儿子西底家前来打米该雅的脸,说:“耶和华的灵从哪里离开我与你说话呢?”
24 Mishe azongisaki: — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
米该雅说:“你进严密的屋子藏躲的那日,就必看见了。”
25 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo: — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.
以色列王说:“将米该雅带回,交给邑宰亚们和王的儿子约阿施,说:
26 Boloba na bango: « Tala makambo oyo mokonzi alobi: ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
‘王如此说:把这个人下在监里,使他受苦,吃不饱喝不足,等候我平平安安地回来。’”
27 Mishe alobaki: — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te! Abakisaki: — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi!
米该雅说:“你若能平安回来,那就是耶和华没有借我说这话了”;又说:“众民哪,你们都要听!”
28 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.
以色列王和犹大王约沙法上基列的拉末去了。
29 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nakomibongola wana nakokende na bitumba; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
以色列王对约沙法说:“我要改装上阵,你可以仍穿王服。”于是以色列王改装,他们就上阵去了。
30 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar: — Bobundisa moto moko te, azala moke to monene; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele.
先是亚兰王吩咐车兵长说:“他们的兵将,无论大小,你们都不可与他们争战,只要与以色列王争战。”
31 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki: « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.
车兵长看见约沙法便说,这必是以色列王,就转过去与他争战。约沙法一呼喊,耶和华就帮助他, 神又感动他们离开他。
32 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye.
车兵长见不是以色列王,就转去不追他了。
33 Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar: — Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki.
有一人随便开弓,恰巧射入以色列王的甲缝里。王对赶车的说:“我受了重伤,你转过车来,拉我出阵吧!”
34 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki.
那日阵势越战越猛,以色列王勉强站在车上抵挡亚兰人,直到晚上。约在日落的时候,王就死了。