< 2 Masolo ya Kala 17 >

1 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele.
Y reinó en su lugar Josafat su hijo, el cual prevaleció contra Israel.
2 Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki.
Y puso ejército en todas las ciudades fuertes de Judá, y puso gente de guarnición en tierra de Judá, y asimismo en las ciudades de Efraím, que su padre Asa había tomado.
3 Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala.
Y fue Jehová con Josafat, porque anduvo en los caminos de David su padre los primeros, y no buscó a los Baales;
4 Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye: alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele.
Mas buscó al Dios de su padre, y anduvo en sus mandamientos, y no según las obras de Israel.
5 Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu.
Y confirmó Jehová el reino en su mano, y todo Judá dio presentes a Josafat: y tuvo riquezas, y gloria en abundancia.
6 Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera.
Y su corazón se enalteció en los caminos de Jehová; y él quitó los altos y los bosques de Judá.
7 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe.
Al tercero año de su reino envió sus príncipes Ben-hail, Abdías, Zacarías, Nataniel, y Miqueas, para que enseñasen en las ciudades de Judá:
8 Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa: Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami.
Y con ellos a los Levitas, Semeías, Natanías, Zabadías, y Asael, y Semiramot, y Jonatán, y Adonías, y Tobías, y Tobadonias, Levitas; y con ellos a Elisama y a Joram, sacerdotes.
9 Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.
Y enseñaron en Judá, teniendo consigo el libro de la ley de Jehová, y rodearon por todas las ciudades de Judá, enseñando el pueblo.
10 Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati.
Y cayó el pavor de Jehová sobre todos los reinos de las tierras que estaban al rededor de Judá, que no osaron hacer guerra contra Josafat.
11 Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo.
Y traían de los Filisteos presente, y plata de tributo a Josafat: los Árabes también le trajeron ganados, siete mil y siete cientos carneros, y siete mil y siete cientos machos de cabrío.
12 Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.
Y Josafat iba creciendo altamente: y edificó en Judá fortalezas y ciudades de depósitos.
13 Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko.
Y tuvo muchas obras en las ciudades de Judá, y tuvo hombres de guerra, valientes de fuerzas, en Jerusalem.
14 Tala motango na bango kolanda mabota na bango: Kati na libota ya Yuda, bakonzi ya bankoto: Adina, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama misato;
Y este es el número de ellos según las casas de sus padres: En Judá, príncipes de los millares eran, el príncipe Ednas, y con él había trescientos mil hombres valientes de fuerzas.
15 sima na ye, Yoanani: mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe;
Tras él, Johanán príncipe, y con él doscientos y ochenta mil.
16 sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe: mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.
Tras este, Amasías, hijo de Zecri, el cual se había ofrecido voluntariamente a Jehová; y con él doscientos mil hombres valientes.
17 Kati na libota ya Benjame: Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba;
De Ben-jamín; Eliada, hombre poderoso de fuerzas, y con él doscientos mil armados de arco y escudo.
18 Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe.
Tras este, Jozabad, y con él ciento y ochenta mil apercebidos para la guerra.
19 Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba.
Estos eran siervos del rey, sin los que el rey había puesto en las ciudades de guarnición por toda Judea.

< 2 Masolo ya Kala 17 >