< 2 Masolo ya Kala 16 >
1 Na mobu ya tuku misato na motoba ya bokonzi ya Asa, Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda; alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.
亞撒三十六年,以色列王巴沙上來攻擊猶大,修築拉瑪,不許人從猶大王亞撒那裏出入。
2 Asa azwaki na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako na ye moko palata mpe wolo, mpe atindaki yango epai ya Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo:
於是亞撒從耶和華殿和王宮的府庫裏拿出金銀來,送與住大馬士革的亞蘭王便‧哈達,說:
3 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo palata mpe wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. »
「你父曾與我父立約,我與你也要立約。現在我將金銀送給你,求你廢掉你與以色列王巴沙所立的約,使他離開我。」
4 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Babotolaki Iyoni, Dani, Abele-Mayimi mpe bibombelo nyonso ya bingumba ya Nefitali.
便‧哈達聽從亞撒王的話,派軍長去攻擊以色列的城邑。他們就攻破以雲、但、亞伯‧瑪音,和拿弗他利一切的積貨城。
5 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akataki misala na yango.
巴沙聽見就停工,不修築拉瑪了。
6 Bongo mokonzi Asa asangisaki bato nyonso ya Yuda, mpe bamemaki wuta na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela. Atongaki na yango Geba mpe engumba Mitsipa.
於是亞撒王率領猶大眾人,將巴沙修築拉瑪所用的石頭、木頭都運去,用以修築迦巴和米斯巴。
7 Na tango wana, Anani, momoni makambo, akendeki epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, mpe alobaki na ye: — Lokola otie elikya na yo na mokonzi ya Siri na esika ya kotia elikya na yo na Yawe, Nzambe na yo, ozali lisusu na bokonzi te likolo ya mampinga ya mokonzi ya Siri.
那時,先見哈拿尼來見猶大王亞撒,對他說:「因你仰賴亞蘭王,沒有仰賴耶和華-你的上帝,所以亞蘭王的軍兵脫離了你的手。
8 Boni, bato ya Etiopi mpe ya Libi bazalaki te mampinga minene ya basoda elongo na bashar mpe basoda ebele oyo babundaka likolo ya bampunda? Kasi lokola ozalaki kotia elikya na yo kati na Ye, Yawe akabaki bango solo na maboko na yo.
古實人、路比人的軍隊不是甚大嗎?戰車馬兵不是極多嗎?只因你仰賴耶和華,他便將他們交在你手裏。
9 Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.
耶和華的眼目遍察全地,要顯大能幫助向他心存誠實的人。你這事行得愚昧;此後,你必有爭戰的事。」
10 Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.
亞撒因此惱恨先見,將他囚在監裏。那時亞撒也虐待一些人民。
11 Makambo mpe misala mosusu ya Asa, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
亞撒所行的事,自始至終都寫在猶大和以色列諸王記上。
12 Na mobu ya tuku misato na libwa ya bokonzi na ye, Asa abelaki makasi makolo; mpe, ezala na tango oyo azali kobela makasi, alukaki Yawe te, kasi akendeki epai ya minganga.
亞撒作王三十九年,他腳上有病,而且甚重。病的時候沒有求耶和華,只求醫生。
13 Na mobu ya tuku minei na moko ya bokonzi na ye, Asa akendeki kokutana na bakoko na ye.
他作王四十一年而死,與他列祖同睡,
14 Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye.
葬在大衛城自己所鑿的墳墓裏,放在床上,其床堆滿各樣馨香的香料,就是按做香的作法調和的香料,又為他燒了許多的物件。